MAELEZO YA MWENYEKITI WA TUME YA MABADILIKO YA KATIBA, JAJI JOSEPH SINDE WARIOBA KATIKA MKUTANO WA TANZANIA CENTER FOR DEMOCRACY, KUHUSU TAFAKURI NA MARIDHIANO KUELEKEA KATIBA MPYA: WHITESANDS HOTEL, DAR ES SALAAM, 12 FEBRUARI, 2014
1667930542-HOTUBA YA WAZIRI WA FEDHA NA MIPANGO KUHUSU MAPENDEKEZO YA MWONGOZO WA MAANDALIZI YA MPANGO NA BAJETI YA SERIKALI NA MAPENDEKEZO YA MPANGO WA TAIFA WA MAENDELEO WA MWAKA 2023-24_1667915175
Elobeli: Kosɛnga mikanda na libaku ya mayangani ya etúká mpe ya zongazonga Bandeko, Na kotalela makambo oyo ezali na mokanda ya mwa 10/05/2017 epai ya masangani nyonso ya bankulutu na oyo etali kosɛnga mikanda ya sika oyo ebimi na mayangani ya etúká, tozali na esengo ya kopesa bino malako mosusu oyo eyokani na teritware na biso. Tomoni ete masangá mingi oyo ezali na kati ya bamboka ezali na mokakatano ya kotinda komande na bango ya mikanda na biro ya filiale. Ezali masangá nyonso te kasi bobele oyo bazali na bisika oyo likoki ya kosolola to ya kotinda mikanda na nzela ya pɔsti, telefone to Internet ezali mingi te. Mpo na kolonga mokakatano wana, tosɛngi na masangani nyonso ya bankulutu oyo batalelami na likambo yango ete bazwa bibongiseli oyo ekoki mpo na kotindela biso mbala moko komande ya mikanda mbala nyonso oyo lisangá na bango ekoyangana na liyangani moko ya etúká to ya zongazonga. Komande yango ekozala na mikanda nyonso oyo basakoli bazali na yango mposa na mosala ya kosakola mpe na makita. Ebongiseli yango etaleli mpe mikanda oyo ebimi na liyangani moko ya etúká. Bokoki mpe kosalela libaku yango mpo na kobongola soki esengeli, bakomande na bino ya Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo mpe ya bazulunalo (M-202-F Cn). Soki masangá bazali koyangana na liyangani moko esika oyo rezo ya Internet ezalaka malamu, masangá yango elendisami kotinda komande na bango mbala moko na site jw.org. Soki likoki ya kokɔta na Internet ezali te, bakoki kotinda komande na bango na nzela ya SMS na nimero 0812669875 (Talelá lisusu mokanda ya mwa 16/03/2016 oyo etindamaki epai ya masangani nyonso ya bankulutu mpo na oyo etali Kotinda ba SMS na biro ya filiale). Bokosalela formilɛrɛ Commande de publications (S-14-F Cn) kaka soki likoki ya kosalela balolenge mibale oyo elobelami awa liboso ezali te. Ezala lolenge nini oyo bosaleli, tolendisi bino bobomba kopi moko na dosye na bino mpo na koyeba kotalela mikanda yango malamu soki eyei. Baoyo bazali na mokakatano ya kotinda bakomande na bango sanza na sanza, basengeli kosalela libaku oyo mpo na kosɛnga lisalisi epai ya bandeko ya masangá mosusu oyo bazali na liyangani moko na bango mpe baoyo bazali na eksperiansi na likambo yango. Tolingi kobɛta nsɛtɛ a mpo na koloba ete ebongiseli oyo ezali na mokano ya kosalisa masangá oyo bazali na mokakaktano ya kotinda komande na bango na filiale mpo makoki ya kosalela telefone to Internet ezali mingi te. Yango etaleli te masangá oyo ezali na binguma minene. Masangá nyonso oyo etalelami te na ebongiseli oyo basengeli kozwa momeseno ya kotinda komande na bango sanza na sanza, mingimingi na nzela ya site jw.org. Na bongo, Bankulutu bakomonisa ete bazali kosala elongo na filiale, mpo bayebi malamu milende oyo ezali kosalema mpo na kopesa biso mikanda oyo masangá ezali na yango mposa. Topesi bino matɔndi na motema mobimba na ndenge bokosimba ebongiseli oyo ya teokrasi mpe tozali kobondela Yehova apambola molende na bino mpo na mosala mosantu. Topesi bino, mbote na biso ya bolingo. Bandeko na bino,
6/12/17-LI Cn Lokasa 2
C.C : Bakɛngɛli ya zongazonga
P.-S. Epai ya Mokambi-misala ya bankulutu : Makambo oyo elobelami na mokanda oyo etaleli mpe bandeko oyo batalelaka mikanda. Tosɛngi na bino ete bópesa mpe bango kopi moko. Na viziti nyonso, Mokɛngɛli ya zongazonga asengeli kotala malamu, soki lisangá ezali kosala komande na yango mbala na mbala. Soki mposa ezali, na ebandeli ya pɔsɔ, akobongisa likita moko mpo na kosalisa bandeko oyo bakozala na mposa na yango ete bayeba kotosa malako wana. Akotalela elongo na lisangani ya bankulutu soki bandeko oyo baponami bazali kokokisa mokumba yango ya ntina mingi mpenza na ndenge ya malamu.
MAELEZO YA MWENYEKITI WA TUME YA MABADILIKO YA KATIBA, JAJI JOSEPH SINDE WARIOBA KATIKA MKUTANO WA TANZANIA CENTER FOR DEMOCRACY, KUHUSU TAFAKURI NA MARIDHIANO KUELEKEA KATIBA MPYA: WHITESANDS HOTEL, DAR ES SALAAM, 12 FEBRUARI, 2014
1667930542-HOTUBA YA WAZIRI WA FEDHA NA MIPANGO KUHUSU MAPENDEKEZO YA MWONGOZO WA MAANDALIZI YA MPANGO NA BAJETI YA SERIKALI NA MAPENDEKEZO YA MPANGO WA TAIFA WA MAENDELEO WA MWAKA 2023-24_1667915175