Is 12 Evangile : Mc 1,7-11 Bandeko ba ngai, bana ba libota lya Nzambe ! Boboto ! 1. Lelo, Mama wa biso Ekklezia apesi biso libaku lya kosepela eyenga ya « Batisimo ya Mokonzi Yezu Kristu ». Lelo mpe tozali kosukisa « Eloko ya mbotama » ya Mwana-Nzambe okati ya biso. Bandeko, kosepela « Batisumu ya Mokonzi wa biso Yezu Kristu » ezali libaku linzenga mpamba ‘te batisimu nde epesi Kristu makasi ma kobanda mosala mwa ye mwa kobikisa mokili. Awa Kristu azui batisimu, akeyi mbala moko kosangela bato sango ya bobongoli mitema (Convertissez-vous et croyez à la Bonne nouvelle). 2. « Batisimu ya Yezu » elakisi biso te « Messiya » azali o kati ya biso mpe aye kobende biso o molili mwa masumu. Yango ntina ya témoignage Nzambe-Tata asali mpoya Mwana waye. Nzambe-Tata alingi te « tomono mpe toyamba nkembo oyo apesi Mwana wa ye wa bolingo ». Nde toyoki o nsango elamu : « Ozali Mwana wa ngaio wa bolingo nakosepela na yo mingi ». 3. Bandeko, awa tozali kosepele « batisimu ya Yezu », tosengeli kokanisa mpe batisumu ya biso moko. Na batisimu ya biso, Nzambe alaki biso bolingo bwa ye ndelo te : « Bolingo bwa bozali ofele ». Pona koloba ‘te, Nzambe asengeli na mbongo mpe na biloko bya biso te mpoya kolinga biso. Alingi biso yambo te tolinga ye. Lokola toyoki o litangi lya yambo, ezali biso nde tokokimaka Nzambe. Tokokende kokokisa ba mposa ya biso : « Tokobebisaka mosolo mwa biso na biye bikoleisa te ». Nzokande, na batisimu ya biso, Nzambe alimbisi biso masumu, apesi libaku lya kokoma bana b aye (lokola Kristu Mwana wa ye wa bolingo) mpe tokoti o kati ya Ekkelzia. 4. Bandeko, na batisimu, tokomi baprofeta, bakonzi na mpe banganga-Nzambe. Elingi koloba’ te, Nzambe apesi biso makabo ndenge na ndenge mpo’te tosala lokola Kristu, mosala mwa kobikisa mokili na kosangela nsango elamu ; mosala mwa kotikala « nzeneneke ya ye ».. Yango wana, tosengeli mokolo na mokolo, mpoya kozua makabo ma Nzambe, kotia matoi mpe koya epai ya Nzambe. Tosengeli kondima koyoka Nzambe mpe kokolisa mposa ya ye. 5. Bandeko, o ntongo ya lelo, mbela ezali se yoko : « Toluka kobongola ezalela ya biso o bisika binso tokozala ». Lokola toyoki yango o litangi ya yambo, Mpe soko tokokanela baninga, tobongola makasi, totonda na makanisi masantu, makanisi malamu makoluka kaka boboto na mpe bolingo o bisika binso ». 6. Tosenga na Nzambe ngraysa te tomibongolo epai ya ye na bobateli makabo malamu ma batisimu ya biso mokolo na mokolo. Abbé Donatien MBUDI PATE