Download as pdf or txt
Download as pdf or txt
You are on page 1of 119

Yaka

Nkolo Yezu !

Eteni oyo ebongisami

Mokanda ya molakisi
ya Eteyelo ya Yenga
na kati ya Eglise néo-apostolique

Tome 1
Molakisi mobali mpe mwasi ya talo,

Ezali na esengo monene mpe koyeba ya mozindo oyo nazali kotia buku oyo kati na maboko
na bino. Nayebi ete bokobondela mingi mpo bozua bwanya oyo bokozala na yango mposa
mpo botangisa bana na biso maye ekomami na buku oyo.

Nkolo Yezu alingaki bana. Mosala tozali kosala mpo na misala na bango ekufaka te; esalisa
bango mpo bayeba bolingo oyo. Tosengeli, mpo bana bayeba maye tozali kotangisa bango,
tomitia na esika na bango. Tozali koyoka lolenge ya kosala mpo bayeba maye tozali
koyekwisa bango mpe tosala mpo bandima na bwanya mpe bosembo ya Nzambe na biso.

Makomi ya bonzambe ekoti yango mpe mateya. Masapo ezali kosalisa mpo na kosimba
mateya ya kotangisa. Soki bozali kosala na nguya ya Molimo-Mosantu, bokomona na
kososola ete bondimi ya bana elie malamu. Bokozala lokola baloni bilanga ya elanga kitoko
wapi fololo ekoki kokola na nkembo ya Nzambe.

Ezali na ngai ntina monene na oyo ezali na kati ya “Maye tokani’’ ekoka kaka kokamba bino.
Bokosimba baboti kati ya mosala monene oyo bazali na yango mpo na koyekwisa bana na
bango.

“Ndako ya Tata ezali esengo na biso, tozali kaka kozwa esengo ya sika !’’

Tika oyo tokani ezala mpe oyo ya mabota ya malamu ! Mateya ya biteni nionso oyo etali
eteyelo ya yenga esalisa masolo kati ya baboti mpe bana na maye bazali kosala na ndako ya
Nzambe. Ezali na ntina penza, ete bomoko ya bolingo kati ya mateya ya Kristo, esangisa
baboti mpe bana.

Botia motema na losambo na kosala ntango nionso mpo na bino mpe napesi bino mbote ya
motema.

R. Fehr

2
Yaka, Nkolo Yezu !

Na baboti, na banganga-nzambe, na balakisi mibali mpe basi ya eteyelo ya yenga.

Baboti ya bolingo, bandeko mibali mpe basi kati na bondimi,

Bolamu ya bana na biso, babiangami na kokola mpe kokoma kati ya molimo na esengo kino
kokoma bilenge ya batu bazali na bondimi makasi, esimbi ngai penza na motema. Basengeli
bamiyoka na eteyelo ya yenga, ete bandimami na ndako ya Nzambe, ete babatelami mpe
bayokani.

Likanisi wana ekolakisa bino maye tokani na eteyelo ya yenga mpe lolenge ya kotangisa.
Makanisi ya buku ya eteyelo ya yenga “Yaka, Nkolo Yezu !” Ekopesamela bino na mwa
milongo. Likanisi wana ezali na ntina ya kokembisa bino na kosala na bakambi na bino mpe
bana na bino mateya na eteyelo ya yenga.

Baboti ya bolingo, ezali mpe mpo na ngai ntina monene ete bosimbama na mosala oyo bozali
na yango ya koyekwisa bana. Na ndakisa bino moko bokopesa bango, na bolingo na bino
mpe mayele bozali kopesa bango, botia ebandeli ya bondimi kati ya mitema ya bana.
Bokosala makasi ya kokolisa bango na ntina ete bakoma bakristo ya Eglise néo-apostolique
bazala ngwi na bondimi. Bomema bana na bino na ndako ya Nzambe na lolenge ete bakoka
kobota misisa mpe komileisa na bomoko ya bana ya Nzambe. Napesi bino Mersi solo penza
na makasi nionso oyo bozali kosala ezala mpe na boyengebeni na bino.

Basali mpe balakisi ya basi to mibali bazali kosimba bino kati na mokumba oyo bozali na
yango epai ya bana na bino. Bokoki kosenga lisalisi na bango ntango nionso; na ntina ete
makasi bosali ezala nkelu monene ya mapamboli mpo na misuke ya bana.

Natombeli bino, mpo na mosala ya talo, lipamboli ya Nzambe, esengo mingi, bwanya mpe
kokanga motema. Na bomoko na bantoma nionso mpe basali ya ba disitiliki mpe masanga,
botia mitema na losambo nazali kosambela mpo na bino mpe napesi bino mbote ya motema.

R. Fehr

3
Molingami molakisi ya mobali, molingami malakisi ya mwasi,

Ntina ya mokanda oyo ezali, ya kosalisa bino mpo na kobongisa mateya ya eteyelo ya yenga.
Ezali na biteni mitano, moko na moko ezali na mateya sambo (7). Esengeli elakisama na
motindo ezali, longola kaka mateya oyo etali losambo ya minene.
Totombeli bino ete botonda na esengo mingi na kosala mpo na bana.

Bolakisi mateya :

Moto mpe makomi ya biblia


Yango nde ezali kosalisa mpo na koluka banzela penza na kati ya biblia.

Masolo
• Masolo ekomamaki kaka, mpe bakomisi makomi mokuse, na ntina ete mwana ya
eteyelo ya yenga akoka koyeba malamu.
• Masapo ya mokolo ekoki mbala mosusu kosalisa mwana abongisa boyoki ya milulu ya
biblia.
• Bana bayekola mingi mingi na bomekoli (lolenge) mpe na kokanisa. Na bongo,
esengeli kobomba makomi ya biblia na lolenge esengeli.
• Molakisi esengeli asala na bomisungi na bolakisi lokola mokanda ya kolanda mpe
kobeta masapo na lolenge moko.
• Kosalela bakombo kati ya masolo ezwuami te awa; molakisi akoki kozwa bakombo
oyo bana bayebi.
• Maloba pete “Nzambe” mpe “Yezu” bazwami na esika ya “Nkolo Nzambe” mpe “Nkolo
Yezu”, kaka soki ezali na kotanga.

Makanisi mpo na molakisi


Makanisi oyo balakisi bakoki kosala ezali na suka ya liteya nionso.
• Na eteni ya liboso, tozali kobenga bana na kozongela sango ya makasa etali lisapo.
• Na sima molakisi akosolola, akolimbola mpe akotia na motuya bandakisa ekomami na
kati ya mokapo.
• Bana bayekola mingi na lisano ya mituna mpe biyano. Lolenge wana ya kotangisa
esalama mingi. Wana ezali kosalisa mpo na kosolola baoyo na bamosusu me
kotindika bana nionso basala.
• Loye,bo ezali kati ya Eglise na biso eteni ya ntina ya bizaleli na biso. Molakisi akoki
koyembisa banzembo ya momesano mpo na kokolisa esengo oyo eutaka na nzembo.

Liteya
Oyo tozali koyekola na kati ya liteya etiami na bokuse na lolenge ya pete na liteya ezali na
suka ya lisolo.

4
Nsango mpo na eteyelo ya yenga

Bana bakoki kokende na eteyelo ya yenga banda mibu motoba to sambo. Na ndenge
esengeli, eteyelo ya yenga ezali koumela mbula minei mpe mateya epesamaka mokolo ya
yenga na kati ya sanza moko.

Bandeko mibali to basi baye bakoki bazali na mokumba ya bana ya eteyelo ya yenga.
Balakisa bango bolingo mpe boyebi. Bazali kosalisa baboti na bobokoli ya bonzambe ya bana
na bango. Nganga-nzambe, asengeli kosala molei-mosantu mbala moko na bana ya eteyelo
ya yenga.

Maye tokani ,po na eteyelo ya yenga ezali oyo :

• kolamusa mpe kokolisa esengo oyo bana bazali koyoka na bomoko na bana ya
Nzambe. Na lolenge wana bakosangana na esengo mikolo ezali koya na losambo.
• Kosala bana bandima, na masapo ya biblia, na boyebi ya Nzambe mpe mosala na ye,
mpe kokembisa bondimi na bango na bilaka na ye.
• Kosala ete bana bakola, na nzela ya masapo ya biblia, na boyebi ya Nzambe mpe
mosala na ye, mpe kokolisa bondimi na bango na bilaka na ye.
• Kosala libota ya bana na mosala ya Nzambe mpe kolimbolela bango lolenge losambo
esalamaka mpe ndimbola ya bilembo bisantu.

Biteni mpe mibeko ya talo ya buku “Yaka, Nkolo Yezu !”

Buku “Yaka, Nkolo Yezu !” ezali na biteni minene minei. Ezali na masapo ya biblia, ebetami
na monoko oyo bana bakoki koyeba malamu. Mama ya likambo ya mbula nionso ya eteyelo
ya yenga ezali lolenge moko ya kitoko ya bizaleli ezali kati ya mibeko ya bondimi mpe lokola
bafeti ya Eklezia. Balolenge yango ya bizaleli, ezali lokola :
• Nzambe akokisi bilaka na ye
• Yezu-Kristo azali Mwana ya Nzambe
• Yezu-Kristo atindi bantoma.

Masapo ya biblia, oyo eponami malamu ezali kosalisa bana mpo na “kobikela” lolenge ya
bizaleli yango. Ekembisami na mateya mosusu ya eteyelo ya yenga ekokani na milulu misusu
ya ndenge wana.

Molakisi akobeta masapo wana na lolenge ete bana bakoka kobomba oyo ezali na ntina mpo
na bondimi na biso. Ndakisa, akolakisa lolenge Nzambe akokisaki bilaka asalaki mpo na
Abraham. Bana bakoyoka na mitema na bango kokola ya kotia motema na bokokisami ya
bilaka oyo Nzambe asalela biso.

Na kosolola na bana, molakisi akosangisa bososoli na maye bana bakosala bango moko.
Bakoki kobikela na ntango molai bokoli ya bomoi ya bango ya bondimi. Bakoyekola mpe,
bazali na esika ya solo kati na moango ya lobiko mpe ya bosikolami.

“Yaka, Nkolo Yezu !”

Tika mposa wana ekoka koningisa mitema ya bana !

5
Manaka ya Mateya
Liteya Motu Mokanda
Boyokani ya kala
1.1 Nzambe azali mokeli 1
1.1.1 Bongengi mpe molili 3
1.1.2 Mopepe, Mabele mpe mai 5
1.1.3 Milona mpe banzete 7
1.1.4 Banyama mpe batu 9
1.1.5 Nzambe akelaki Adamu mpe Eva 11
1.1.6 Elanga ya Edene 13
1.1.7 Kaina mpe Abel 15
1.2 Nzambe akokisi bilaka na ye – Abraham, 17
Esau mpe Jakob
1.2.1 Abram – Libiangi mpe elaka – Abram mpe Lot 19
1.2.2 Abram abikisi Lot – Bondimi ya Abram 21
1.2.3 Kotala ya Nzambe – Kobotama ya Izaak – Komekama 23
Ya Abraham
1.2.4 Eliezer mpe Rebecca 25
1.2.5 Supu ya motane – Lipamboli ya Jakob 27
1.2.6 Kokima mpe ndoto ya Jakob – Epai ya Laban – Libota 29
Mpe bolamu ya Jakob
1.2.7 Bozongi – Jakob azwi nkombo ya Israel 31

Boyokani ya Sika
1.3 Yezu-Kristo azali Mwana ya Nzambe 33
1.3.1 Yoane-Mobatisi 35
1.3.2 Yezu abatisami na mai mpe azui Molimo-Mosantu 37
1.3.3 Yoane alakisi Yezu 39

Liteya Motu Mokanda


1.3.4 Yezu akomi koteya na miso ya bato – Bayekoli 41
ya liboso
1.3.5 Likamwisi ya liboso ya Yezu 43
1.3.6 Koluka monene 45
1.3.7 Ngai mpe nazali ya ye 47
1.4 Yezu-Kristo atindi bantoma na ye 49
1.4.1 Yezu asengi na bayekoli na ye bazala na bomikitisi 51
1.4.2 Yezu-Kristo, nzete ya solo 53
1.4.3 Bantoma batatoli oyo atindaki bango, Yezu-Kristo 55
1.4.4 Ntoma Piere na boloko 57
1.4.5 Mokengeli ya boloko ya Filipe 59
1.4.6 Oyo bantoma bazali kosala 61
1.4.7 Ntoma na ngai azali mopanzi nsango ya Yezu 63
1.5 Losambo esantu ya talo 65
1.5.1 Mbotama – Mosikoli alakalaki 67
1.5.2 Noel – Koyebisa mpe kobotama ya Yezu-Kristo 69
1.5.3 Yenga ya mandalala – Kokota na Yelusalem 71
1.5.4 Mitano Esantu – Gethsemane 73
1.5.5 Pasika – Yezu abimeli basi na lilita 75
1.5.6 Kobuta – Kotuta ya Kristo 77
1.5.7 Pentekote – Kokita ta Molimo-Mosantu na Pentekote 79

6
1.1.0 Nzambe asalaki biloko nionso

1.1.1 Bongengi mpe molili


1.1.2 Mopepe, Mabele mpe mai
1.1.3 Milona mpe banzete
1.1.4 Banyama mpe batu
1.1.5 Nzambe akelaki Adamu mpe Eva
1.1.6 Elanga ya Edene
1.1.7 Kaina mpe Abel

Na bokuse

Nzambe azali mokeli ya biloko binso, ya komonana mpe ya komonana te. Asali bongengi –
moyi, sanza, minzoto, mopepe, Mabele, mayi, banzete, nyama mpe batu : Adamu mpe Eva.
Nzambe asantisaki mokolo ya sambo, yango asalaki mokolo ya bopemi.

Nzambe asali mobali mpe apesi ye molongani. Apesi ye etinda ya kozala mokonzi ya manso
asalaki mpe kobatela yango. Batu ya liboso, Adamu na Eva, bafandaki na elanga ya Eden.
Bazalaki na ndingisa ya kolia mbuma nionso. Kasi, Nzambe apekisaki na Adamu kolia mbuma
ya boyebi ya malamu mpe mabe. Nioka akosi Eva, mpe azangisi botosi. Adamu mpe Eva
baliaki mbuma epekisamaki. Ezalaki lisumu. Na yango, balongwaki na elanga ya Eden.

Adamu mpe Eva bazuaki liboso bana mibale; Kaina mpe Abel, baoyo bamemaka makabo na
bango epai ya Nzambe. Kaka likabo ya Abel esepelisaki Nzambe. Kaina akomaki na motema
likunya mpe na kanda. Nzambe akebisaki ye na lisumu, kasi Kaina abomaki ata bongo ndeko
na ye.

7
Bongengi mpe molili
Genese 1:1-19

8
Bongengi mpe molili

Genese 1:1-19

Molili eyei. Mwana mobali, lokola yo, azali kosakana na bandeko na ye ya mibali mpe basi.
Butu ekangi ye, mpe bazongi na ndako. Mwana mobali akei na libulu ya mayi esika ya
kosokola maboko. Akomi kosakana na mayi mpe azali komona te molili ekoti penza. Nionso
ezali molili zinga-zinga na ye. Mwana mobali azali kolenga. Azali koyokamela makelele nionso
zinga-zinga na ye. Mbala moko, nyama moko lokola mbwa ya zamba ekomi koseka. Mwana
mobali alingi sik’oyo azonga na ndako. Atondi na mawa, amiyoki ete esili mpo na ye na sima
asengi na Nzambe asalisa ye. Amoni nzete moko oyo akanga lokola elembo, bongo, ayebi
malamu nzela ya ndako. Sima ya pema ya kolenga, afandi pembeni ya libota na ye;
bazingami na moto na libanda ya lopango.

Bikelamu nionso bazali na mposa ya mayi, mopepe mpe Mabele. Nzambe asali nionso lokola
ebandeli ya bomoi nionso. Nionso Nzambe asali ezali ya kokoka, mbeba te. Papa ya mwana
mobali amoni ete mwana na ye azali kolenga. Ameki kopesa ye bokasi. Alobi na ye : “Omoni
lolenge minzoto ezali kongenga lelo ? Ezali komonana lokola Nzambe apesi minzoto nzela
engenga mpe engala kaka mpo alakisa biso ete aboyi tofanda biso moko na molili”

“Minzoto ezali kitoko mingi, papa, kasi nalingi ete ezalaka kaka moyi mikolo nionso”, mwana
mobali ayanoli na elikia. Papa na ye aseki : “... kasi na ntango nini olingi olala ?” Nzambe
ayebi ete bato nionso mpe banyama nionso bazali na mposa ya kopema sima ya misala na
bango ya mokolo. Yango wana Nzambe asali moyi ezala mpe butu. Tokeyi sik’oyo kopema”.
Mwana mobali alingi kolala te mpe alobi : “nalembi nanu te. Betela ngai, soki esepelisi yo
mwa lisolo yambo tokende kolala”. Papa andimi na esengo : “ezali malamu, nakobetela yo
lolenge Nzambe akelaki mokili”.

Minzoto kati ya likolo ya molili ezali penza kitoko. Ezali mpe ndenge moko mpo na mapata ya
bleu na mokolo ya moyi kitoko penza ya likolo tokoki komona kaka na miso. Likolo ezali esika
ya malamu, malonga wapi Nzambe na banzelu na ye bafandaka. Ntango Nzambe amitié mpo
na kosala mokili, nionso ezali na eloko te, polele mpe molili. Ezalaki ata na nzete te, ata
banyama te, ata bangomba te, ata eloko moko te na oyo tokoki komona. Eloko moko te
ezalaki, mpe kaka butu na butu. Nzambe alobi : “Tika bongengi ezala !” Asali bongengi
akaboli yango na butu. Na suka ya mokolo ya liboso, Nzambe amonaki na esengo ete
bongengi ezalaki malamu.

Mokolo ya mibale, Nzambe akaboli likolo na Mabele. Likolo esalamaki mpe na ye mopepe
mpe mapata. Nzambe asengi mayi na bisika mosusu; na lolenge ete esalama mayi na
monana mpe laki, mpe Mabele emonani. Nzambe asalaki bangomba mpe bisobe, mpe matiti
nionso, banzete ya mike mpe ya minene. Nzambe alobi nionso ezalaki malamu. Ezalaki
mokolo ya misatu ya kokela ya Nzambe.

Na sima Nzambe asalaki bongengi monene na mokolo mpe ya moke mpo na butu. Banda
kala, moyi engalaka na mokolo mpe sanza na butu. Tozali kozwa lisusu mikolo mpe butu
mpe na kotanga mposo, basanza mpe bambula.”

9
Makanisi mpo na molakisi
1. Bosenga na bana bazongela :
Nzambe asalaki bongengi, moyi, sanza mpe minzoto
2. Bosolola makambo oyo :
Nzambe mokeli asalaki bongngi. Bongengi esalelaka biso nini ?
• Tozali na mposa ya bongengi mpo tobikela
• Moyi epesaka molunge mpe bokasi
• Sanza engengisaka biso na butu
• Minzoto ebele ezali na esika na yango na likolo
• Minzoto esalisaka kolakisa epai ya kokende na molili.
3. Tozali kotonda Tata na biso ya likolo mpo na bongengi ya mokili. Asali lisusu
bongengi mpo na misuke na biso. Yezu-Kristo azali bongengi yango.

Liteya
Nzambe azali mokeli ya bongengi ya mokili mpe ya molimo.

10
Mopepe, Mabele mpe mayi
Genese 1:1-19

Mwana mobali mpe bandeko na ye ya mibali bamipesi na lisano ya sika. Eloko oyo esepelisi bango,
ezali zelo oyo ezali kokita kati na misapi na bango. Ntango mama na bango azali kobenga bango mpo
na kolia, bazali kokoka kondima te ete ngonga eleki mbangu. Bazali kolona lisusu mbangu na zelo
mwa nzete oyo bapikolaki mpe bazwi esengo ya komonana ete basali mwa elanga ya moke. Na
esengo penza, bakimi mbangu mpo na kolia. Mwana mobali alobi na esengo monene : “Tosali mokili
na biso ! Ezali malamu. Nasali ngomba mibale mpe libulu moko ya mayi. Naloni banzete ya mike na ya
minene. Soki osepeli, mama yaka kotala!”

Papa alobi ete : “Tolia liboso !” Mwana mobali afandi mpo alia, kasi, ntango ya kolia, azali kokanisa
“oyo ye asali”. Alobi na mongongo makasi : “Nazali lisusu na mposa ya moyi, na sanza mpe minzoto.
Lolenge nini na kosala ?” Papa na ye ayanoli ye : “moyi, sanza mpe minzoto, esengeli okabola yango
na Nzambe”.

Mwana mobali motema mokuse na komona oyo ye asali. Sima ya kolia, bango nionso bakeyi esika
asali mosala na ye ya malamu. Ezali mawa ! Mwana mobali alembi penza nzoto ntango amoni makasa
mpe bitape ya nzete ekauki. Mayi ezali lisusu te na libulu asalaki ! Molunge ya moyi ebebisi nionso.
Mwana mobali ameki kotondisa libulu na mayi. Na bongo mayi eningisi mpe ebebisi mpe mwa ndako
mwana mobali atongaki. Bandeko mibali mpe basi bazali komeka kolendisa mwana mobali. Mwana
mobali alobi na mawa na papa na ye : “olimbolelaki ngai malamu, na butu eleki lolenge Nzambe
asalaki mokili, mpe ngai nalingi nasala mokili na ngai moko”. Papa na ye alimboleli ye, nionso moto
akosala (ndako, masuwa, bilamba...) ekosila na kolimwa. Kaka biloko Nzambe asali ekotikala libela.
Tokoki kosala mokili na biso te. Tokobongisa kaka oyo Nzambe apesi biso.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Nzambe asalaki likolo, mabele mpe mai. Oyo Nzambe asali ezali malamu.
2. Bosolola makambo oyo :
• Mai esalisaka na nini ? (Ezali na ntina nini ? Biloko nionso ekufaka soki mai mazangi)
• Na mabele mai tomonaka yango lolenge nini ? (londende, matanga ya mbula, mapata,
mopepe ya mai, glace, mbula ya mabanga mpe bongo na bongo)
• Tomonaka mai wapi (na nkelu, na bibale, na laki mpe mai monene)
• Mopepe ezali malamu. Ezali na ntina, mpe tozali na mposa na yango mpo tozala na bomoi.
Tozali na ntina ya mopepe po topema.
• Mabele ezali na ntina monene. Biloko toliaka ebimaka na mabele.
3. Bikelamu nionso ezali na bomoi, ezali na mposa ya mai, ya mopepe mpe mabele. Nzambe
asalaki nionso oyo mpo ezala ebandeli ya bomoi. Nionso Nzambe asali ezali malamu. Ezali na bobe
ata moke te.

Liteya
Bomoi nionso ekangami na biloko oyo Nzambe asalaki (mopepe; mabele; mai). Oyo esalami na
Nzambe ezali malamu.

11
Milona mpe banzete
Genese 1:11-13

Genese 1
Sima Nzambe alobi: “Mabele ebimisa matiti ya ndenge nyonso; ndunda ya ndenge nyonso,
oyo ebotaka mbuma ya kokona; pe banzete ya ndenge nyonso, oyo ebotaka mbuma ya kolia
pe ezalaka na mikokoli.” Pe esalamaki se bongo. Boye mabele ebimisaki matiti ya ndenge
nyonso; ndunda ya ndenge nyonso, oyo ebotaka mbuma ya kokona; pe banzete ya ndenge
nyonso, oyo ebotaka mbuma ya kolia pe ezalaka na mikokoli. Pe Nzambe amoni ete yango
ezalaki malamu. Pokwa ekomaki, pe tongo etanaki. Wana ezalaki mokolo ya misato.

12
Milona mpe banzete
Genese 1:11-13

Mwana mobali mpe ndeko na ye ya mwasi bazali kosala na bilanga na mama na bango.
Bazali kobongisa mabele mpo na koloba. “Awa mabele ezali kitoko mpe pepele mpe awa
milona ekokola mbangu”, mama na bango alobi. Bana bakangi motema kobalola mabele
mpe kolongola mabanga. Bazwi ndingisa, sima ya mosala makasi, ya kosopa milona. Mwa
bambuma elembisi elenge ya mobali. “Mama, ezali mpasi ya kondima ete nkona oyo ya
moke ekozala mokolo mosusu liboke”, mwana mobali alobi na mama na ye. Mama azali
kolakisa bango ndenge ya kosopa bambuma. Bana balandi ndakisa na ye na lolenge ya
malamu. Basilisi mosala na bango ya kolona mokolo wana.

Bafandi na se ya nzete ya manga ya monene mpe bapemi mpo na mosala makasi na bango.
Bazolia bamanga ezali na mai. Mbuma ezali malamu mpe mai mingi, kasi ndeko mwasi ya
mwana mobali alingi yango. “Mukokoli ezali pasi mpo na kolongola. Ekoki kozala na bamanga
oyo ezangi mukokoli ?” alobi bongo. “Ndenge nini bakozua banzete ya manga ya sika ?”
Batie makanisi, bana bazotala mikokoli. “Eloko oyo ekoki ya solo kokoma nzete ?” Bazali
komituna. Mama na bango amoni makanisi na bango mpe atali malamu na bokebi nionso
zinga zinga na ye. Aumeli te komona nzete ya sika. Alakisi bango ndenge nzete moke ezali
kati ya mukokoli ekabwani, bana bakamwe. Solo, Tata na biso ya likolo ayebaki kosala biloko
binso !

Esengeli sik’oyo kokoba na mosala. Mwana mobali azongi na elanga oyo balonaki mpe
abandi kopanza mabele. “Ozali kosala nini ?” Mama na ye azali kotuna ye. “Nazali kotala soki
mwa milona ebimi, kasi eloko moko te ebimi”, mwana mobali ayanoli. Mama na bango
alimboleli bango esengeli mwa ntango mpo nzete to molona ebima. “Bokoki te kotimola na
zelo, bokozwa kaka misisa ya nzete”, mama alobi.

Nzela ezali molayi kino na elanga, kasi mwana mobali; sik’oyo azota,bola na esengo mpo
mosala esepelisi ye. Kokamwa, akomi kobongisa mbuma balonaki mokolo wana. Banzete ya
sika ekomi kobima. Azobanga nyama aya sik’oyo kobebisa yango. Azali kokengela mpo ezwa
penza mai. Mwana mobali azali kozela, na motema mobimba, ete mikala ebimisa milona
penza ya malonga.

13
Makanisi mpo na molakisi
1. Bosenga bana bazongela :
• Nzambe asalaki banzete. Akengeli yango mpo yango mpe ebatelama mpe ekoma
ebele.
2. Bosolola makambo oyo :
Loba nanu makambo oyo yo omona ntango osalaka mosala ya kobongisa bafololo to
kosala bilanga.
3. Limbola na bana mabombami ya bomoi oyo Nzambe atia na kati ya nkona. (Okoki
kolakisa bana nkona a ndenge na ndenge)
• Nkona ebateli bomoi moko na moko na lolenge na yango
• Banzete ezali ebele moko na moko na nkonana yango
• Nkona ezali bilei mpo na bato mpe mpo banyama
• Mpo na nzete moko na moko ekeseni lolenge ya kolona mpe kobatela yango (mai,
moto ya mabele mpe mabele ya kolona yango)

Liteya
Moto akolona mpe akosalisa milona mike mike, kasi kaka lipamboli ya Nzambe ekopesa
yango nzela ekola.

14
Banyama mpe bato
Genese 1:20-31 / Genese 2:1-4
Genese 1
20 Bongo Nzambe alobi: “Mokili ebimisa banyama ya ndenge nyonso, ya zamba pe ya
mboka, ya minene pe ya mike.” Pe esalamaki se bongo. 21 Boye Nzambe asalaki banyama
ya some oyo ezalaka na kati ya mai, pe bambisi ya ndenge na ndenge oyo etambolaka na
mai; asali pe bandeke ya ndenge na ndenge. Nzambe amoni ete yango ezalaki malamu, 22
abenisi yango nyonso pe alobi: “Bobotana pe bozala ebele, botondisa ba-ebale; pe bandeke
ekoma mingi na mokili.” 23 Pokwa ekomaki pe tongo etanaki. Wana ezalaki mokolo ya
mitano. 24 Nzambe alobi: “Mokili ebimisa banyama ya ndenge nyonso, ya zamba pe ya
mboka, ya minene pe ya mike.” Pe esalamaki se bongo. 25 Boye Nzambe asalaki banyama
ya ndenge nyonso, ya zamba pe ya mboka, ya minene pe ya mike; pe amonaki ete ezalaki
malamu. 26 Bongo Nzambe alobi: “Sik’oyo tosala bato lokola elili na biso, bazala ndenge biso
moko tozali. Bakozala bakonzi ya bambisi ya ebale, ya bandeke ya likolo, ya banyama ya
mboka na ya zamba, ezala ya minene to ya mike.” 27 Boye Nzambe asalaki bato lokola elili
na ye, asalaki bango lokola elili ya Nzambe penza, asalaki bango mobali na mwasi. 28
Nzambe abenisi bango pe alobi: “Bobotana pe bozala ebele, botondisa mokili pe bozala
bakonzi na yango. Bozala bakonzi ya bambisi ya mai, ya bandeke pe ya banyama nyonso ya
mokili.” 29 Nzambe alobi lisusu: “Napesi bino ndunda nyonso ya mokili mobimba oyo
ebotaka mbuma ya kokona pe nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya mikokoli; wana nde bilei
na bino. 30 Ndenge moko epai ya banyama nyonso ya mokili, bandeke, pe biloko nyonso oyo
ezali kopema pe kotambola, napesi yango matiti po na kolia.” Pe esalamaki se bongo. 31
Nzambe amoni ete biloko nyonso asalaki ezalaki malamu mingi. Pokwa ekomaki pe tongo
etanaki. Wana ezalaki mokolo ya motoba.

Genese 2
Wana ezali ndenge Likolo na se esalamaki, pe biloko nyonso oyo ezali na kati. 2 Tango
nzambe asilisaki misala nyonso oyo azalaki kosala, na mokolo ya sambo apemaki. 3 Bongo
Nzambe abenisaki mokolo ya sambo, pe akomisaki yango mokolo ya bosantu. Pamba te na
mokolo yango ye asilisaki misala nyonso oyo azalaki kosala, pe apemaki. 4 Oyo ezali ndenge
Nzambe asalaki Likolo na se.

15
Banyama mpe bato
Genese 1:20-31; Genese 2:1-4

Mwana mobali afukami na nse ya nzete na ndeko na ye ya mobali mpe ya mwasi. Bamesana
na makelele te mpe kimia. Bayaka awa mikolo ebele mpo na kotala soso ya mwasi ndenge
atonga zala na ye na esika ya kobombama. Soso afandeli maki na ye. Mokolo yango ekoki
mwana soso azali kobima na maki, na lolenge moko ekoki. Bana basepeli. Bazwi ye na
maboko malembe mpe basepelisi ye. Bana soso mususu balandi ye.

Pokwa yango, mwana mobali atuni papa na ye : “Nzambe asalaki mpe bana soso oyo
bamipasoli lelo ? Papa na ye ayanoli : “Bana soso babimi na maki ya mama na bango, na
lolenge Nzambe akanaki. Na kobetela yo ndenge nini asalaki banyama, mpe lisusu batu”.

Sanza mpe minzoto engalaka o likolo. Mapata esalaki mpe etando kitoko na likolo. Mabele
etondisamaki na nzete. Nzambe asalaki nyonso wana, kasi kimia monene ezalaki na mabele.
Na tango penza ya mokolo ya mitano, Nzambe atondisi mayi ya monana na bomoi; Nzambe
asali ebele ya banyama ya mayi. Bamayi ya monana ezalaki sik’oyo koningana, kasi likolo
ezalaki polele. Mokolo kaka yango, Nzambe asali bandeke. Batondisali na mopepe koyemba
na bango mpe kopumbwa na bango ya esengo. Nzambe asaleli bango bazala. Baboti maki
na bango na lolenge ete mokili etondisama na bandeko ya lolenge nionso. Na sima moyi
esili. Ezalaki suka ya mokolo ya mitano. Nzambe amoni ete nionso wana ezalaki malamu.

Mokolo elandi, Nzambe asalaki banyama oyo ezali kobikela na mabele kaka, uta musopi kino
nzoko ya monene. Nyama nionso azalaki na lolenge mpe monene ya ndenge na yango.
Bamakaku bazalaki kotambola na nzete mpe kopumbuka na nzete; bangando balandani na
moluka bangombolo bazalaki kobombama soki bazali koluka koboma bango. Ntango Nzambe
asilisi mosala oyo monene, amoni ete nionso ezalaki malamu.

Nzambe abombi suka eloko moko ya ntina : ezali nde ntango sik’oyo asali moto lokola
motole ya bokeli na ye. Nzambe asali liboso mobali moko mpe mwasi moko. Nzambe asalaka
bango na elilingi na ye. Nzambe apesaki bango makabo ya lolenge na yango : kosala ndenge
olingi mpe makoki ya kokanisa mpe kondima. Nzambe apamboli bango mpe apesi bango
mosalaya kokengela na nse mpe na banyama. Bakokaki kozua banyama mpe bazalaki penza
na biloko mpo na kobikela. Ezalaki suka ya mokolo ya motoba. Nzambe amoni lisusu ete
nionso ezalaki malamu.

Mokolo ya sambo, Nzambe apemi na misala na ye. Nzambe apamboli mokolo ya sambo mpe
ekomi mpo na ye mokolo esantisami.

16
Makanisi mpo na molakisi
1. Bosenga bana bazongela :
Nzambe asalaki mobali, mwasi mpe banyama nionso, Nzambe abenisi mokolo ya sambo
mpe asantisi yango.
2. Bosolola makambo oyo :
• Banyama nini bino boyebi ?
• Tia yango na molongo na ndenge evandi na mayi, na mopepe to na mabele.
3. Limbola makambo oyo :
• Nzambe asalaki mokolo moko mpo moto apema mpe asantisaki yango. Nde ntina
totalaka mokolo ya yenge ete ezali mokolo esantu.
• Na yenga, biso toyokaka oyo Nzambe alobelaka biso na kati ya losambo.
• Tozuaka liteya, biso tolendisami, masumu na biso elimbisami mpe bondimi na biso
elendisami.
• Tosanganaka na molei mosantu.
• Yenga ezali mokolo ya mapamboli.

Liteya
Nzambe akengelaka mosala na ye. Nzambe akelaki biso mpe, ye akengelaka biso.

17
Nzambe akeli Adamu mpe Eva
Genese 2:4-25
Genese 2
Tango Yawe Nzambe asalaki Likolo na se, 5 ata nzete moko te ezalaki na mokili, pe ata lititi
moko te ebimaki, po Yawe Nzambe anokisaki nanu mbula te, pe ata moto moko te azalaki po
na kokona biloko na mabele. 6 Nzokande mai ezalaki kobima na se ya mabele, pe kopanzana
na mokili mobimba. 7 Boye Yawe Nzambe akamataki mabele, asalaki na yango moko. Atuli
ye pema ya bomoi na zolo, bongo moto akomi na bomoi. 8 Yawe Nzambe akoni elanga na
mokili ya Eden, na epai moi ebimaka, pe atie kuna moto oyo ye asalaki. 9 Yawe Nzambe
abimisi na mabele ndenge nyonso ya banzete ya kitoko po na kotala, oyo ebotaka mbuma ya
elengi po na kolia. Na kati-kati ya elanga atie nzete ya bomoi, na nzete oyo epesaka mayele
ya koyeba makambo malamu pe mabe. 10 Ebale moko ezalaki kobima na Eden pe kopesa
mai na elanga. Kobanda wana, ebale yango ekabwanaki na bamai minei. 11 Kombo ya mai
ya liboso Pishon, yango ezali kozinga mabele ya Hawila. Mokili yango ezali na or, 12 or moko
ya litoko penza, na malasi pe mabanga ya talo. 13 Kombo ya mai ya mibela Gihon, yango
ezali kozinga mabele ya Kush. 14 Kombo ya mai ya misato Tigre, yango ezali kotiyola na
pembeni ya mokili ya Asirie na epai moi ebimaka. Pe mai ya minei kombo na yango Ufrate.
15 Yawe Nzambe akamati moto yango pe atie ye na elanga ya Eden, po na kokona biloko
kuna pe po na kokengelaka yango. 16 Apesi ye motindo boye: “Okoki kolia mbuma ya
banzete nyonso ya elanga, 17 kasi mbuma ya nzete oyo epesaka mayele ya koyeba
makambo ya malamu na ya mabe, okoki kolia yango te. Mokolo okolia yango, okokufa.” 18
Sima Yawe Nzambe alobi: “Ezali malamu te moto azala kaka ye moko. Nakosalela ye
moninga oyo akoki na ye po na kosalisaka ye.” 19 Bongo Yawe Nzambe akamataki mabele
pe asalaki na yango banyama ya ndenge nyonso pe bandeke ya ndenge nyonso; amemi
yango epai ya moto po na kotala soki ye akopesa yango kombo nini. Pe kombo oyo ye
apesaki na nyama moko moko ezali kombo na yango penza. 20 Boye moto apesi kombo na
banyama nyonso ya mboka, na bandeke, pe na banyama ya zamba. Kasi moninga oyo akoki
na ye po na kosalisaka ye azalaki te. 21 Bongo Yawe Nzambe alalisi moto pongi makasi.
Abimisi mokuwa moko ya mopanzi na ye, pe akangisi mosuni na esika yango. 22 Na mokuwa
oyo abimisaki na mopanzi ya moto, Yawe Nzambe asali na yango mwasi, pe amemi ye epai
ya moto. 23 Bongo moto alobi: “A! Oyo akokani na ngai penza. Biso na ye tozali bobele moto
moko; nzoto na ye ezali nzoto na ngai moko. Bakobenga ye ‘mwasi’, pamba te auti na nzoto
na ngai mobali.” 24 Yango wana mobali atikaka tata na ye na mama na ye, pe asanganaka
na mwasi na ye, po bango mibale bakoma moto moko. 25 Mobali na mwasi bazalaki
bolumbu, kasi bazalaki koyoka soni te.

18
Nzambe akeli Adamu mpe Eva
Genese 2 : 4 – 25

Sima ya kosala likolo, mabele mpe oyo nionso ezali kati na yango, Nzambe akeli moto ya
liboso, oyo abengamaki Adamu. Nzambe aloni elanga na Eden. Na sima atie moto oyo ye
asalaki. Adamu asengelaki kobongisa mpe kobatela elanga. Nionso oyo Nzambe asalaki
ezalaki na maboko na ye. Nzambe azalaki kokokisa mposa ya Adamu mpe banyama. Nzambe
asalaki banzete ya mike mpe ya minene, wapi esengelaki kolia mbuma na yango. Adamu
azalaki na nionso oyo azalaki na yango ntina. Abikelaki na bomoko na boyokani na Nzambe
mpe bikela na ye. Nzambe azalaki kosolola mbala moko na Adamu mpe nionso ezalaki ya
kokoka. Adamu azalaki komitungisa na eloko moko te, mpe azalaki na makambo te. Nzambe
apesaki mosala na Adamu ya kokengela banyama nionso na bambisi na mayi mpe bandeke.
Asengelaki mpe kolona milona na mabele.

Elanga ya Eden ezalaki esika moko kitoko. Na kati kati ya elanga, Nzambe alonaki banzete
mibale ya lolenge na yango : nzete ya bomoi mpe nzete ya koyeba malamu mpe mabe.
Ezalaki na eloko se moko na lolenge ya kolinga ya Nzambe oyo Adamu asengelaki te kosala :
“... kasi okolia te nzete ya koyeba malamu mpe mabe te, mpo mokolo okolia yango,
okokufa”.

Adamu azalaki na makabo mpe makoki oyo ekelamu moko akoki kozala na yango te.
Nzambe apesi Adamu mosala ya kopesa kombo na banyama nionso. Alobi na ye mpe nyama
nionso ekozwa kombo ye akopesa. Ezalaki mosala moko kitoko ya kopesa nyama moko na
moko kombo na ye. Ezangaki na Adamu eloko moko mpo azala na esengo penza.

Adamu azalaki ye moko na banyama zinga zinga na ye. Nzambe asalaki mwasi mpo na
Adamu, mwasi oyo asengelaki azala kaka na ye. Adamu azalaki na esengo. Abengaki mwasi
na ye Eva. Uta wana, mobali mpe mwasi babiangami kofanda esika moko.

Bokoki kokanisa ete Adamu mpe Eva bafandaki kati na esika ya kitoko ? Esika wapi moyi
ezali kobima mpe nionso ezali kokoma na bomoi. Bandeke bazali koyemba mpe kopumbwa
na banzete. Bikelamu nionso ya bomoi ezali kolamuka na mokolo kitoko. Adamu mpe Eva
bazali na kolamuka. Bango mibale bazali na esengo komona mokolo ya sika mpe kitoko. Bato
mpe banyama bafandi na lolenge esengeli.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga bana bazongela :
Nzambe apesi moto nguya ya lolenge na yango. Alingi tosalisa malamu bikelamu.
2. Bosolola makambo oyo :
• Elobeli : kaka se bato bakoki kosolola kati na bango mpe kosolola na Nzambe.
• Mayele : kaka moto akoki kokanisa mpe kosala biloko ya sika.
• Mposa : kaka na moto epesami mposa ya kosala oyo alingi. Akoki kopona kati ya
malamu mpe mabe.
• Bondimi : moto akoki kondimela Nzambe, kopesa melesi mpe kotatola ye.
• Molimo : moto azali kozwa bomoi na Nzambe.
3. Tosengeli tosalela makabo na biso na lolenge Nzambe alingi.

Liteya
Kati ya bikelamu nionso ya Nzambe, moto azali na lolenge ya kokesena na bikelamu
mususu. Tosengeli kokengela bikelamu ya Nzambe. Tosengeli kolinga bato nionso.

19
Elanga ya Eden
Genese 3
Genese 3
Na kati ya banyama nyonso oyo Yawe nzambe asalaki, nyoka azalaki nyama moko alekaki na
mayele ya kokosa. Atunaki mwasi: “Ya solo, Nzambe apekisi ete bolia mbuma ya banzete
nyonso ya elanga te?” 2 Mwasi azongisi: “Tokoki kolia mbuma ya banzete nyonso ya elanga,
3 kasi po na nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki: ‘Bolia mbuma na yango
te, bosimba yango pe te, soki te bokokufa.’” 4 Nyoka alobi: “Lokuta! Bokokufa te. 5 Nzambe
alobaki bongo po ayebi ete mokolo bokolia yango, misi na bino ekofungwama, bokokoma
lokola banzambe, pe bokozwa mayele ya koyeba makambo ya malamu na ya mabe.” 6
Mwasi amoni ete nzete yango ezali na mbuma ya elengi po na kolia pe kitoko po na kotala,
pe yango ezali malamu po na kopesa mayele. Yango wana akamati mbuma moko pe alei,
apesi pe mobali na ye, bongo ye alei yango. 7 Tango basilisi kolia yango, miso na bango
efungwami, pe bayei koyeba ete bazali bolumbu. Bakamati makasa ya nzete ya figi, batongi
yango lokola bilamba pe balati. 8 Na pokwa, tango mopepe ya malili ekomi, bayoki Yawe
Nzambe azali kotambola na kati ya elanga. Bakimi ye pe babombami na kati ya banzete. 9
Kasi Yawe Nzambe abengi mobali, atuni ye: “Ozali wapi?” 10 Mobali azongisi: “Nayokaki yo
ozali kotambola na kati ya elanga, bongo nabangaki pe nabombani po nazali bolumbu.” 11
Yawe Nzambe atuni ye lisusu: “Nani ayebisi yo ete ozali bolumbu? Olei mbuma oyo
napekisaki yo?” 12 Mobali azongisi: “Mwasi oyo opesaki ngai, ye moto ayeelaki ngai mbuma
yango po nalia; yango wana naliaki yango.” 13 Yawe Nzambe atuni mwasi: “Po na nini osali
boye?” Mwasi azongisi: “Nyoka moto akosi ngai, yango wana naliaki mbuma yango.” 14
Yawe Nzambe alobi na nyoka: “Lokola osali boye, nakopesa yo etumbu na kati ya banyama
nyonso ya zamba pe ya mboka. Banda lelo, na bomoi na yo mobimba okobanda kotambola
na libumu pe okozala kolia mabele. 15 Nakosala ete bozala banguna yo nyoka na mwasi,
libota na yo na libota na ye. Bango bakonyata yo na motu, pe yo okoswa bango na makolo.”
16 Pe Yawe Nzambe alobi na mwasi: “Okobanda koyoka pasi mingi na tango ozali na zemi
pe na tango ya kobota. Ata boye, okozala kaka na posa ya mobali na yo, pe ye akozala
mokonzi na yo.” 17-18 Bongo alobi na mobali boye: “Lokola ondimaki maloba ya mwasi na
yo, pe oliaki mbuma oyo napekisaki yo, nakopesa mabele etumbu po na mabe oyo osali.
Yango ekozala kobimisela yo banzete ya nzube pe matiti ya mabe. Na bomoi na yo mobimba
okobanda kolia kaka biloko oyo bilanga na yo ekobota. Po na kozwa yango, okobanda
komona pasi, 19 pe kobima motoki na elongi na yo, tii tango okozonga mabele, pamba te
ozali mabele pe okozonga kaka mabele.” 20 Adamu apesi mwasi na ye kombo Eva, elakisi
Bomoi, po ye azali mama ya bato nyonso. 21 Yawe Nzambe asali bilamba ya poso ya nyama
po na Adamu na mwasi na ye, pe alatisi bango yango. 22 Yawe Nzambe alobi: “Sik’oyo moto
akomi lokola moko na kati na biso, pamba te ayebi makambo ya malamu na ya mabe. Ezali
malamu te alia mbuma ya nzete oyo epesaka bomoi, po soki alei yango akozala na bomoi ya
seko.” 23 Bongo Yawe Nzambe abengani moto na elanga ya Eden, po akende kosala mosala
na mabele oyo asalela ye. 24 Sima ya kobengana ye, atiaki bakengeli oyo babengaka ba-
Sheriben, penepene ya elanga ya Eden, na epai moi ebimaka; bango bazalaki kobalolabalola
bambeli ya moto po na kopekisa ete moto moko te akoma penepene ya nzete oyo epesaka
bomoi.

20
Elanga ya Eden
Genese 3

Adamu mpe Eva bafandi na esengo na elanga kitoko ya Eden. Ekozala kaka boye te. Sima ya
zanga moko boye, Eva atamboli kati na elanga mpe azali kobuka bambuma. Na esika moko
ya elanga, banzete ezali mingi te. Eva amoni mwa esika moko ya polele kati ya banzete
mibale etelema. Eva ayebi mbala moko mosusu kati na nionso mibale. Abangi kopusana.
Akanisi maye Adamu ayebisaka na mokolo mosusu : “Nzambe apekisi biso kolia mbuma ya
nzete wana. Soki tosali, tokokufa”. Eva andimi kitoko ya nzete. Na sima apusani. Mbala
moko, ayoki mongongo pembeni na ye : “Omoni te ete ezali nzete kitoko ? Tala malamu
monene ya mbuma wana ? Mpe soki omeki moko ya mbuma wana ?” Eva akomi kotala zinga
zinga na ye. Mongongo ezali oyo ya nyoka, kati ya nzete. Eva ayanoli : “Nzambe alobaki na
biso tosimba mbuma wana te, mpe tolia te, noki te tokokufa”.

Nyoka alobi malembe : “kokufa ? Te ! Nzambe ayebi ete soki bolei mbuma wana bokokoma
lokola ye. Bokoyeba malamu mpe mabe !” Eva atali nzete na mbuma na yango na ndenge
mosusu. Abuki moko na kobanga mpe aleyi mwa ndambu. Mbuma ezali kitoko penza. Apesi
yango mpe na Adamu. Ye mpe aleyi mbuma wana. Mbala moko bamiyebi ete bazali
bolumbu. Bakomi na bobangi mpe soni.

Nini ekosalama sik’oyo ?

Bazui makasa ya minene mpo na kozipa nzoto na bango. Pokwa yango wana, lokola pokwa
nionso, Adamu na Eva bayoki mongongo ya Nzambe azali kobenga bango. Babombami.
Nzambe alobi na Adamu : “Adamu, ozali wapi ?” “Nazali komibomba mpo nazali bolumbu”,
Adamu ayanoli. Nzambe atuni ye : “Nani ayebisi yo ete ozali bolumbu ? Oleyi mbuma
epekisamaki ? Adamu azongisi; ezali Eva nde moto apesi ngai nalia. Nzambe atuni mpe na
Eva : “Mpo na nini osali yango ?” Eva ayanoli : “Nyoka nde atindiki ngai” Bazali komifunda
bango na bango.

Mpo na nini oyokeli nyoka, Adamu na Eva bazali kolongua na elanga ya Eden mpe na
bomoko na Nzambe. Nzambe asaleli bango bilamba na mposo ya nyama mpe asengi bango
bakende. Bomoi etondi na mikakatano mpe mpasi ezali kozela bango.

Na eleko wana, Nzambe alingaki kolongola bato nionso na masumu na bango mpe
kozzongisa bango lisusu kati na bomoko na ye. Nzambe alakaki kotinda Mosikoli. Elaka
yango ekokisamaki ntango Nzambe atindaki Mwana na ye Yezu-Kristo.

21
Makanisi mpo na molakisi
1. Bosenga bana bazongela :
Nzambe apesaki mobeko na Adamu mpe Eva. Asalaki nionso ete babatela mobeko
yango.
2. Bosolola makambo oyo :
Mpo na nini Adamu mpe Eva babombanaki ? (Bazalaki na likanisi mabe, mpo ete
batosaki mobeko ya Nzambe te. Eyelaka biso tomiyoka mpe mabe, soki tosali eloko ya
mabe)
3. Limbola makambo oyo :
• Nzambe apesaka mibeko na lolenge na yango.
• Nzambe alingi ete totosa mibeko yango.
• Ntango tosalaka eloko ya mabe, makanisi na biso eyebisaka biso.
• Masumu ekabolaka biso na Nzambe.
• Masumu nionso ekoki kolilmbisama.
• Yezu akozonga koluka baye bamibongisi.

Liteya
Nzambe amonaka baye babatelaka mibeko na ye.

22
Kaina na Abel
Genese 4:1-16
Genese 4
1 Adamu na mwasi na ye Eva babotaki mwana-mobali, bongo Eva apesaki ye kombo Kaina,
pamba te alobi: “Naboti mwana na lisalisi ya Yawe.” 2 Sima Eva abotaki Abel. Abel azalaki
mobokoli ya bameme, pe Kaina azalaki mokoni-bilanga. 3 Na sima ya mikolo, Kaina amemeli
Yawe ndambo ya mbuma ya bilanga na ye, apesi yango libonza. 4 Abel amemi misuni ya
kitoko pe ya mafuta ya bana ya liboso ya bameme na ye. Yawe andimi Abel na libonza na
ye, 5 kasi andimi Kaina te na libonza na ye. Bongo Kaina asiliki mabe penza, pe akangi elongi
po na kanda. 6 Yawe alobi na Kaina: “Po na nini osiliki? Po na nini okangi elongi na yo? 7
Soki osali malamu, okolonga. Kasi soki osali mabe, yeba ete masumu ezali lokola nyama ya
somo ebombami po na kokanga yo; kasi sala makasi po olonga yango.” 8 Boye Kaina alobi
na ndeko na ye Abel: “Tokende kotambola.” Tango bakomi na bilanga, Kaina akangi leki na
ye pe abomi ye. 9 Yawe atuni Kaina: “Leki na yo Abel azali wapi?” Ye azongisi: “Nayebi te.
Nakomi mokengeli ya leki na ngai?” 10 Yawe alobi: “Po na nini osali likambo ya somo boye?
Makila ya leki na yo ezali kolelela ngai uta na mabele. 11 Yango moto ekomemela yo
etumbu; pamba te esi’emeli makila ya leki na yo oyo otangisi. 12 Soki okoni biloko, ekobota
te. Okozala na mboka ya kofanda te, kasi okobanda kotambolatambola na mokili.” 13 Kaina
azongiseli Yawe: “Etumbu oyo opesi ngai eleki makasi. 14 Sik’oyo obengani ngai mosika ya
mokili oyo, pe olingi komona ngai lisusu te. Nakozala na mboka ya kofanda te, nakobanda
kotambolatambola bipai nyonso na mokili, pe moto nyonso oyo akokutana na ngai akoboma
ngai.” 15 Kasi Yawe alobi na ye: “Moto akoboma yo akozwa etumbu mbala sambo.” Yango
wana Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kaina po na kolakisa ete moto moko te akoki koboma
ye. 16 Bongo Kaina alongwaki na pembeni ya Yawe penepene ya Eden, pe akendeki kofanda
na mabele ya Nod, na epai moi ebimaka.

23
Kaina na Abel
Genese 4 : 1 – 16

Sima ya kolongwa na elanga ya Eden, Adamu mpe Eva bazwaki mpasi mpo na kobikela.
Nionso ezingi bango ezali lokola na bokeseni na oyo ezalaki na elanga ya Eden. Bazalaki
komituna na mawa : “Tokofanda wapi ? Tokolia nini ?” Esengeli bazwa esika mpo na
kofanda, mpe kosala moango mpo na kozwa ndambo ya bilei. Mikolo nionso bazali kokutana
na mikatano ya sika, na makambo ya sika. Esengeli na bango basala makasi mpo bazwa
mwa eloko.

Kaina, mwana na bango ya mobali ya liboso, abotami mwa ntango eleki. Bomoi na bango na
mwana moke ekomi mpasi. Bazalaki na esengo mpe na koyeba ntango Abel abotami, mwana
na bango ya mibale. Adamu mpe Eva basololi mbala na mbala na bana na bango na bomoko
bazalaki na yango na Nzambe. Batangisi na bana na bango losambo mpe komikaba. Kaina
na Abel bakeseni moko na mosusu, mpe yango ezali komonisama na misala na bango. Kaina
azali kosala na bilanga mpe Abel azali kobokola bibwele. Mokolo moko, bango mibale basaleli
Nzambe likabo; Kaina asali likabo ya mbuma na ye ya liboso ya bilanga na ye, mpe Abel
likabo ya ebwele ya liboso ya etonga na ye.

Nzambe atie liso ya malonga na likabo ya Abel, kasi na likabo ya Kaina te. Kaina asiliki.
Azokoka te koyeba mpo na nini Nzambe andimi likabo ya ndeko na ye kasi ya ye te. Akomi
na zuwa. Azali kotala ndeko na ye na kanda penza. Mbala moko, ayoki mongongo ya
Nzambe : “Mpe soki osali mabe, lisumu ekolala na ekuke na yo. Mpe bamposa na yo ekozala
epai na yo, kasi yo zala likolo na ye”. Nzokande na kanda akeyi epai ya ndeko na ye abandi
koswanisa ye. Koswana ezali kokoba mpe Kaina abeti ndeko na ye makasi penza. Abel azali
koningana lisusu te. Ndeko na ye Abel akufi.

Nzambe abengani Kaina. Lokola Kaina azali komipesa mpasi na motema na oyo asali mpe
ayebi oyo asali, Nzambe atie elembo na elongi na ye, mpo mutu moko te abeta ye.

24
Makanisi mpo na molakisi
1. Bosenga bana bazongela :
Kaina na Abel bapesaki Nzambe likabo. Likabo ya Abel esepelisali Nzambe, kasi oyo ya
Kaina te. Kaina abomaki ndeko na ye mpe akomaki kotelengana.
2. Bosolola na makambo oyo :
• Nini Kaina akaniselaka ndeko na ye (Azalaki na zuwa)
• Lobela nanu likambo bato baswanaka, kasi bakotisi yo (zuwa, motema mabe, kanda
mpo na moninga).
3. Limbola makambo oyo :
• Ntango nionso Nzambe alingi kokebisa biso na masumu
• Moko na moko asalaka mbeba mpe masumu
• Nzambe alendisaka biso soki tosengi yango
• Alingi kosalisa biso mpo tolonga masumu
• Na kati ya losambo nionso tozuaka bolimbisi masumu

Liteya
Nzambe alingi biso, asalisaka biso mpe alendisaka biso mpo totelemela masumu. Nzambe
alimbikisaka masumu na biso soki tomileli solo solo na lolenge tosalaki yango.

25
1.2.0 Nzambe akokisi bilaka na ye – Abraham, Ezau mpe Jakob

1.2.1 Abram – Kolinga mpe elaka – Abram mpe Lot


1.2.2 Abram abikisi Lot – Bondimi ya Abram
1.2.3 Kotala ya Nzambe – Kobotama ya Izaak – Komekama ya Abram
1.2.4 Eliezer mpe Rebecca
1.2.5 Supu ya motane – Lipamboli ya Izaak
1.2.6 Kokima mpe ndoto ya Jakob – Epai ya Laban – Libota mpe bomengo ya
Jakob
1.2.7 Kozonga – Jakob azui kombo ya Israel

1.2.0 Nzambe akokisi bilaka na ye – Abraham, Ezau mpe Jakob


NA BOKUSE

Nzambe ayebisi na Abraham : “Longwa na mboka na yo mpe kende na mboka oyo na


kolakisa yo. Na kokomisa yo ekolo monene mpe na kopambola yo”.
Abraham atosaki Nzambe, andimeli ye mpe akendeki na mwasi na ye Sara, mpe mwana ya
ndeko na ye ya mwasi Lot mpe bamemaki biloko na bango nionso bakei na mboka Kanana.

Nzambe atambuisaki ye, mpe bilaka nionso oyo alakaki ye ekokisamaki. Izaak abotamaki.
Awa Nzambe abikisaki Abraham na liwa afongolaki lotema mpo apesa mwana na ye lokola
likabo.

Biso mpe tolingi kolanda nzela ya bondimi mpe na bomoi oyo Nzambe azali kolakisa biso.
Tosengeli kotosa mpe komipesa na Nzambe. Soki tosali boye Nzambe akopambol biso mingi
penza.

Izaak mpe Rebecca bazalaki na bana mibale, bazalaki mapasa, Ezau mpe Jakob. Na mposa
ya bokulutu, Jakob azwaki mapamboli ya bomwana liboso na maboko ya tata na ye, Ezau ye
azuaki eloko te.

Jakob akimaki losika ya ndeko na ye. Akimelaki epai ya noko na ye Laban, kuna atikalaki
mbula ntuku mibale. Sima ayaki kozonga na libota na ye na Kanana. Sima ya kobunda na
Nzambe, Jakob azuaki kombo ya Israel. Ezau mpe Jakob bayokanaki.

26
Abram –
Libiangi mpe elaka –
Abram mpe Lot
Genese 12:1-9 ; 13:1-18
Genese 12
Yawe alobi na Abram: “Longwa na mboka na yo, tika libota ya tata na yo, kende na mboka
oyo ngai nakolakisa yo. 2 Nakokomisa yo tata ya ekolo monene; nakobenisa yo, bongo
kombo na yo ekokoma ya lokumu. Bato bakobanda kobenisama na kombo na yo. 3
Nakobenisa bato oyo bakolinga yo; nakopesa etubu na bato oyo bakoyina yo. Nakobenisa
mabota nyonso ya mokili po na yo.” 4 Abram alongwe na mboka Haran ndenge Yawe alobaki
na ye. Lot pe akendeki nzela moko na ye. Abram akokisaki mbula tuku sambo na mitano
(75), tango alongwaki na Haran. 5 Akamati mwasi na ye Saray, na Lot, mwana ya ndeko na
ye, na bomengo nyonso bazalaki na yango, pe baumbu oyo basombaki na Haran. Babimi pe
bakei na mboka Kanan. Tango bakomi kuna na mboka Kanan, 6 Abram atambolaki mabele
yango mobimba tii na Sikem, pembeni ya nzete monene ya More esika bato ya mboka yango
bamesenaki kokende kosambela. Na tango wana ba-Kananite bazalaki kofanda kuna. 7 Yawe
abimeli Abram, pe alobi na ye: “Oyo ezali mabele nakopesa na libota na yo.” Bongo Abram
atongaki mesa ya kopesa Yawe mabonza na esika oyo abimelaki ye. 8 Sima alongwe wana
pe akei epai ya bangomba oyo ezali na mboka Betel, na epai moi ebimaka; bongo apiki
bandako na ye ya kapo na kati-kati ya bavile Betel oyo ezali na epai moi elalaka, pe Ai oyo
ezali na epai moi ebimaka. Kuna atongeli Yawe mesa ya mabonza, pe asambeli Yawe. 9 Sima
Abram azalaki kopusana moke-moke tii na epai ya se.

Genese 13
Abram alongwe na Ejipte pe azongi na esobe epai autaki, na mwasi na ye, pe biloko nyonso
bazalaki na yango; Lot akei nzela moko na bango. 2 Abram azalaki moto ya bomengo mingi,
abandaki kobokola banyma ebele, azalaki pe na arjan na or ebele. 3 Azalaki kopusana moke-
moke tii na esika afandaka liboso, na kati-kati ya Betel pe Ai. 4 Tango akomaki na esika
atongelaki Yawe mesa ya mabonza, Abram asambelaki Yawe. 5 Lot oyo ayaki nzela moko na
Abram, ye pe azalaki na bameme, bataba, bangombe, ba bandako ya kapo ya ye moko. 6
Lokola bazalaki bato mingi na banyama mingi, mabele ya Betel ekokaki te po bango mibale
bafanda esika moko. 7 Boye bakengeli ya banyama ya Abram bazalaki koswana mikolo
nyonso na baoyo ya Lot. Tango wana ba-Kananita na ba-Perizite bazalaki kofanda na mokili
yango. 8 Bongo Abram alobi na Lot: “Ekoki te ngai na yo toswanaka, to bato na ngai na oyo
ya yo baswanaka; pamba te tozali bato ya libota moko. 9 Ebongi tokabwana. Mboka
mobimba etandami liboso na yo. Soki okei na liboko ya mwasi, ngai nakokende na liboko ya
mobali, soki okei na liboko ya mobali, ngai nakokende na liboko ya mwasi.” 10 Lot atali epai
na epai, amoni esobe mobimba oyo ebandi na mai ya Yordan tii na mboka Soar, ezali na mai
mingi. Amoni yango lokola elanga oyo Yawe akonaki na Eden to lokola bilanga oyo ezali na
Ejipte pembeni ya ebale Nil. Ezalaki liboso ete Yawe aboma bamboka Sodome na Gomore.
11 Lot aponi na ye esobe mobimba ya Yordan pe akei kofanda na epai moi ebimaka. Boye
bango mibale babakwanaki. 12 Abram atikalaki na Kanan. Lot akendeki kofanda pembeni ya
bavile ya mabele ya Yordan, apiki bandako na ye ya kapo tii penepene ya Sodome. 13 Bato
ya Sodome bazalaki kosala masumu mingi, bazalaki bato mabe na miso ya Yawe. 14 Sima ya
kokabwana ya Lot na Abram, Yawe alobi na Abram: “Banda esika ozali, bwaka miso epai ya
likolo pe epai ya se, epai moi ebimaka pe epai elalaka. 15 Mabele nyonso oyo ozali komona,
nakopesa yango libele na yo pe na mabota na yo. 16 Nakokomisa bana na yo ebele lokola
bambuma ya zelo ya mokili. Ndenge bakokaka kotanga yango te, moto moko pe te akokoka
kotanga bana na yo. 17 Kende kotambola bipai nyonso na mboka oyo mobimba, pamba te
nakopesa yo yango.” 18 Bongo Abram alongolaki bandako na ye ya kapo, pe akendeki
kofanda epai ya banzete ya Mamre, pembeni ya mboka Hebron; pe kuna atongelaki Yawe
mesa ya mabonza.

27
Abram –
Libiangi mpe elaka –
Abram mpe Lot
Genese 12 : 1-9; 13 : 1-18

Abram, Saray mpe Lot batamboli na kati ya esobe. Babateli meme, basi mpe bana,
bampunda bamemi kilo, bameme mpe bantaba elandi bango ebele. Abram mpe Lot
batamboli nzela molai epai ya mokili eyebani te. Bazali kotelema na bisika ya mayi mpo
banyama mamela mayi. Na butu, bazali kosala bisika ya kolala (ndako ya kapo) mpo na
bango mpe mpo na mabota na bango na ntina balala. Bakengeli bazali kokengela mpe mpo
na bango na butu. Basi mpo na bango nionso ezali Nzambe oyo azali kokengela, mpe
bamipesi na Nzambe.

Mobembo ya makasi oyo Abram azali kosala ezali mpo na ye moko te. Nzambe alobaki na ye
: “Longwa na mokili na yo, na ekolo na yo, na ndako ya tata na yo, okende na mokili
nakolakisa yo. Nakokomisa yo ekolo ya bato ebele (ekolo monene), nakopambola yo...” Ezali
mpo na botosi epai ya Nzambe mpe na komipesa na ye yango nde Abram asali mobembo
makasi mpe ya mpasi.

Sima ya kotambola mikolo ebele, bakomi na ebale. Esengeli na bango bakatisa ebale wana.
Abram azali koluka esika ezali na mozindo te mpo na kokatisa. Babateli meme bazali kosalisa
banyama mpo bakatisa ebale. Bakomi sik’oyo na eteni ya mabele ya bango moko ya kitoko.
Ebale mpe bibale ebele. Matiti ezali kitoko mpo na banyama. Abram akani afanda wana
ntango molai, Nzambe abimeli lisusu Abram : “nakopesa mokili oyo na bakitani na yo”.

Abram azali na mbula ntuku sambo na mitani ntango Nzambe alobi na ye maye nionso
wana. Atako boye, ye moko na mwasi na ye Sara bazali na mwana te. Eloko ezali kopesa
Abram lisusu pasi, ezali mpo mokili yango ezali ya bato mususu. Abram akobi kondima mpe
komipesa na Nzambe. Bondimi na ye ya makasi epai ya Nzambe, ezali kosalisa ye azala na
esengo, pepele mpe kosepela, atako misala na ye. Mituya ya banyama ebakisami penza mpe
yango epesi nkokoso na babateli meme mpo na kobatela yango. Mikolo nionso, babateli
meme ya Abram mpe ya Lot bazali kosuana mpo na kowela bisika ya kitoko mpo na koleisa
mpe na koluka koyeba etonga ya nani ekomela mayi liboso na pokwa. Yango ezali kopesa
Abraham mawa, mpo azali moto alingi kimia.

Mokolo mosusu, Abram amemi Lot likolo ya ngomba. Batali etando monene ya mokili. Epai
moyi ebimaka, Jourdain ezali kotiola na kati na mokili kitoko. Na nse, mokili ezali na mabele
kitoko, kasi na biska mosusu matiti ezali mingi. Bongo, Abram alobi na Lot : “Ezali malamu te
basali na biso basuanaka. Tokokabola ba etonga na biso mpe tokabwani. Soki okei na loboko

28
ya mobali, ngai nakokenge na loboko ya mwasi, soki okei na loboko ya mwasi, ngai
nakokende na loboko ya mobali”. Lot alobi na Abram : “Noko na ngai, nakokende epai ya
esobe”, na kolakisa bipai ya mabele oyo Jourdain eleka. Kuna mpe bamboka minene ezali
Sodome na Gomore.

Abram sik’oyo akei na nzela ekeseni. Asepeli. Nzambe amoni makambo nionso mpe alobi na
Abram : “... ya solo mokili nionso ozali komona, nakopesa yo mpe bakitani na yo libela.
Nakokomisa bakitani na yo lokola zelo ya ebale...”

Abram azui bisika mabele ezali kitoko penza te. Nzambe azongeli sik’oyo elaka na Abram,
mpe yango ekomisi ye esengo.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Abram atiki nionso mpo na mobembo esika eyebani te. Libota monene mpe mokili
balakelaki ye mpo azalaki kotiela Nzambe motema.
2. Bosolola makambo oyo :
- Lolenge nini moto akoki koyoka ntango azali kolongwa mboka na bango ?
- Abram azalaki ndenge nini liboso ya Nzambe ? (Andimaki mpe amipesaki na
Nzambe)
- Nini Abram amoni na manso wana ? (Nzambe apamboli ye na mobembo na ye mpe
Nzambe apesi ye bokasi ya kokokisa mposa ya Nzambe. Na lisalisi mpe kobatelama
ya Nzambe, Abraham akomi na mboka ya elaka.
3. Tokotiela Nzambe motema, mpo tokoka kosala manso Nzambe azali kozela epai na
biso. Soki tomipesi na Nzambe mpe soki tozali kondima ye, akokamba biso malamu.

Liteya
Nzambe azali komema mpe kotambuisa biso na nzela na biso.

29
Abram abikisi Lot –
Bondimi ya Abram
Genese 14; 15:1-6; 17:1-9,15,16,19
Genese 14
Na tango wana, bakonzi minei bayaki kobundisa mboka yango. Amrafel ya Mezopotamie,
Aryok ya Elazar, Kedor-Laomer ya Elam, pe Tideal ya Goyim. 2 Bayaki kobunda na bakonzi
oyo: Bera ya Sodome, Birsha ya Gomore, Shineab ya Adma, Shemeber ya Seboim, pe
mokonzi ya Bela; babengaka yango pe Soar. 3 Bakonzi oyo mitano basanganaki penepene ya
Sidim na se ya bangomba; mabele yango ekoma Mai ya Mungwa. 4 Pamba te mbula zomi na
mibale mobimba, bango nyonso bazalaki kondima bokonzi ya Kedor-Laomer, kasi na mbula
ya zomi na misato (13), batombokelaki ye. 5 Yango wana na mbula ya zomi na minei (14),
Kedor-Laomer akitelaki mboka na bango, na bakonzi oyo bayaki nzela moko na ye. Balongaki
ba-Refaite na mboka Ashtarot-Karnaim, ba-Zuzite na mboka Ham, ba-Emite na mboka
Shawe-Kiryataim. 6 Balongaki pe ba-Horite na bangomba ya Edom, balandaki bango tii na
El-Paran pembeni ya esobe ya zelo. 7 Sima bazongaki bipai ya En-Mishpat oyo babengaka pe
Kadesh. Bapanzaki pe mboka mobimba ya ba-Amalekite pe balongaki lisusu na ba-Amorite
oyo bazalaki kofanda na Hasason-Tamar. 8-9 Bakonzi oyo batombokaki batandamaki na
Sidim na se ya bangomba po na kobunda na bakonzi oyo bakitelaki bango: bakonzi mitano
epai, bakonzi minei epai. 10 Na Sidim mabulu ya gudron ezalaki mingi. Tango bakonzi ya
Sodome na ya Gomore bazalaki kokima, bakweyaki na mabulu yango, bongo baoyo mosusu
batikalaki bakimaki na ngomba. 11 Bakonzi minei oyo balongaki, bakamataki bomengo
nyonso ya Sodome na ya Gomore, na biloko nyonso ya kolia, bakei na yango. 12 Bakangaki
pe Lot, mwana ya ndeko ya Abram, pe bamemaki bomengo nyonso oyo azalaki na yango.
Pamba te Lot azalaki kofanda na Sodome. 13 Kasi moto moko akimaki, pe ayaki koyebisa
sango yango epai ya Abram, mo-Ebre. Abram azalaki kofanda penepene ya banzete ya
Amorite moko kombo na ye Mamre, ndeko ya Eshkol pe ya Aner; azalaki koyokana malamu
na bango misato. 14 Tango Abram ayokaki ete bakangi ndeko na ye, asangisi bato na ye
nyonso oyo bakoki na bitumba, bato 318; pe alandi bakonzi wana tii na mboka Dan. 15
Bongo akaboli bato na ye na ba-ekipe, pe abandi bitumba na butu; alongi banguna wana,
alandi bango tii na Hoba, epai ya likolo ya mboka Damas, 16 pe azongi na biloko nyonso oyo
babotolaki, na basi pe bato nyonso. Azongi pe na Lot, mwana ya ndeko na ye, na bomengo
na ye. 17 Tango Abram azongi na bitumba oyo alongaki Kedor-Laomer, na bakonzi oyo
bazalaki na ye, mokonzi ya Sodome apei po na kokutana na ye na zamba ya Shawe, oyo
ezali na se ya bangomba. Babengaka yango pe “esika ya mokonzi na se ya bangomba”. 18
Melkisedek, mokonzi ya Salemye pe ayei, amemi mapa na vinu. Ye azalaki kosambela
Nzambe ya Likolo, azalaki kutu nganga-Nzambe. 19 Apamboli Abram boye: “Nzambe oyo
asala likolo na se, apambola yo, Abram. 20 Lokumu na Nzambe ya Likolo, ye moto akweisi
banguna na yo.” Bongo Abram akamati biloko oyo ye abotolaki; apesi nganga-Nzambe
Melkisedek eteni moko na kati ya biteni zomi. 21 Na sima mokonzi ya Sodome alobi na
Abram: “Biloko nyonso oyo obotolaki ekomi ya yo; zongisela ngai bobele bato na ngai.” 22
Kasi Abram azongisi: “Nakati seleka na kombo ya Yawe, Nzambe oyo asala Likolo na se: 23
Nakozwa ata eloko moko te, ezala singa ya sapatu, to singa ya kotonga elamba. Boye
okoloba te ete: ‘Ngai moto nakomisi Abram moto ya bomengo’. 24 Nakozongisela yo biloko
nyonso, longola bobele oyo bato na ngai basi’ baliaki. Kasi tika Aner, Eshkol, pe Mamre, bato
bakendeki na ngai na bitumba, bazwa biloko oyo balingi.”

Genese 15
1 Yawe abimeli Abram pe alobi na ye: “Abram, kobanga te, nazali mobateli na yo. Nakopesa
yo bomengo mingi koleka.” 2-3 Kasi Abram atuni: “Nkolo Yawe na ngai, okoki kopesa ngai
eloko nini? Pamba te nazali na mwana te. Moto akozwa bomengo na ngai ezali mosali na
ngai Eliezer, moto ya mboka Damas.” 4 Yawe azongiseli Abram boye: “Te. Ezali ye te moto

30
akozwa bomengo na yo. Bobele mwana oyo yo okobota, nde moto akozwa yango.” 5 Bongo
Yawe abimisi Abram na libanda pe alobi na ye: “Tala Likolo. Oyebi kotanga minzoto? Bato ya
libota na yo bakozala ebele lokola yango.” 6 Abram andimelaki yawe, yango wana Yawe
akamataki ye lokola moto ya bosembo.

Genese 17
1 Tango Abram akokisaki mbula tuku libwa na libwa (99), Yawe abimeli ye pe alobi: “Nazali
Nzambe ya nguya. Tosaka ngai tango nyonso, pe zala moto malamu. 2 Nakosala Boyokani
ngai na yo, pe nakopesa yo bana ebele.” 3 Bongo Abram akwei elongi na se, pe Nzambe
alobi lisusu: 4-5 “Tala Boyokani oyo nakosala na yo: Okokoma koko ya bato ebele.
Bakobanda kobenga yo lisusu Abram te; kombo na yo ekomi Abraham, pamba te nakomisi
yo koko ya bikolo ebele. 8 Nakopesa yo bana mingi, bana na yo bakokoma bakolo ya
bamboka ebele, pe bana mosusu kutu bakozala bakonzi ya bikolo.” 7 “Nakobatela seko
Boyokani kati na ngai na yo, pe na bana na yo nyonso oyo bakoya sima, mabota na mabota:
Nakozala Nzambe na yo pe ya mabota na yo nyonso oyo ekoya sima. 8 Mabele oyo ofandi
lokola mopaya, akopesa yo yango na bana na yo. Mboka mobimba ya Kanan ekozala seko ya
bango, pe ngai nakozala Nzambe na bango.” 9 Nzambe alobi lisusu na Abraham: “Bobatela
Boyokani na ngai, yo na mabota na yo nyonso oyo ekoya sima.”

15 Nzambe alobi lisusu na Abraham: “Okobanda kobenga pe mwasi na yo lisusu Saray te.
Kombo na ye ekomi Sara. 16 Nakobenisa ye, pe na nguya na ngai, Sara akobotela yo mwana
ya mobali. Ya solo, nakobenisa ye. Akokoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobotama
na kati ya mabota na ye.”

19 Kasi Nzambe alobi: “Te! Mwasi na yo Sara akobotela yo mwana-mobali pe okopesa ye


kombo Izaak. Nakobatela Boyokani kati na ngai na ye, pe na bato ya mabota na ye. Ekozala
Boyokani ya seko.

31
Abram abikisi Lot –
Bondimi ya Abram
Genese 14; 15:1-6; 17:1-9,15,16,19

Abram afandi liboso ya ndako ya kapo na ye. Mwa ntango eleki uta ye moko mpe Lot
bakabwanaki. Mopaya moko akomi kokutana na ye. Sima ya pema, mopaya wana ayebisi ye
ete ndeko na ye Lot, mwasi na ye, bana na ye mpe basali na ye nionso bakoti boloko epai ya
mokonzi ya makasi ! Mokonzi wana abundisaki Sodome mpe Gomore mpe ayibi bango biloko
nionso.

Koyoka ete Lot atikali na eloko te, Abram asali mbangu mpo na kosalisa Lot. Apesi bibundeli
na basali na ye nkama misatu na zomi na mwambe mpo abikisa Lot. Alandi bakonzi ya
banguna. Abram atieli Nzambe motema mpe atie elikia na lisalisi na ye.

Abram asengeli atambola mokolo mobimba yambo azua banguna kati na butu. Abram
akaboli bato na ye, oyo asosoli monguna na bipai ndenge na ndenge. Bitumba elandani,
Abram mpe bato na ye balongi etumba wana. Bakamwe monguna akimi. Abram abikisi Lot
mpe bato ya boloko mosusu. Azui mpe biloko na bango. Mokonzi ya Sodome, mpo na kopesa
matondi, apesi biloko nionso na Abram. Kasi Abram aboyi mpe alobi : “Nakozua eloko te oyo
ezali ya yo, ezala ata singa, ata singa ya sapato. Moto moko te akoloba mokonzi ya Sodome
akomisi Abram moto ya bomengo”.

Bambula eleki. Bitonga ya Abram ekoli. Nzokande, elaka ya monene oyo Nzambe asalaki na
Abram ekokisami kaka te. Abram na Saray bakomi mikolo. Babandi komituna : “Tokozua
lisusu mwana ? Ezali ntango molai tozeli. Ekosalema lisusu te. Nzambe abosani biso ?
Nzambe abimeli Abram na ndoto : “Abram, kobanga te. Nazali nguba na yo, mpe lifuta na yo
ekozala monene. Abram ayanoli : “Nkolo ya seko, okopesa ngai nini ? Olakaki ngai bana
ebele mpe nazali ata na mwana moko te ! Tembe te Eliezer, moto ya liboso ya basali na
ngai, akosangola bomengo na ngai nionso mokolo mosusu”. Nzambe ayanoli na Abraham :
“Te, mosangoli na yo, ekozala Eliezer te, kasi mwana na yo moko”. Nzambe abimisi Abram
sik’oyo na kati ya butu na malili. Likolo monene na molili etondi na minzoto. Nzambe alobi na
ye : “Tala na likolo mpe tanga minzoto, soki okokoka kotanga”. Mpe Nzambe alobi na ye
lisusu : “Ndenge bakitani na yo bakozala”. Abram andimi Nzambe.

Sima ya bambula, wana Abram mibu soki nkama mpe mwasi na ye azalaki na yango soki
moke mibu ntuku libwa Sara azali kondima te ete akozua mwana. Nzambe alobaki lisusu na
Abram : “Nakosala boyokani na yo, mpe nakotondisa yo suka ekozala te.” Abram akitisi

32
elongi, mpe Nzambe alobi na ye : “Tala boyokani na ngai na salaki na yo. Okokoma tata ya
bikolo ebele”.

Bakobenga yo lisusu Abram te, kasi kombo na yo ekomi Abraham, mpo nakomisi yo tata ya
bikolo ebele...” Nzambe ayebisi lisusu Abraham : “Mwasi na yo Sarai okopesa ye lisusu
kombo ya Sarai te, kasi kombo na ye ekozala Sara (mwasi ya nkumu)”. Nzambe alobi lisusu :
“... Sara mwasi na yo, akobotela yo mwana ya mobali, mpe okobenga ye na kombo ya
Izaak...” Nzambe alaki lisusu ete boyokani oyo akosala yango mpe na Izaak mpe na banso
bakobotama sima na libota na ye.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Nzambe alakaki Abraham : “Tala, tombola miso likolo tanga minzoto, soki okokoka
kotanga yango. Bongo ekozala bana ya bana na yo”.
2. Bosolola makambo oyo :
• Eloko nini Abraham asalaki na basali na ye ? (Na basali na ye, abikisaka Lot. Nzambe
asalisaki ye mpo alonga etumba, Abraham aboyaki kobomba ata eloko moko te ya
mokonzi ya mboka Sodome)
• Elaka nini Nzambe alakaka Abraham ? (Alakaki ye mwana moko ya mobali mpe
bankoko ebele).
• Nzambe apesaki bakombo ya sika na Abram mpe Sarai; Abraham elakisi : “Tata ya
bana ebele” mpe Sara elakisi “Mwasi ya mokonzi”.
3. Nzambe asalaki boyokani (elaka) na Abram. Asalaki mpe boyokani na biso.

Liteya
Nzambe azali ntango inso pene na biso, mpo na kotambwisa biso na banzela ya kokamwa

33
Kotala ya Nzambe – Mbotama ya Izaak –
Komekama ya Abraham
Genese 18:1-15; 21:1-8; 22
Genese 18
Mokolo moko, na tango ya midi, Abraham azalaki kofanda na monoko ya ndako na ye ya
kapo pembeni ya banzete ya Mamre, bongo Yawe abimeli ye. 2 Na mbala moko amoni bato
misato batelemi penepene. Alongwe esika ye afandaki, pe akei mbangu po na kokutana na
bango. Afukami elongi na se, 3 pe alobi na mokonzi na bango: “Nkolo, nasengi yo oleka
ndako na ngai te. 4 Bakomemela bino mwa-mai po bosukola makolo, pe bokopema na se ya
nzete oyo. 5 Nakoyeela bino mwa-biloko ya kolia po epesa bino nzoto makasi, bongo
bokolanda mobembo na bino. Boye koleka na bino awa epai na ngai ekozala ya pamba te.”
Bango bazongisi: “Ezali malamu. Sala ndenge olobi.” 6 Abraham akoti noki na ndako, alobi
na Sara: “Kamata saki ya farine moko ya kitoko, pe sala noki-noki mwa-mapa.” Sima
Abraham akei mbangu kopona mwana-ngombe ya kitoko pe ya mafuta. Apesi yango na
mosali na ye, po alamba yango noki-noki. 8 Tango nyama ebeli, akamati yango, na manteka
pe miliki, atie yango liboso na bango; babandi kolia, pe ye atelemi pembeni na bango na se
ya nzete. 9 Bongo batuni ye: “Mwasi na yo Sara azali wapi?” Ye azongiseli bango: “Azali
kuna na kati ya ndako.” 10 Yawe alobi: “Nakozonga lisusu epai na yo sima ya mbula moko,
kaka na sanza oyo, pe mwasi na yo Sara akozala na mwana-mobali.” Nzokande Sara azalaki
na mooko ya ndako, sima ya Abraham, pe azalaki koyoka. 11 Abraham na Sara bakomaki
mibange penza, pe Sara akokaki lisusu kobota te. 12 Yango wana aseki na se ya motema, pe
amilobi: “Nasi’nakomi mobange, nakoki kozala lisusu na posa ya mobali? Pe lisusu mobali na
ngai asi’akomi mobange.” 13 Bongo Yawe atuni Abraham: “Po na nini Sara aseki pe alobi:
‘Ya solo, nakoki penza kobota mwana, lokola nakomi mobange boye?’ 14 Likambo moko
ezali, oyo ekoki koleka Yawe na makasi? Kaka na tango oyo, sima ya mbula moko,
nakozonga lisusu epai na yo, pe Sara akozala na mwana.” 15 Sara abangaki, bongo
awangani pe alobi: “Nasekaki te.” Kasi moto yango azongisi: “Ezali ya solo, osekaki.”

Genese 21
Yawe asalaki Sara bolamu ndenge alakaki ye. 2 Sara akomaki na zemi, bongo kaka na tango
oyo Nzambe alobaki, aboteli Abraham mwana-mobali, atako Abraham akomaki mobange. 3
Abraham apesi ye kombo Izaak. 4 Tango Izaak akokisaki mikolo mwambe, Abraham akatisi
ye nzoto ndenge Nzambe apesaki ye mitindo. 5 Abraham azalaki na mbula kama moko (100)
tango Izaak abotamaki. 6 Sara alobi: “Nzambe asali ngai likambo ya kokamwa pe asekisi
ngai. Bato nyonso oyo bakoyoka likambo yango bakoseka lokola ngai. 7 Nani akokaki koloba
na Abraham ete Sara akomelisa mwana mabele? Sik’oyo naboteli ye mwana-mobali atako
asi’akomi mobange.” 8 Mwana akolaki, pe mokolo ye atikaki komela mabele, Abraham
asalisaki feti monene.

Genese 22
Sima na yango Nzambe amekaki Abraham. Abengi ye: “Abraham!” Ye azongisi: Ngai oyo.” 2
Nzambe alobi: “Kamata mwana na yo Izaak, mwana na yo se moko, oyo olingaka mingi, pe
kende na ye na mabele ya Moriya. Okopesa ye lokola libonza ya kozikisa na likolo ya ngomba
oyo nakolakisa yo.” 3 Na tongo-tongo Abraham abongisi punda na ye, pe akamati Izaak na
basali mibale. Akati koni ya kozikisela libonza, pe akei na esika oyo Nzambe alobaki na ye. 4
Sima ya mikolo mibale, Abraham amoni ngomba yango na mosika. 5 Bongo alobi na basali
na ye: “Bofanda awa na punda. Ngai na mwana tokei po na kokumisa Nzambe, pe
tokozonga.” 6 Abraham atie koni na kozikisela libonza na motu ya Izaak, pe ye moko amemi
moto na mbeli. Bongo bango mibale basimbi nzela bakei. 7 Izaak abengi tata na ye, alobi:
“Tata!” Abraham azongisi: “Ngai oyo, mwana na ngai.’ Izaak atuni ye: “Namoni tozali awa na
moto pe koni, kasi mwana-meme ya libonza ezali wapi?” 8 Abraham azongisi: “Mwana na
ngai, Nzambe ye moko akolengela mwana-meme ya libonza.” Bongo bango mibale balandi

34
nzela na bango. 9 Tango bakomi na esika oyo Nzambe alobelaki ye, Abraham asali mesa ya
kozikisela libonza, pe atandi koni na likolo na yango. Akangi mwana na ye Izaak basinga,
alalisi ye na mesa ya libonza, na likolo ya koni, 10 pe akamati mbeli po na koboma mwana
na ye. 11 Kasi anjelu ya Yawe abengi Abraham uta na Likolo: “Abraham, Abraham!”
Abraham azongisi: “Ngai oyo.” Anjelu alobi: “Koboma mwana te, pe kosala ye likambo moko
te ya mabe. Nayebi sik’oyo ete otosaka Nzambe; oboyaki te kopesa ngai mwana na yo se
moko.” 13 Abraham atali pembeni, amoni meme moko ya mobali, maseke na yango
ekangami na banzete ya mike-mike. Akei kokamata yango pe azikiseli yango Yawe na esika
ya mwana na ye. 14 Bongo apesi esika yango kombo: “Yawe alengelaka.” Yango wana tii
lelo bato balobaka: “Na likolo ya ngomba Yawe alengelaka.” 15 Anjelu ya Yawe abengi
Abraham mbala mibale, alobi: 16”Ngai Yawe nakati seleka na kombo na ngai moko. Lokola
osali likambo ya ndenge boye, oboyaki te kopesa ngai mwana na yo se moko, 17 nakobenisa
yo pe nakopesa yo bana ebele lokola minzoto ya Likolo to lokola zelo oyo ezalaka pembeni
ya ebale. Bana ya libota na yo bakobotola bavile ya banguna na bango. 18 Bato ya bikolo
nyonso bakobanda kobenisama na kombo ya bana ya libota na yo, po yo otosi mitindo na
ngai.” 19 Abraham azongi epai ya basali na ye, bongo basimbi nzela pe bazongi na Bersheba
epai Abraham azalaki kofanda.

35
Kotala ya Nzambe – Mbotama ya Izaak –
Komekama ya Abraham
Genese 18:1-15; 21:1-8; 22

Na sima ya nzanga ya mulunge, Abraham apemi na malili ya banzete. Amoni bato misatu
bazali koya epai na ye. Abraham akeyi koyamba bango na komilobela : “bazali kolinga solo
kopema awa mpe kolia yambo balanda bisika bakei”. Ntango akutani na bango, alobi :
“Nkolo, koleka te mosika ya mosali na yo. Bakoki komemela bino ndambo ya mayi bosokola
makolo. Bopema na nse ya nzete. Nazali komemela bino ndambo ya lipa. Nde bokoki sik’oyo
kolanda nzela na bino”. Bato misato bandimi libiangi ya Abraham mpe batikali na ye mwa
ntango molai. Abraham apesi na bapaya na ye ya lokumu mwa lipa mpe mosuni.

Bapaya na ye ya lokumu bazali kolia ntango moko na bango atuni : “Wapi Sara, mwasi na
yo?” Abraham ayanoli azali kati na ndako ya kapo. Mopaya wana alobi na ye : “Nakozonga
sima ya mbula moko, mpe mwasi na yo akozua mwana”. Abraham akomi penza na esengo.
Ayoki ete Nzambe akembisi bondimi na ye. Sara ayoki mpe maloba ya Nzambe, aseki kaka
mpo na ye moko, na komilobela : “Ekoki kosalama te”. Abangi ntango ayoki kaka mongongo
wana elobi: “Mpo na nini Sara aseki ? Likambo ya kokamwa epai ya Nzambe ezali te”. Sara
alobi ete asekaki te, kasi epai ya Nzambe eloko ya kobomba ezali te.

Bapaya ya lokumu bakei, mpe Sara ayoki soni. Ayebi malamu ete epai ya Nzambe makambo
esalamaka, ya makasi ezali te. Ayoki sik’oyo ye moko elaka ya Nzambe. Kimia mpe esengo
etondi na motema. Akoki kondima sik’oyo ete elaka ekokokisama.

Mbula moko sima ya kotala ya bato wana misato ya Abraham, likamwisi monene esalami :
Abraham mpe Sara bazui mwana. Nzambe akokisi elaka na ye. Abraham mpe Sara balakisi
esengo monene. Batondi, bakumusi mpe basanzoli Nzambe. Sara azali na mibu ntuku
mwambe ! Sara azali na esengo mpe asimbi Izaak kati na maboko na ye. Izaak atondisi
ndako ya kapo na bomoi ya sika. Abandi kosenga mpe konguenya, azali koyekola
kotambola, koloba mpe kosakala, lokola bana nionso.

Abraham azali na esengo na mwana na ye Izaak, alingi ye mingi. Azali kokoba kopesa
Nzambe biloko na ye malamu. Esengeli alakisa penza aligni Nzambe mpe azali kobanga ye.

Nzambe ameki Abraham na koloba na ye : “Abraham !” Abraham ayanoli : “Ngai oyo !” Mpe
ayoki Nzambe alobi na ye : “Zua mwana na yo Izaak, mwana kaka moko oyo yo olingaka
mpe kende na mokili ya Morija, mpe kuna pesa ngai ye mbeka na ngomba moko nakoyebisa
yo”.

36
Na mokolo ya sima, Abraham alamuki na tongo penza mpe alamusi basali na ye mibale mpe
mwana na ye Izaak. Abongisi punda moko mpe ndambo ya koni mpo na kotumba mbeka.
Mpe bakei. Batamboli mikolo misatu. Nakomona esika Nzambe alakisaki ye, Abraham alobi
na basali na ye : “Botikala awa na punda. Biso tokei biso moko, Izaak na ngai. Tokozonga
sima ya mbeka”. Papa na mwana na ye bazali komata ngomba. Na songe, Abraham atongi
mesa ya mabanga. Na mwa ntango moke azali komibongisa kopesa mwana na ye lokola
likabo, anzelu abengi ye na likolo mpe alobi na ye aboma mwana na ye te, ya solo Nzambe
ayebi sik’oyo ete Abraham abangaka Nzambe.

Atondisami na esengo monene, Abraham ayambi mwana na ye Izaak. Mbala moko esalami
makelele na sima na bango. Meme ya mobali akangami na masele na ye na moto. Nzambe
apesi nzela oyo wana esalama. Koyeba, Abraham mpe Izaak bapesi mbeka ya meme ya
mobali. Bakumisi mpe basanzoli Nzambe. Mpe lisusu mongongo eyokani uta likolo ya anzelu:
“Mpo ete oboyaki te mwana na yo moko te, nakopambola yo mpe bakitani na yo bakozala
lokola minzoto na likolo mpe lokola zelo pembeni ya ebale”.

Na koyeba, Abraham, Izaak mpe basali na ye bazongi epai na bango.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Nzambe akokisaki elaka na ye, mpe Izaak abotamaki. Nzambe asengaki na Abraham
apesa mwana na ye lokola mbeka. Nzambe asalisaki ye.
2 . Bosolola makambo oyo :
* Ndenge nini Nzambe amekaki Abraham ? (Asengaki ye apesa Izaak lokola mbeka,
mwana se moko ya ye. Abraham asengelaki alakisa solo abangaka Nzambe)
* Nzambe ye moko aboyaki liwa ya Izaak.
3. Limbola makambo oyo :
* Mpo na kolaikisa boyebi epai ya Nzambe, bazalaki kopesa banyama lokola mbeka.
* Ezalaki mpe kolakisa bolingo oyo bazalaki na yango epai ya Nzambe.
* Yango wana bapesaki Nzambe kaka oyo ezali malamu koleka.
* Tozali kopesa na Nzambe mposa na biso ya kosalela ye, ntango na biso, mbongo na
biso.

LITEYA
NZAMBE AKOKISI BILAKA NA YE. SOKI TOTIELI YE MOTEMA, SOKI TOZALI KOTOSA YA,
TOKOPAMBOLAMA MINGI. NZAMBE AZALI PEMBENI YA BA OYO YA YE.

37
Eliezer mpe Rebecca
Genese 24
Abraham akomaki mobange penza, pe Yawe abenisaki ye na makambo nyonso. 2 Mokolo
moko alobi boye na mosali na ye oyo aumelaki mingi epai na ye pe azalaki kokengela biloko
na ye nyonso: “Tia liboko na kati ya makolo na ngai, 3-4 kata seleka na kombo ya Yawe,
Nzambe ya Likolo na se, ete okosala makambo nalingi koyebisa yo. Tala, nazali kofanda na
kati ya bato ya Kanan. Tango ekoki po olukela mwana na ngai Izaak mwasi. Kasi koponela
ye mwasi na Kanan te. Kende na mboka na ngai, pe balela ye mwasi na kati ya libota na
ngai. 5 Mosali atuni: “Nasala nini soki mwasi yango aboyi koya awa nzela moko na ngai?
Nazongisa mwana na yo lisusu na mboka oyo yo outaki?” 6 Abraham azongisi: Te! Kozongisa
mwana na ngai kuna ata moke te! 7 Yawe, Nzambe ya Likolo, abimisaki ngai na libota ya
tata na ngai, na mboka oyo nabotamaki, pe akataki seleka ete akopesa mboka oyo na libota
na ngai. Yawe akotinda anjelu na ye liboso na yo, po ozwela mwana na ngai mwasi moko
kuna. 8 Soki ye alingi koya nzela moko te na yo, seleka oyo okokata epai na ngai ekozala na
tina te. Eloko moko kaka: komeka ata moke te kozongisa mwana na ngai kuna.” 9 bongo
mosali atie liboko na kati ya makolo ya mokonzi na ye Abraham, pe akati seleka po na
likambo yango. 10 Sima akamati bashamo zomi na kati ya banyama ya mokonzi na ye, pe
biloko ndenge na ndenge ya kitoko pe ya talo mingi. Asimbi nzela akei na vile oyo Nahor
azalaki kofanda, na Mezopotamie. 11 Tango akomi penepene ya libulu ya mai oyo ezalaki na
libanda ya vile yango, afukamisi bashamo. Ezalaki na pokwa, tango basi bayaka kotoka mai.
12 Asambeli boye: “Yawe, Nzambe ya mokonzi na ngai Abraham, kokisela ngai lelo likambo
oyo nayeeli. Lakisa bolingo na yo epai ya mokonzi na ngai. 13 Awa penepene ya libulu ya
mai esika natelemi, etikali moke bana basi ya vile baye kotoka mai. 14 Nakosenga na moko
na bango atengemisa eloku na ye po namela mai. Soki ye azongisi: ‘Mela; pe nakomelisa
lisusu bashamo na yo’, yango ekolakisa ete ezali ye wana mwasi oyo oponeli mosali na yo
Izaak. Boye nakoyeba ete olakisi bolingo na yo epai ya mokonzi na ngai Abraham.” 15
Asilisaki nanu kosambela te, amoni Rebeka azali koya, eloku ya mai na lipeka. Ye azalaki
mwana ya Betuel, pe koko ya Milka oyo azalaki mwasi ya Nahor, ndeko ya Abraham. 16
Azalaki kitoko mingi, ayebaki nanu nzoto ya mobali te, Tango akomi, akiti na esika ya libulu
ya mai, atondisi eloku na ye, pe amati lisusu. 17 Mosali ya Abraham akei mbangu epai na ye,
pe alobi: “Soki olingi, pesa ngai mai na eloku na yo po namela.” Rebeka alobi: “Mela, mbuta-
muntu.” Atengemisi eloku na ye noki, pe amelisi ye mai. 19 Bongo alobi: “Nakotoka pe mai
po na bashami na yo tii tango yango nyonso ekomela.” 20 Asopi mai nyonso ya eloku na ye
na esika banyama emelelaka, pe akei mbangu na libulu po na kotoka mai mosusu; asali
ndenge wana po na bashamo nyonso. 21 Mosali ya Abraham azalaki kotala ye nyee pe
komituna soki ya solo Yawe akokiseli ye likambo oyo ayeelaki. 22 Tango Rebeka asilisi
komelisa bashamo mai, mosali apesi ye pete ya or ya talo mingi, na biloko ya kolata na
maboko ya talo mingi koleka. 23 Atuni ye: “Tata na yo kombo na ye nani?” Yebisa ngai soki
epai ya tata na yo esika ezali po na ngai na bato na ngai tolala kuna lelo.” 24 Rebeka
azongisi: “Ngai nazali mwana ya Betuel, pe koko ya Nahor na Milka. 25 Epai na biso matiti pe
biloko ya koleisa banyama ezali mingi, esika pe ya kolala ezali.” 26-27 Mosali agumbami
elongi na se pe alobi: “Lokumu na Yawe, Nzambe ya mokonzi na ngai Abraham, po alakisi ye
bolamu pe bolingo; amemi ngai malamu epai ya bandeko ya mokonzi na ngai.” 28 Rebeka
akei mbangu koyebisa makambo yango na mama na ye. 29 Bongo Laban, ndeko ya Rebeka
ya mobali, abimi mbangu pe akei epai ya mosali ya Abraham penepene ya libulu ya mai. 30
Pamba te Rebeka ayebisaki ye makambo mosali alobaki na ye, pe alakisaki ye pete na biloko
ya maboko ya talo oyo ye apesaki ye. Tango akomi epai ya mosali na bashamo penepene ya
libulu ya mai, 31 alobi: “Yaka! Ozali moto Yawe asalaka bolamu. Po na nini otelemi awa?
Nasi’nabongisi esika po na yo pe po na bashamo na yo”. 32 Bongo mosali akoti na ndako.
Laban alongoli mikumba na mikongo ya bashamo pe apesi yango matiti ya kolia. Sima
amemi mai po mosali na bato na ye basukola makolo, 33 apesi bango biloko ya kolia. Kasi
mosali ya Abraham alobi: “nakolia nanu te tii tango nakosilisa koloba makambo oyo nazali na

38
yango.” Laban azongisi: “Likambo te, loba.” 34 Ye alobi: “Nazali mosali ya Abraham. 35
Yawe asi’abenisa mokonzi na ngai, pe akomisa ye moto ya bomengo mingi; apesa ye
mabeme, bataba pe bangombe ebele, arjan na or, basali ya basi na mibali, bashamo pe
bapunda. 36 Sara, mwasi na ye abotelaki ye mwana-mobali na kimobange; bongo mwana
yango azwi bomengo nyonso ya tata na ye. 37 Mokonzi na ngai akatisaki ngai seleka,
alobaki: ‘Tala, nazali kofanda na kati ya bato ya Kanan. Tango ekoki po olukela mwana na
ngai Izaak mwasi. Kasi koponela ye mwasi ya Kanan te. 38 Kata seleka ete okokende na
libota ya tata na ngai po na kolukela ye mwasi.’ 39 Ngai natunaki mokonzi na ngai: Nasala
ndenge nini soki mwasi yango aboyi koya nzela moko na ngai? 40 Ye azongisaki: ‘Yawe,
Nzambe oyo natosaka, akotinda anjelu na ye liboso na yo po okokisa likambo oyo natindi yo;
boye okozwela mwana na ngai mwasi na kati ya libota ya tata na ngai. 41 Kokisa elaka oyo
nazali kokatisa yo, kende epai ya bandeko na ngai. Soki bango baboyi, kobanga eloko te;
seleka na yo ekozala lisusu na tina te.’ 42 “Lelo, tango nakomaki na libulu ya mai,
nasambelaki boye: Yawe, Nzambe ya mokonzi na ngai Abraham, kokisela ngai likambo oyo
nayeeli. 43 Soki mwana-mwasi moko ayei kotoka mai, nakosenga ye apesa ngai mai ya
komela na eloku na ye. 44 Soki ye azongisi: ‘Mela; pe nakomelisa lisusu bashamo na yo’,
yango ekolakisa ete ezali ye wana mwasi oyo oponeli mosali na yo Izaak, mwana ya mokonzi
na ngai. 45 Nanu nasilisaki kutu kosambela te na motema, Rebeka akomi, eloku ya mai na
lipeka. Akiti na esika ya libulu pe atoki mai. Nalobi na ye: Soki olingi, pesa ngai mai po
namela. 46 Akitisi eloku na ye noki pe alobi: ‘Mela; pe nakomelisa lisusu bashamo na yo.’
Bongo nameli, pe ye amelisi bashamo. 47 Natuni ye: Tata na yo nani? Azongisi: ‘Ngai nazali
mwana ya Betuel, pe koko ya Nahor na Milka.’ Bongo natiaki ye pete na zolo pe biloko ya
kolata na maboko. 48 Nagumbamaki liboso ya Yawe, Nzambe ya mokonzi na ngai Abraham,
pe napesaki ye mersi na ndenge amemaki ngai malamu po nakoka kobalela mwana ya
mokonzi na ngai mwasi moko ya libota na ye. 49 Sik’oyo boloba na ngai soki bolingi kosala
mokonzi na ngai bolamu pe kolakisa ye bolingo; soki te boyebisa ngai, boye nakoluka epai
wapi nakoki kokende.” 50 Laban na Betuel bazongisi: “Likambo oyo euti na Yawe. Biso tokoki
kobakisa eloko moko te. 51 Rebeka ye oyo, kamata ye pe kende na ye, akoma mwasi ya
mwana ya mokonzi na yo ndenge Yawe alingi.” 52 Tango mosali ya Abraham ayoki maloba
na bango, agumbami elongi na se po na kopesa Yawe mersi. 53 Abimisi biloko ya monzele
ya arjan pe ya or, na bilamba, apesi yango na Rebeka. Apesi pe makabo ya kitoko na ndeko
na ye ya mobali pe na mama na ye. 54 Sima mosali ya Abraham pe bato oyo bazalaki na ye
baliaki, bamelaki; bongo balalaki esika moko. Tango balamukaki na tongo, mosali alobi:
“Nasengi bino bopesa ngai nzela nazonga epai ya mokonzi na ngai.” 55 Kasi mama ya
Rebeka pe ndeko na ye ya mobali bazongisi: “Malamu mwana na biso atikala nanu epai na
biso ata poso moko, bngo na sima bokoki kokende.” 56 Kasi mosali alobi: “Boumisa ngai te.
Yawe asi’akokisi mobembo na ngai malamu. Bopesa ngai nzela nazonga epai ya mokonzi na
ngai.” 57 Bango bazongisi: “Malamu tobenga Rebeka po totuna likanisi na ye.” 58 Bongo
babengi ye pe batuni ye: “Olingi kokende nzela moko na moto oyo?” Ye azongisi: “Ee,
nalingi.” 59 Bongo bapesi Rebeka nzela, na mama oyo akozala kosalisa pe bato na ye. 60 Pe
bapamboli Rebeka boye: “Ndeko na biso, Nzambe akomisa yo mama ya bato bankoto na
bankoto ya kotanga te. Bana ya libota na yo bakoma ekolo monene; babotolaka bavile ya
banguna na bango.” 61 Bongo Rebeka na basali na ye ya basi bamati na bashamo, pe
mosali ya Abraham akei na bango. 62-63 Izaak azalaki kofanda na esobe ya epai ya se.
Mokolo mok na pokwa, azalaki kotambola na kati ya bilanga, autaki na libulu ya mai oyo
babengaka Lahay-Roy. Na mbala moko amoni bashamo ezali koya. 64 Rebeka amoni Izaak.
Akiti likolo ya shamo na ye, 65 pe atuni mosali ya Abraham: “Nani moto oyo azali kuna na
kati ya bilanga pe azali koya epai na biso?” Mosali azongisi: “Ezali mokonzi na ngai.” Bongo
Rebeka akamati elamba, amizipi na elongi. 66 Mosali ayebisi Izaak makambo nyonso ye
asalaki. 67 Izaak akotisi Rebeka na ndako na ye, akomisi ye mwasi na ye, pe azalaki kolinga
ye mingi. Tii tango wana zalaki se kokanisa liwa ya mama na ye sara, bongo atiki kolela ye.

39
Eliezer mpe Rebecca
Genese 24

Abraham akomi sik’oyo mobange penza. Nzambe asalisi ye malamu mpe apamboli ye. Izaak
akoli, akomi sik’oyo mobali. Abraham, Sara mpe Izaak bafandi esika moko bambula ebele ya
bolamu. Sik’oyo bazali na mawa. Nzambe abengi kati na bango Sara. Akufi na mibu nkama
na ntuku mibale na sambo (127 ans). Abraham akundi ye na Hebron, na mokili ya Kanan.

Na eleko yango, ezalaki ete papa alukela mwana na ye moseka. Abraham abengi na ndako
ya kapo mosali ya mokolo na basali na ye. Tembe te, Eliezer – mpe alobi na ye “kende
koluka mwasi mpo na mwana na ngai Izaak. Koluka awa te, wapi bato bazali malamu te.
Zonga epai na biso mpe luka mwasi kuna”. Abraham abakisi maloba oyo : Azala na ntina
monene : “Nzambe akozala na yo. Akotinda banzelu liboso na yo mpe kobongisela yo nzela”.

Eliezer azui bakemela zomi mpe ndambo ya basali mpe amibongisi mpo na mobembo molai.
Abraham apesi lisusu na Eliezer makabo ya talo. Mobembo eumeli bamposo mpe ememi
bango suka na Mezopotamie.

Suka na yango bakomi na mboka wapi libota ya Abraham bafandi. Na suka ya mboka nde
bisika mayi ya mosolo ezali. Eliezer azui mokano ya kokoma bisika wana. Na pokua basi mpe
bilenge basi bayaka kotoka mayi. Eliezer ayebi te ndenge nini ya koponela Izaak mwasi.
Akanisi maye Abraham ayebisaki ye : Nzambe akozala na ye; nde abondeli : “Nkolo Nzambe
zala na ngai lelo. Nayebi te nani oponi azala mwasi ya Izaak. Lakisa oyo nakoki kopona. Mpe
elembo ezala oyo : elenge mwasi oyo yo oponi akozala oyo akoloba ntango ngai nakosenga
ye mayi; mela mpe nakopesa komela na bakamela na yo”.

Nde wana elenge mwasi ayei na mayi na mosolo. Atoki mayi mpe atondisi eloko na ye,
yambo akende, Eliezer alobi na ye : pesa ngai mayi ya komela, na bondeli yo”. Elenge mwasi
ayanoli na bolino nionso : “Mela, na bondeli yo”, nakokisa eloko na ye epai na ye. Mpe alobi
na ye : “zela, nakei lisusu kotoka mayi mpo na kopesa mpe bakamela na yo bamela”. Atoki
mpe mayi mpo na bakamela kino bameli mingi.

Eliezer akomi na esengo monene ! Ezali nde ye ! Elenge mwasi nini ya bolingo ! Abendi
mabende mibale ya maboko mpe lopete ya wolo na sakosi na ye ya sekele, mpe apesi ye.
Nde ayebisi nkombo na ye ezali Rebecca. Azali koko ya Nachor ndeko ya Abraham. Eliezer
abondeli mpe atondi Nzambe mpo na lisalisi na ye ya malamu.

Rebecca akimi kokutana na libota na ye mpo ayebisa bango oyo ye amoni. Laban akei
mbangu na mayi ya mosolo mpe amemi Eliezer na ndako. Eliezer ayebisi bango ntina ya

40
koya na ye mpe apesi bango makabo oyo azuaki na Abraham. Akaboli na bango kolia na
bango mpe alali na ndako na bango.

Mokolo na sima na tongo, Eliezer asengi bango azonga. Laban mpe mama ya rebecca
basengi ye atikala mwa mikolo lisusu. Eliezer ayanoli : “Bofandisa ngai awa lisusu te, mpo
Nzambe abongiseli ngai mobembo. Botika nazonga epai ya nkolo na ngai”.

Batuni na Rebecca soki alingi akende mbala moko. Mposa na ye ezali akutana na mobali
Nzambe aponi mpo na ye mpe ayaboli ata kobanga te : “Nazali kokende kaka sik’oyo”. Libota
na ye bapamboli ye, pe bakei mbala moko mpo na kokutana na Abraham mpe Izaak.

Nzambe atambwisaki malamu Izaak mpe Rebecca na kokutana moko na mosusu.

Makanisi mpo na molakisi


3. Bosenga na bana bazongela :
Kofandisa ngai te, mpo Nzambe abongiseli ngai mobembo. Botika nazonga epai ya
Nkolo na ngai.
4. Bosolola makambo oyo :
• Ndenge nini Eliezer akokisi etinda na ye ? (atiaki motema na lisalisi ya Nzambe.
Abondeli Nzambe mpe asengi ye elembo. Azuaki mwasi mpo na Izaak).
• Rebecca amifandisaki te na makambo ezanga ntina. Nini ekokaki kozangisa ye mpo
atika ndako ? (nionso amesanaki na yango mpe oyo alingaki : baboti, bandeko,
libota ya mosika, bandeko ya zinga-zinga, banyama, ndako...)
5. Limbola makambo oyo :
• Nzambe alingi atambuisa biso, soki tosengi ye, soki mpe timipesi mobimba na ye
lokola Eliezer asalaki.
• Tozali komibongisa biso moko na se “banda awa” mokolo moko mpo na likolo.
Lokola Eliezer na Rebecca, tolingi te eloko te epekisa biso na nzela ya litomba na
biso.

Liteya
Nzambe atambuisaka biso kaka malamu, soki totikeli ete asala bongo.

41
Supu ya motane –
Lipamboli ya Izaak
Genese 25:21-34; 27:1-40
Genese 25
21 Lokola Rebeka azalaki kobota te, Izaak abondelaki Yawe po na mwasi na ye. Yawe
ayokelaki ye mawa, pe Rebeka akomaki na zemi. 22 Tango bana bazalaki kotutana na kati ya
libumu na te, ye alobi: “Soki ebandi boye, nakosuka ndenge nini? Atuni Yawe tina ya likambo
wana, 23 bongo Yawe alobi na ye: “Bikolo mibale ezali na kati ya libumu na yo; okobta
mabota mibale oyo ekozala koyokana te. Moko akozala makasi koleka mosusu; kulutu
akozala mosali ya leki.” 24 Na tango ya kobota bamoni penza ete Rebeka aboti bamapasa.
25 Mwana ya liboso abotamaki motane, pe azalaki na suki mingi na nzoto lokola nyama;
bapesi ye kombo Ezau. 26 Tango mwana ya mibale abotamaki, liboko na ye esimbaki likolo
ya Ezau; bapesaki ye kombo Jakob. Izaak azalaki na mbula tuku motoba (60) tango bana
yango babotamaki. 27 Bana bakolaki. Ezau azalaki kotambola mingi na zamba, akomaki
mobomi monene ya banyama. Jakob abandaki kaka kofanda na mboka pe azalaki moto ya
kimia. 28 Izaak alingaki Ezau, pamba te azalaki kosepela kolia banyama; kasi Rebeka
alingaki mingi Jakob. 29 Mokolo moko, tango Jakob azalaki kolamba supu, Ezau akomi,
autaki na zamba pe alembaki mingi. 30 Bongo alobi na Jakob: “Nalembi mingi. Pesa ngai
supu oyo ya motane namela.” Yango wana bapesaki Ezau kombo mosusu Edom. 31 Kasi
Jakob alobi: “Liboso tekela ngai bokonzi na yo ya mwana ya liboso.” 32 Ezau azongisi:
“Nazali kokufa nzala, bokonzi yango ya mwana ya liboso ekosala ngai eloko nini?” 33 Jakob
alobi: “Liboso katela ngai nanu seleka.” Bongo Ezau akati seleka ete atekeli Jakob bokonzi na
ye ya mwana ya liboso, 34 pe Jakob apesi ye mapa na supu ya madesu. Ezau alei, ameli,
sima akei. Boye Ezau amonaki bokonzi ya mwana ya liboso lokola eloko ya pamba.

Genese 27
Izaak akomaki mobange pe miso na ye elembaki, bongo azalaki komona lisusu te. Abengi
Ezau, mwana na ye ya liboso, alobi: “Mwana na ngai!” Ezau andimi: “Ngai oyo.” 2 Bongo
Izaak alobi: “Omoni ete nakomi mobange, pe nayebi te mikolo boni natikali na yango. 3
Sik’oyo kamata bafleshe na yo na munduki na yango pe kende na zamba kobomela ngai
nyama. 4 Lambela ngai yango ndenge nalingaka, pe yeela ngai yango po nalia malamu, boye
nakopambola yo liboso ete nakufa.” 5 Bongo Ezau akei na zamba po na koboma nyama.
Nzokande tango Izaak azalaki kosolola na ye, Rebeka azalaki koyoka. 6 Rebeka alobi na
mwana na ye Jakob: “Nayokaki tata na yo azali koloba na ndeko na yo Ezau boye: 7 ’Yeela
ngai nyama, pe lambela ngai yango ndenge nalingaka, po nalia malamu, bongo
nakopambola yo na miso ya Yawe, liboso ete nakufa. 8 Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai
malamu, pe sala ndeng nazali koloba. 9 Kende esika banyama na biso ezali, pe memela ngai
bana-taba mibale ya mafuta. Nakolambela tata na yo supu ya malonga ndenge alingaka. 10
Okomema yango epai ya tata na yo po alia, boye akopambola yo liboso ete akufa.” 11 Kasi
Jakob alobi na mama na ye: “oyebi ete Ezau azali na suki mingi na nzoto, kasi ngai nazali na
yango te. 12 Soki tata asimbi ngai, akoyeba ete nazali kokosa ye, bongo na esika ete nazwa
mapamboli, nakozwa lisuma.” 13 Mama na ye azongisi: “Mwana na ngai, tika lisuma yango
ekweela ngai. Kasi yo, yokela bobele ngai, pe kende kokamatela ngai bana-taba.’ 14 Ye akei
kokamata bana mibale ya taba, pe ayei na yango epai ya mama na ye. Rebeka alambeli
Izaak supu ya malonga ndenge alingaka. 15 Bongo akamati bilamba ya Ezau ya kitoko, oyo
azalaki kobomba na ndako, alatisi Jakob; 16 sima alatisi ye pe poso ya taba na maboko pe
na kingo. 17 Apesi Jakob supu ya malonga na mapa oyo alambaki. 18 Jakob akei epai ya
tata na ye, alobi: “Tata!” Ye azongisi: “Ngai oyo, mwana na ngai. Yo nani?” 19 Jakob alobi:
“Ngai Ezau, mwana na yo ya liboso. Nasi’nasali makambo nyonso ndenge olobaki na ngai.
Nasengi yo olamuka pe olia nyama oyo ngai nabomi, bongo sima opambola ngai.” 20 Izaak
atuni ye: “Mwana na ngai, ndenge nini ozwi yango noki boye?” Jakob azongisi: “Yawe,

42
Nzambe na yo asalisi ngai po nazwa yango noki.” 21 Izaak alobi na Jakob: “Pusana
penepene na ngai po nasimba yo, boye nakoyeba soki ozali mwana na ngai Ezau.” 22 Jakob
apusani penepene ya tata na ye, bongo Izaak asimbi ye, pe alobi: “Mongongo ezali koyokana
lokola ya Jakob, kasi maboko ezali ya Ezau.” 23 Wana ezali ndenge Izaak apambolaki ye, po
ayebaki te ete ezali Joakb. Pamba te maboko na ye ezalaki na suki mingi lokola ya Ezau. 24
Atuni Jakob lisusu: “Ya solo, ozali mwana na ngai Ezau?” Ye azongisi: “Ee, ezali ngai.” 25
Izaak alobi: “Pesa ngai nyama oyo obomi, nalia, bongo nakopambola yo.” Jakob apesi yango
na tata na ye, pe ye alei. Sima apesi ye vinu, pe ye ameli. 26 Bongo Izaak alobi na ye:
“Mwana na ngai, pusana penepene pe yamba ngai.” 27 Jakob apusani pe ayambi ye. Na
tango wana Izaak ayoki solo ya bilamba na ye, bongo apamboli ye boye: “Solo ya mwana na
ngai eyokani lokola solo ya bilanga oyo Yawe asi’abenisa. 28 Uta na Likolo Nzambe akitisela
yo mai oyo ezalaka na matiti na tongo; asala ete mabele ebotela yo mbuma mingi, po
otonda na mapa pe na vinu. 29 Bato ya bikolo mosusu basalelaka yo; pe bato ya mabota
mosusu bagumbamaka liboso na yo. Ozala mokonzi ya bandeko na yo; bango nyonso
bagumbamaka liboso na yo. Nzambe apesa etumbu na bato oyo bakozala koyina yo; abenisa
bato oyo bakozala kolinga yo.” 30 Tango Izaak asilisi kopambola Jakob, ye abimi. Kaka na
tango wana Ezau akomi, auti na zamba. 31 Ye pe alambi supu ya malonga pe ayei na yango
epai ya tata na ye; alobi: “Tata, nasengi yo, olamuka pe olia nyama oyo nabomi, bongo sima
opambola ngai.” 32 Izaak atuni ye: “Yo nani?” Ye azongisi: “Ngai Ezau, mwana na yo ya
liboso.” 33 Izaak abandi kolenga makasi pe atuni: “Likambo nini oyo? Nani moto abomaki
nyama pe ayeelaki ngai yango? Nalei yango bobele sik’oyo, liboso ete yo okoma! Nasi
napamboli ye, pe akotikala na mapamboli yango libela.” 34 Tango Ezau ayoki maloba ya tata
na ye, ayoki motema pasi pe aleli na mongongo makasi. Abondeli tata na ye, alobi: “Tata,
pambola ngai pe.” 35 Izaak azongisi: “Ndeko na yo ayaki awa pe akosi ngai. Asi’azwi
mapamboli na yo.” 36 Ezau alobi: “Kombo na ye ezali ya solo ‘Jakob’, moto oyo awelaka
kimokolo. Akosi ngai mbala mibale. Pamba te liboso abotolaki bokonzi na ngai ya mwana ya
liboso, pe tala sik’oyo ayei kobotola mapamboli na ngai.” Ezau abakisi: “Tata, obombi
lipamboli ata moko te po na ngai?” 37 Izaak azongisi: “Nasi’natie ye mokonzi na yo, pe
napesi bandeko na ye nyonso na maboko na ye, po bazala basali na ye. Nasi’napamboli
bilanga na ye, po etonda na mbuma ya kosalela mapa pe vinu. Sik’oyo nasala lisusu nini po
na yo, mwana na ngai?” 38 Ezau alobi lisusu na tata na ye: “Tata, ozali bobele na lipamboli
moko pamba?” Pambola ngai pe, tata!” Pe abandi kolela lisusu na mongongo makasi. 39
Bongo Izaak alobi na ye: “Esika yo okofanda, mabele ekobota mingi te. Mai oyo ezalaka na
matiti na tongo ekokitela bilanga na yo mingi te. 40 Okobikela bobele na mbeli na yo ya
bitumba, pe okozala mosali ya ndeko na yo. Kasi tango okotomboka, okolongwa na boumbu
na ye.”

43
Supu ya motane –
Lipamboli ya Izaak
Genese 25 : 21-34; 27 : 1-40

Lisolo oyo ezali ya bandeko mibale ya mibali, bana ya Izaak mpe Rebecca. Abraham, papa ya
Izaak atindaki Eliezer koluka mwasi mpo na Izaak. Na lisalisi ya Nzambe, Eliezer azuaki
Rebecca mpe amemaki ye epai ya Izaak.

Izaak mpe Rebecca bazali kosepela mingi na mbotama ya mapasa na bango. Bana mibale ya
mibali bakeseni. Ya liboso azali motane mpe kunza ebele. Abengami Esau. Ya mwana moke
abengami Jakob.

Bana mibale ya mibali oyo bakeseni na mposa. Esau alingi mokili, wapi amekaka bokasi mpe
molende na ye ntango na ntango. Azali mobomi nyama. Jakob, ye, alingaka kofanda na
ndako, wapi akotala banyama, kosala mpe misala ya zinga-zinga ya ndako. Izaak alingi
penza Esau, mwana ya liboso, Rebecca, mama na bango, alingi Jakob.

Pokwa moko, Esau auti na bilanga, alembi mpe na nzala. Jakob azali kolamba supu ya
motane na ye, mpe Esau alobi na ye : “Solo ezali koyokana kitoko ! Nalembi mpe na nzala.
Okoki kopesa ngai ndambu ya biloko wana ?” Jakob ayanoli ye : “Ee, kasi kaka soki otekeli
ngai kimokolo na yo”. Esau akomi koseka : “Na lolenge nionso na kokufa. Kimokolo yango
ezali kosalela ngai nini ?” “Lapela ngai liboso !” Jakob atie mbamba. Esau alapeli ye. Jakob
apesi ye ndambu ya ndunda mpe apesi ye ndambu ya lipa. Esau alei na esengo nionso mpe,
biloko esili atelemi mpe alongue wana. Kimokolo mpo na ye ezali na ntina te.

Sima ya bambula ebele, Izaak, oyo lelo akomi penza mokolo, miso na ye ekufi. Ayoki ngona
ekoki ya kopesa lipamboli na Esau oyo etali kimokolo. Izaak alobi na Esau : “kende kati na
bilanga, mpe boma nyama. Salela ngai biloko na ngai nalingaka. Nakopambola yo lelo, ya
solo nakomi mokolo mingi mpe nakei na kokufa”.

Rebecca ayoki nionso. Akeyi mbangu koyebisa Jakob : “kende kolukela ngai bana ntaba
mibale. Nakomba biloko oyo papa na yo alingaka. Okomemela ye biloko wana mpo
apambola yo. Jakob abangi mwa moke, kasi mama na ye atie mbamba. Jakob akei koluka
bana mibale ya ntaba. Mwa ntango eleki, biloko ebeli. Rebecca apesi Jakob ndambu ya
bilamba ya Esau. Azipi maboko mpe kingo na ye na poso ya nyama. Lolenge akosani, Jakob
amemeli papa na ye biloko na ye alingaka. Izaak atuni : “ozali nani ? Jakob ayanoli : “Nazali

44
Esau. Biloko olingaka yango oyo. Papa lia, ntina opambola ngai”. Izaak atie maboko mpo
asimba mwana na ye mpe alobi na kobanga : “Ezali kokamwa, mongongo ezali ya Jakob,
nde maboko ya Esau.” Izaak alie biloko balambeli ye. Jakob apesi papa mbote ya litama,
Izaak ayoki solo ya bilamba ya Esau, mpe apamboli mwana na ye.

Sima ya mwa ntango, Esau ayei na ndako ya kapo ya Izaak. Akamwe penza, Izaak sik’oyo
ayebi ezalaki libunga na ye moko. Alobi : mobomi nini ya banyama amemeli ngai biloko ?
Napamboli ye yambo oya, mpe apambolami”. Esau agangi mpe alobi na papa na ye :
“Pambola ngai mpe lokola, papa na ngai !”. Izaak ayanoli ye : “Napamboli Jakob, ndeko na
yo”. Esau atuni : “ozali kaka na lipamboli wana ?” Esau akomi penza mawa, kasi akomi mpe
kanda na Jakob, oyo akosi ye mbala ya mibale.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Jakob, kasi Esau te, azuaki na papa na ye lipamboli etali kimokolo.
2. Bosolola makambo oyo :
• Bokanisi nini na kosala ya Esau ? (Esau azali komona kaka maye ya ntango moke.
Azali komona te oyo ekoyela ye).
• Lifuti ya mokili ekoumela seko te. Lipamboli ezotalela mituya ya seko.
• Mwana ya liboso azali na maye ebele ya kozua mpe bokonzi : azali kozua mibale na
oyo bandeko na ye bakozua, mpe azali kokoma mokonzi ya libota soki papa akufi.
3. Tokoki koteka bomwana ya Nzambe na biso te (kimokolo) kaka boye na oyo ezali na
motuya kaka awa na nse.

Liteya
Tozali komitala malamu na mituya oyo lipamboli ya molimo ezali komema to kobomba.

45
Kokima mpe ndoto ya Jacob –
Epai ya Laban –
Libota mpe bolamu ya Jacob
Genese 27 : 41-46; 28; 29; 30
Genese 27
41 Ezau ayinaki Jakob po tata na bango apambolaki ye. Amilobi na se ya motema: “Etikali
kaka moke tata na ngai akufa. Mokolo wana nakoboma Jakob.” 42 Tango Rebeka ayei
koyeba likanisi ya Ezau, abengi Jakob pe alobi na ye: “Ndeko na yo Ezau azali kokana kosala
yo mabe, alingi koboma yo. 43 Mwana na ngai, yoka malamu makambo nakoloba na yo.
Longwa awa, kima na Haran epai ya ndeko na ngai Laban. 44 Fanda mwa-moke epai na ye,
tii mokolo kanda ya ndeko na yo ekosila, 45 tango akobosana likambo osalaki ye. Bongo
sima nakotinda moto akende kobenga yo. Nalingi kobungisa bino nyonso mibale na mbala
moko te.” 46 Rebeka alobi na Izaak: “Nasi’nalembi mokili likolo ya bilenge basi ya ba-Hitite
oyo. Soki Jakob abali moko na kati na bango, nakozala lisusu na posa ya mokili te.”

Genese 28
Izaak abengi Jakob, apamboli ye pe apesi ye mitindo oyo: “Kobala mwasi ya Kanan te. 2
Simba nzela pe kende na Mezopotamie epai ya Betuel, tata ya mama na yo. Bala mwana ya
noko na yo Laban. 3 Nzambe ya nguya abenisa yo pe apesa yo bana ebele, po okoma koko
ya bikolo ebele. 4 Abenisa yo na mabota na yo, ndenge abenisaki Abraham, bongo okoka
kozwa mboka oyo ozali kofanda, oyo nzambe apesaki na Abraham.” 5 Izaak atindi Jakob na
Mezopotamie epai ya Laban, mwana ya Betuel, moto ya Aram, pe ndeko ya Rebeka, mama
ya Jakob na Ezau. 6 Ezau ayei koyeba ete Izaak apambolaki Jakob pe apesaki ye mitindo
abala mwasi ya Kanan te, kasi akende kobala na Mezopotamie. 7 Jakob atosaki tata na
mama na ye, pe akendeki na Mezopotamie. 8 Boye Ezau amoni ete tata na ye alingaki basi
ya Kanan te; 9 yango wana na basi oyo azalaki na bango liboso, abalaki lisusu mwasi. Akei
epai ya Ismael, mwana ya Abraham, pe abali mwana na ye ya mwasi Mahalat, ndeko ya
Nebayot. 10 Jakob alongwe na mboka Bersheba, akei na mboka Haran. 11 Tango butu
ekomi, azalaki na esika moko ya malamu, bongo akamati libanga moko, atie yango na se ya
motu na ye, pe alali. 12 Aloti ndoto: amoni esikalie ebandi na se pe songe na yango etuti na
Likolo. Ba-anjelu ya Nzambe bazalaki kobuta pe kokita na yango. 13 Yawe atelemi liboso na
ye, alobi: “Ngai nazali Yawe, Nzambe ya koko na yo Abraham pe ya tata na yo Izaak.
Nakopesa yo na bana na yo, mabele oyo olaleli. 14 Bana na yo bakozala mingi lokola mbuma
ya zelo. Bakopanzana bipai nyonso: epai moi ebimaka pe epai elalaka, epai ya likolo pe epai
ya se. Bongo po na yo pe bana na yo, nakobenisa bikolo nyonso ya mokili. 15 Tala, nazali na
yo, nakobatela yo bisika nyonso okokende. Nakozongisa yo lisusu na mboka oyo; nakotika yo
te. Nakokokisa makambo nalobi na yo.” 16 Tango Jakob alamuki na pongi, alobi: “Ya solo,
Yawe azali awa, kasi ngai nazalaki koyeba te.” 17 Abangi pe alobi: “Esika oyo ezali ya
kobanga! Ezali ya solo Ndako ya Nzambe, esika ya kokotela na Likolo.” 18 Jakob alamuki na
tongo-tongo. Akamati libanga oyo ezalaki na se ya motu na ye, atelemisi yango asopeli
yango mafuta po ekoma libanga ya bosantu. 19 Apesi esika yango kombo Betel, elingi
koloba: Ndako ya Nzambe. Liboso kombo ya esika yango ezalaki Luz. 20 Bongo Jakob akati
seleka epai ya Yawe, alobi: “Yawe, soki ozali na ngai pe obateli ngai na mobembo oyo nazali
kokende, soki opesi ngai biloko ya kolia na bilamba, 21 pe soki nazongi malamu na mboka ya
tata na ngai, wana yo, Yawe, okozala Nzambe na ngai. 22 Esika natelemiseli yo libanga oyo,
ekozala Ndako na yo. Nakopesa yo eteni moko na kati ya biteni zomi ya bomengo nyonso
oyo okopesa ngai.”

46
Genese 29
Jakob akamati nzela, akei na epai moi ebimaka, na mboka oyo mama na ye autaki. 2 Mokolo
moko amoni libulu moko ya mai na kati ya esobe; penepene na yango amoni masanga
misato ya bameme na bataba ezalaki kopema, po bakengeli bamesanaki komelisa yango mai
na esika wana. Libanga moko ya monene ezalaki kozipa monoko ya libulu. 3 Tango masanga
nyonso ezalaki kokoka na esika yango, bazalaki kotindika libanga pe komelisa banyama mai;
sima, bazalaki kozongisa libanga yango na monoko ya libulu. 4 Jakob atuni bakengeli:
“Baninga, bouti wapi?” Bango bazongisi: “Touti na Haran.” 5 Ye atuni: “Boyebi Laban,
mwana ya Nahor?” Bazongisi: “Ee, toyebi ye.” 6 Atuni lisusu: “Azali malamu?” Bango
bazongisi: “Ee, azali malamu. Tala, mwana na ye ya mwasi Rashel azali koya na bameme na
ye.” 7 Jakob alob: “Sik’oyo moi ezali nanu, pe tango ya kozongisa bameme na mboka ekoki
nanu te. Bomelisa bameme mai, pe bozongisa yango lisusu na esika ya kolia.” 8 Bango
bazongisi: “Tokoki kosala boye te. Tokozela tii tango masanga nyonso ya bameme ekokoka,
bongo tokotindika libanga po na komelisa yango mai.” 9 Tango Jakob asilisi kosolola na
bango, Rashel akomi wana na bameme ya tata na ye, pamba te ye moto azalaki mokengeli
na yango. 10 Tango Jakob amoni Rashel, mwana ya noko na ye Laban, na bameme na ye,
akei na libulu ya mai, atindiki libanga oyo ezipaki libulu pe amelisi bameme ya noko na ye
mai. 11 Jakob ayambi Rashel, pe abandi kolela makasi. 12 Ayebisi Rashel: “Nazali mwana ya
Rebeka, ndeko ya tata na yo.” Rashel akei mbangu koyebisa tata na ye. 13 Tango Laban
ayoki sango ya Jakob, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, ayei mbangu epai na ye. Ayambi
ye, pe amemi ye na ndako. Jakob ayebisi Laban makambo nyonso ndenge elekaki. 14 Laban
alobi na ye: “Ya solo ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai.” Jakob afandaki epai
ya Laban sanza moko. 15 Laban aloi na Jakob: “Ata ozali ndeko na ngai, kosalela ngai
mosala ya ofele te. Yebisa ngai, olingi nafutaka yo boni? 16 Laban azalaki na bana mibale ya
basi. Oyo ya kulutu kombo na ye Lea, pe oyo ya leki Rashel. 17 Lea azalaki na miso ya soni-
soni, nzokande Rashel azalaki kitoko penza. 18 Jakob alingaki Rashel, bongo alobi na Laban:
“Nakosalela yo mosala mbula sambo po nabala Rashel, mwana na yo ya suka. 19 Laban
alobi: “Nakosepela kutu kopesa ye epai na yo, esika ete napesa ye na mobali mosusu. Fanda
awa epai na ngai.” 20 Jakob asalelaki Laban mosala mbula sambo po abala Rashel. Amonaki
mbula yango lokola mwa-mikolo moke, pamba te azalaki kolinga Rashel mingi. 21 Sima
Jakob alobi na Laban: “Tango esi’ekoki. Pesa ngai mwasi na ngai, nala ye.” 22 Bongo Laban
asalisaki feti monene, abengisaki bato nyonso ya mboka wana. 23 Kasi na butu yango
akamati Lea pe amemi ye na shambre ya Jakob. 24 Laban apesaki Lea moumbu moko ya
mwasi, kombo na ye Zilpa. 25 Na tongo Jakob ayei koyeba ete ezalaki Lea, bongo alobi na
Laban: “Po na nini osali ngai boye?” Nasalelaki yo mosala po nabala Rashel. Po na nini okosi
ngai?” 26 Laban azongisi: “Na mboka na biso, tobalisaka leki liboso ya kulutu te. 27 Fanda
nanu na Lea poso oyo mobimba ya feti ya libala; sima nakopesa yo pe Rashel, soki osaleli
ngai lisusu mosala mbula sambo.” 28 Jakob andimi, pe tango asilisi poso moko ya feti ya
libala na Lea, Laban amemeli ye Rashel, 29 bongo apesi Rashel moumbu moko, kombo na
ye Bia. 30 Jakob afandaki na Rashel; alingaki ye mingi koleka Lea; pe asalelaki lisusu Laban
mosala mbula sambo. 31 Tango Yawe amoni ete Jakob azali kolinga Lea mingi te, apesi ye
mabota, kasi Rashel azalaki kobota te. 32 Lea akomi na zemi pe aboti mwana-mobali, apesi
ye kombo Ruben; pamba te alobi: “Yawe amoni ndenge bazali koyokia ngai soni, pe sik’oyo
mobali na ngai akolinga ngai.” 33 Akomi na zemi ya mibale aboti mwana-mobali, apesi ye
kombo simeon; pamba te alobi: “Yawe ayoki ete balingaka ngai te, yango wana apesi ngai
lisusu mwana.” 34 Azwi zemi ya misato pe aboti mwana-mobali, apesi ye kombo Levi; pamba
te alobi: “Sik’oyo mobali na ngai akokangama na ngai po naboteli ye bana mibali misato.” 35
Azwi zemi ya minei pe aboti mwana-mobali, apesi ye kombo Yuda; pamba te alobi: “Sik’oyo
nakokumisa Yawe.” Bongo atiki kobota.

47
Genese 30
Tango Rashel amoni ete azali kobotela Jakob bana te, abandi koyokela ndeko na ye Lea
zuwa. Alobi na Jakob: “Pesa ngai bana soki te nakokufa.” 2 Jakob asilikeli Rashel pe
azongiseli ye: “Nakomi nde Nzambe? Ye moto akangisi mabota na yo.” 3 Rashel alobi lisusu :
“Kamata Bila, moumbu na ngai, fanda na ye po abotela ngai bana. Boye nakozala mama na
bana po na ye.” 4 Bongo Rashel apesi Bila epai ya mobali na ye, pe Jakob afandi na ye. 5
Bila azwi zemi pe aboteli Jakob mwana-mobali. 6 Rashel apesi ye kombo Dan; pamba te
alobi: “Nzambe akati likambo na ngai. Ayoki losambo na ngai pe apesi ngai mwana-mobali.”
7 Bila, moumbu ya Rashel, azwi zemi ya mibale, pe aboteli Jakob mwana. 8 Rashel apesi ye
kombo Neftali; pamba te alobi: “Nabundi etumba makasi na ndeko na ngai, pe nalongi.” 9
Tango Lea amoni ete azali kobota lisusu te, azwi Zilpa, moumbu na ye ya mwasi, apesi ye na
Jakob po azala mwasi na ye. 10 Zilpa aboteli Jakob mwana-mobali. 11 Lea apesi ye kombo
Gad; pamba te alobi: “Nabeti libaku malamu.” 12 Zilpa aboteli Jakob mwana ya mibale. 13
Lea apesi ye kombo Asher; pamba te alobi: “Esengo penza! Sik’oyo basi nyonso bakoki
koloba ete nazali moto ya esengo.” 14 mokolo moko na tango ya kolongola mbuma na
bilanga, Ruben akendeki na bilanga kobuka mwa-bambuma oyo babengaka “ya bolingo”.
Amemeli yango mama na ye Lea. Bongo Rashel alobi na Lea: “Soki olingi, pesa ngai ndambo
ya bambuma oyo mwana na yo ayei na yango.” 15 Lea azongisi: “Ndenge ozwi mobali na
ngai ekoki te? Sik’oyo olingi ozwa lisusu mbuma oyo mwana na ngai abuki?” Rashel alobi:
“Soki opesi ngai mbuma yango, Jakob akolala epai na yo na butu ya lelo.” 16 Na pokwa,
tango Jakob auti na bilanga, Lea akei kokutana na ye, alobi: “Lelo okolala epai na ngai;
pamba te nafuti mbuma oyo mwana na ngai abukaki po nazwa yo.” Bongo Jakob alalaki epai
ya Lea na butu yango. 17 Nzambe andimaki losambo ya Lea. Lea azwi zemi ya mitano pe
aboteli Jakob mwana. 18 Apesi ye kombo Isakar; pamba te alobi: “Nzambe afuti ngai po
napesaki moumbu na ngai ya mwasi epai ya mobali na ngai.” 19 Lea azwi zemi ya motoba,
aboteli Jakob mwana. 20 Apesi ye kombo Zebulon; pamba te alobi: “Nzambe akabeli ngai
likabo kitoko. Sik’oyo mobali na ngai akopesa ngai lokumu, po naboteli ye bana mibali
motoba.” 21 Sima na yango abotaki mwana-mwasi, apesi ye kombo Dina. 22 Bongo Nzambe
akanisi Rashel. Andimimabondeli na ye pe afungoli mabota na ye. 23-24 Rashel azwi zemi,
aboti mwana-mobali. Apesi ye kombo Jozef; pamba te alobi: ‘Nzambe alongoli ngai soni.
Yawe apesa ngai lisusu mwana-mobali.” 25 Sima ya mbotama ya Jozef, Jakob alobi na
Laban: “Tika ngai nazonga na mboka na biso. 26 Pesa ngai basi na ngai na bana,
nasi’nasaleli yo mosala po na bango. Oybei nyonso oyo nasaleli yo.” 27 Laban azongiseli ye:
“Yoka nayebisa yo: Moto moko oyo ayebaka makambo alakisi ngai ete Yawe abenisi ngai po
na yo. 28 Yebisa ngai talo oyo olingi nafuta yo, pe nakofuta yango.” 29 Jakob alobi na ye:
“Yo moko oyebi malamu ndenge nini nasaleli yo, pe ndenge banyama na yo ekomi ebele po
na ngai. 30 Tango nakomaki epai na yo, bomengo na yo ezalaki moke; sik’oyo ekomi mingi,
pe Yawe abenisaki yo na makambo nyonso oyo ngai nazalaki kosalela yo. Ebongi nabanda
kosala pe mosala po na libota na ngai moko.” 31 Laban atuni ye lisusu: “Nakofuta yo nini?”
Jakob azongisi: “Kofuta ngai eloko moko te. Soki ondimi likambo oyo nakoyebisa yo,
nakozongela lisusu koleisa pe kokengela bameme na yo. 32 Nakoleka lelo na kati ya
banyama na yo nyonso, pe nakotia na pembeni bameme nyonso ya mwindu pe ya matono-
matono to ya banzela-nzela ya mwindu, pe bataba nyonso ya matono-matono to ya banzela-
nzela ya pembe. Yango ekozala lifuta na ngai. 33 Bongo na bambula ekoya, okoya kotala
soki nazwi lifuta na ngai na bosembo. Soki omoni epai na ngai bataba oyo ezangi matono to
banzela-nzela ya pembe, pe bameme oyo ezangi matono to banzela-nzela ya mwindu, loba
ete nazwi yango na moyibi.” 34 Laban azongisi: “Malamu! Tokosala ndenge olobi.” 35 Kasi
kaka na mokolo yango Laban akei epai ya banyama na ye. Alongoli bataba nyonso oyo
ezalaki na matono-matono to na banzela-nzela ya pembe, pe bameme nyonso oyo ezalaki na
matono-matono to na banzela-nzela ya mwindu, pe apesi yango na bana na ye; 36 bango
bakei na yango, batamboli mikolo misato tii bakomi mosika. Jakob abandaki kobokola
banyama oyo etikalaki, ezalaki ya Laban! 37 Bongo akamati bitape ya mobesu ya banzete ya

48
ndenge na ndenge oyo ezali na poso ya mwindu, alongoli yango ndambo ya baposo po
ekoma na banzela-nzela ya pembe. 38 Atie yango liboso ya esika banyama emelelaka mai;
pamba te bataba ya mibali ezalaki komatela oyo ya basi na esika wana, 39 boye lokola
bataba ya basi ezalaki komona bitape wana ya banzela-nzela, ebandaki kobota bana ya
matono-matono pe ya banzela-nzela ya pembe. 40 Kasi po na bameme, azwi ndambo atie
yango na ndenge ete emonaka bataba oyo ezalaki matono-matono to banzela-nzela pe
bataba nyonso ya mwindu oyo ezalaki ya Laban. Bongo tango bataba pe bameme eyei
kobota, alongoli bana na yango na kati ya banyama ya Laban, boye yango nyonso ekomi ya
ye. 41 Nzokande Jakob azalaki kotia banzete wana tango nyonso te. Azalaki kosala bongo
bobele soki banyama ya nzoto minene ezalaki koya komela mai, po emona yango tango
ezalaki komatelana. 42 Kasi soki ezalaki banyama ya kokonda, abandaki kotia banzete te.
Boye banyama ya kokonda ezalaki po na Laban, pe oyo ya nzoto minene ezalaki po na
Jakob. 43 Ye akomaki na bomengo mingi koleka. Azalaki na banyama ebele, baumbu ya
mibali na ya basi, bashamo pe bapunda.

49
Kokima mpe ndoto ya Jakob –
Epai ya Laban –
Libota mpe bolamu ya Jakob
Genese 27 : 41-46; 28; 29; 30

Esau azali na kanda mpo na Jakob, oyo abotoli lipamboli oyo etali kimokolo. Ayebisi baninga
na ye na nkuku : “Nakoboma Jakob sima ya liwa ya papa na ngai”. Rebecca ayoki ye mpe
mbala moko ayebisi Jakob. Akebisi ye : “Ndeko na yo alingi aboma yo ! Kima na yo noki noki
penza. Nalingi te kobungisa moko to mosusu kati na bino mibale”.

Rebecca azali kosolola na Izaak mpo na mikolo ezali koya ye Jakob. Rebecca azali na mawa.
Ezaya abengi Jakob na kati ya ndako ya kapo na ye mpe alobi na ye : “Jakob, nalingi okende
na mboka ya mama na yo. Ntango okokoma epai ya Laban, ndeko ya mama na yo, osengeli
oluka mwasi. Tika Nzambe abatela yo mpe apambola bana na yo nionso !” “Malamu penza,
papa, nakei mbala moko”. Mpo na kokima kanda ya ndeko na ye, atiki mboka na ye.

Akomi na esika moko boye, wapi azali kolala mpo butu ekomi. Azui libanga moko na oyo
ezali na esika wana, atie na moto mpe amisemboli mpo na kolala. Ntango alali, aloti ndoto.
Amoni ebutelo etelemi na mabele. Songe ya ebutelo esimbi likolo. Banzelu bazali komata
mpe kokita na ebutelo wana, mpe Nzambe ye moko azali na songe. Nzambe alobi na ye :
“Nazali Yawe, Nzambe ya Abraham mpe ya Izaak, mabele oyo yo olaleli, nakopesa na yo
mpe na libota na yo. Okozua bana ebele, mpe bakopanzana na bipai binso. Mabota nionso
ya mokili bakopambolama kaka mpo na yo. Nakobatela yo bisika binso okokende, mpe
nakozongisa yo na mboka na yo”.

Jakob alamuki na tongo. Azui mokano na boyebi libanga oyo azuaki butu eleki mpe azui
makanisi ya kotia mwa mafuta na libanga yango. Jakob apesi esika wana kombo ya Bethel
elingi koloba “ndako ya Nzambe”. Mpe asali ndai : “Nkolo, soki ozali na ngai mpe soki
okobatela ngai bipai nionso nakokende, soki okopesa ngai mapa ebele ya kolia mpe bilamba
ebele ya kolata; soki nakoki kozonga na kimia na ndako ya papa na ngai, wana okozala
Nkolo na ngai, nzambe na ngai. Libanga wana na telemisi yango mpo na kokanisaka, ekozala
ndako ya Nzambe; mpe na kopesa yo eteni ya zomi na nionso okopesa ngai”. Jakob akomi
epai ya noko na ye Laban. Amonani na Rachel, mwana suka ya noko na ye, pembeni ya
libulu. Rachel azali na yaya na ye ya mwasi ya liboso, Lea. Jakob azali kobatela bibwele ya
Laban. Sima ya sanza moko, Laban akeyi kosolola na Jakob mpo na lifuti na ye. Jakob alobi :
“Noko na ngai nalingi Rachel mingi. Soki nasaleli yo mbula sambo, nakoki kobala ye te?”

50
Laban andimi. Feti monene ya libala esalamaki na sima ya mbula sambo. Na bongo, moseka
azingami na elamba ya libala, mpe kaka sima ya mokolo moko nde Jakob ayebi ete noko na
ye apesi ye lokola mwasi mwana na ye ya mwasi ya liboso, Lea. Jakob asengelaki lisusu
asala mbula sambo mpo na kobala Rachel.

Sima ya kofanda epai ya Laban mibu ntuku mibale, Jakob alingaki azonga na mboka na
bango. Ayei koyebisa Laban : “Laban, nalingi nazonga epai na ngai. Laka ngai na kende na
libota na ngai na Kanan. Laban alingi afuta Jakob mpo na misala asali bambula nionso eleki,
mpe alobi na ye : “Napesa yo nini ?” Jakob ayanoli : “Opesi ngai biloko ebele. Nakosepela
soki opesi nzela ya kozua bampate nionso ya nkoma mpe matono ya etonga mpe bampate
nionso ekoboma ya noma mpe matano yambo na kende”. Laban andimi.

Bampate ebele babotami na nkoma mpe matono, mpe etonga ya Jakob ekoli lisusu. Nakotala
mibu ntuku mibala eleki, Jakob azui boyebi ya mozindo, mpo Nzambe apesi ye libota
monene, mpe ya bolamu.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga bana bazongela :
Nzambe alobi na Jakob na ndoto : “Tala nazali na yo mpe na kobatela yo bisika binso yo
okokende !
2. Bosolola makambo oyo :
• Esau ayinaki ndeko na ye Jakob mpe azalaki na makanisi ya koboma ye sima ya liwa
ya papa na bango.
• Jakob atiki mboka na ye mpe akei mosika ya ndeko na ye.
• Jakob aloti ndoto wapi Nzambe apesi ye elaka.
• Atako Jakob azuaki lipamboli na mayele ya mabe mpe akimi na ntina wana, Nzambe
abatelaki ye kaka.
• Jakob asalelaki noko na ye Laban bambula molai, mpe akomi mozui.
3. Jakob asali manso mpo azua lipamboli ya Nzambe. Soki biso mei tosali manso mpo
tozua lipamboli ya Nzambe, akopambola biso mpe lokola.

Liteya
Nzambe azali kaka pembeni na biso mpe azali kopambola biso, ezala atako tozali koyeba
yango kaka te.

51
Bozongi-
Jacob azui kombo ya Israel
Genese 31; 32; 33
Genese 31
Bana ya Laban ya mibali babandi kolobana ete: “Jakob azwi biloko nyonso ya tata na biso;
yango wana akomi na bomengo mingi.” Jakob ayoki bongo, 2 pe amoni ete Laban azali
kolinga ye lisusu te lokola liboso. 3 Bongo Yawe alobi na ye: “Zonga na mboka ya koko na
yo, epai ya libota na yo. Nakozala na yo.” 4 Jakob abengisi Rashel pe Lea na esobe, esika
banyama na ye ezalaki. 5 Alobi na bango: “Namoni ete tata na bino azali kolinga ngai lisusu
te ndenge ya liboso; kasi ezali Nzambe ya tata na ngai moto apesaki ngai bomengo oyo. 6
Boyebi malamu ete nasaleli tata na bino na makasi na ngai nyonso; 7 nzokande ye azalaki
kosakana na ngai, pamba te mbala zomi abongolaki ndenge ya kofuta ngai. Kasi Nzambe
apesaki ye nzela te ya kosala ngai mabe. 8 Tango tata na bino alobaki: ‘Banyama nyonso ya
matono-matono ekozala lifuta na yo’, banyama nyonso ekomaki kobota bana ya matono-
matono. Tango alobaki: ‘Banyama nyonso ya banzela-nzela ekozala lifuta na yo’, banyama
nyonso ekomaki kobota bana ya banzela-nzela. 9 Nzambe moto alongoli banyama ya tata na
bino pe apesi ngai yango. 10 Tango banyama ezalaki komatelana, namonaki lokola na ndoto
ete bataba pe bameme ya mibali ezalaki yango nyonso matono-matono pe banzela-nzela. 11
Anjelu ya Nzambe abengaki ngai: ‘Jakob!’ Nandimaki: ‘Ngai oyo.” 12 Ye alobaki: ‘Tala bataba
na bameme ya mibali ezali komatela oyo ya basi; yango nyonso ezali matono-matono pe
banzela-nzela. Nasali bongo po namoni ete Laban asali yo mabe. 13 Nazali Nzambe oyo
okumisaki na Betel, tango otelemisaki libanga, osopelaki yango mafuta, pe okatelaki ngai
seleka. Sik’oyo longwa na mboka oyo pe zonga na mboka obotamaki.” 14 Rashel na Lea
bazongiseli Jakob boye: “Tozali lisusu na eloko ya kozela epai ya tata na biso? 15 Ye azali
kotala biso lokola bapaya! Asi’atekisi biso, pe asi’alei mbongo nyonso oyo asengeli kopesa
biso. 16 Yango wana bomengo nyonso oyo Nzambe alongoli epai ya tata na biso ezali ya
biso na bana na biso. Sala kaka makambo nhonso oyo Nzambe alobi na yo.” 17-18 Bongo
Jakob amibongisi po na kozonga epai ya tata na ye Izaaka na Kanan. Atie bana na ye pe basi
na ye likolo ya bashamo, amemi banyama na ye nyonso, na bomengo nyonso oyo azwaki na
Mezopotamie. 19 Nzokande na tango wana Laban akendeki kokata bapwale ya bameme na
ye, boye Rashel azwi nzela ya koyiba bikeko ya banzambe ya bakoko oyo ezalaki na ndako
ya tata na ye. 20 Jakob asali mayele, ayebisi Laban te ete alingi kokende. 21 Akimi na biloko
na ye nyonso, akatisi ngambo ya ebale Ufrate, pe abandi kokende epai ya bangomba ya
Galad, oyo etalana na mai ya Yordan. 22 Sima ya mikolo mibale, bayebisi Laba ete Jakob
asi’akimi. 23 Laban akamati bato ya libota na ye pe alandi Jakob. Asali mikolo sambo pe ayei
kozwa ye na bangomba ya Galad. 24 Kasi na butu, Nzambe abimelaki Laban na ndoto, pe
alobi na ye: “Keba, kosala Jakob ata eloko moko te. “ 25 Laban akuti Jakob esika apikaki
bandako na ye ya kapo, likolo ya bangomba. Laban na bato ya libota na ye bapiki pe
bandako na bango ya kapo kaka na esika wana. 26 Laban alobi na Jakob: “Po na nini osali
ngai boye? Okosi ngai pe okimi na bana na ngai ya basi, lokola basi oyo bakangi na tango ya
etumba. 27 Po na nini okimaki na kobombana pe okosi ngai, esika ete oyebisa ngai liboso?
Mbele tolingaki kokabwana na esengo, koyemba banzembo pe kobeta bambunda na
mandanda. 28 Olingaki te nayamba bana na ngai na bana na bango? Osali likambo moko ya
bozoba penza! 29 Nakoki kosala yo mabe, kasi na butu ya lelo, Nzambe ya tata na yo alobaki
na ngai: ‘Keba, kosala jakob ata eloko moko te.’ 30 Likambo te, okimi po ozali na posa
monene ya kozonga na mboka ya tata na yo; kasi po na nini oyibi banzambe na ngai?” 31
Jakob azongisi: “Nabangaki po nakanisaki ete okobotola ngai bana na yo. 32 Kasi po na
banzambe na yo, soki ozwi yango epai ya moto moko kati na biso, moto yango asengeli
kokufa. Na miso ya bandeko na biso, tala biloko na ngai nyonso pe kamata oyo ezali ya yo.”
Jakob ayebaki te ete Rashel moto ayibaki banzambe yango. 33 Laban aluki na ndako ya kapo
ya Jakob na ya Lea, na ya basali mibale ya basi, kasi amoni eloko te. Bongo abimi na ndako

52
ya kapo ya Lea, akoti na oyo ya Rashel. 34 Nzokande Rashel moto akamataki banzambe ya
Laban; atiaki yango na kiti oyo bafandelaka likolo ya shamo pe azalaki kofandela yango.
Laban aluki ndako mobimba, kasi amoni yango te. 35 Bongo Rashel alobi na tata na ye:
“Tata, kosilika te po natelemi te pamba te nazali malamu te.” Laban aluki na ndenge nyonso,
kasi azwi banzambe na ye te. 36 Bongo Jakob asiliki pe abandi kogangela Laban: “Mabe nini
nasali po olukela ngai makambo? 37 Otalitali biloko na ngai nyonso, eloko na yo nini ozwi
epai na ngai? Lakisa yango na bato na yo pe na bato na ngai, po bakatela biso likambo. 38
Nafandaki mbula tuku mibale (20) epai na yo. Ata mokolo moko te meme na yo to taba na
yo esopaki zemi; pe natikalaki kolia meme na yo ya mobali ata moko te. 39 Ata mbala moko
te namemelaki yo nyama oyo babomaki na banyama ya zamba; kasi ngai moko nazalaki
kofuta nyama mosusu. Pe soki bayibi nyama moko, ezala na moi to na butu, yo ozalaki
kotinda ngai nafuta mosusu. 40 Na moi nazalaki kokufa na molunge; pe na butu, pongi
ezalaki kosila ngai na miso po na malili. 41 Nandimaki kofanda mbula tuku mibale (20) epai
na yo; nasalelaki yo mbula zomi na minei (14), po nakoka kobala bana na yo mibale; pe
mbula motoba po nakoka kozwa ndambo ya banyama na yo. Nzokande mbala zomi yo
obongolaki ndenge ya kofuta ngai. 42 Kasi Nzambe ya koko na ngai Abraham, nzambe ya
Sukisa ya Izaak azalaki na ngai, soki te mbele olingaki kotika ngai nazonga maboko pamba.
Nzambe amonaki mawa na ngai pe mosala ya makasi oyo nasali, yango wana lobi na butu
ayebisaki yo ndenge akataki likambo na ngai.” 43 Laban azongiseli Jakob boye: “Bana basi
oyo bazali bana na ngai. Bana na bango bazali bakoko na ngai, banyama oyo ezali ya ngai,
pe biloko nyonso oyo ozali komona ezali ya ngai. Kasi banda lelo oyo nakoki kosala lisusu
eloko moko te po na bana na ngai ya basi, to po na bana na bango. 44 Likambo te. Sik’oyo
tosala boyokani biso mibale, bongo ngai na yo topika elembo moko na esika oyo.” 45 Jakob
azwi libanga moko ya monene pe atelemisi yango. 46 Sima alobi na bato na ye balokota
mabanga. Balokoti yango pe batie yango esika moko. Bongo balei na likolo ya mabanga waa.
47 Bango mibale bapesi yango kombo “Mabanga ya temwen”. Moto na moto abengaki yango
na monoko na ye. 48 Pamba te Laban alobi: “Lelo mabanga oyo ezali temwen kati na ngai
na yo.” 49 Bapesi yango pe kombo mosusu Mispa; pamba te Laban alobi lisusu: “Yawe
akengelaka biso tango nyonso tokozala komonana te. 50 Soki onyokoli bana na ngai ya basi,
pe soki obali basi mosusu, keba! Yeba malamu ete ezali moto te nde azali temwen kati na
biso, kasi ezali Nzambe.” 51 Sima Laban alobi na Jakob: “Tala mabanga oyo natie esika
moko kati na ngai na yo, pe libanga oyo yo otelemisi. 52 Yango mibale ezali batemwen na
biso. Nakoki koleka yango te po na koya kosala yo mabe, yo pe okoki koleka yango te po na
kosala ngai mabe. 53 Nzambe ya Abraham pe Nzambe ya Nahor, Nzambe ya batata na
bango akozala zuzi kati na biso.” Bongo Jakob akataki seleka na kombo ya Nzambe ya Sukisa
ya tata na ye Izaak. 54 Sima abomeli Nzambe banyama na likolo ya ngomba, pe alambeli
bandeko na ye bilei ya mabonza. Tango basilisi kolia balali kuna na likolo ya ngomba.

Genese 32
Na tongo-tongo Laban alamuki, ayambi bana na ye ya basi na bakoko na ye, apamboli
bango, pe azongi namb oka na ye. 2 Tango Jakob azalaki kokende, ba-anjelu ya Nzambe
bayei kokutana na ye. 3 Awa amoni bango, alobi: “Oyo ezali esika ya Nzambe na basoda na
ye.” Bongo apesi eesika yango kombo Mahanaim, elakisi: “Bisika mibale ya basoda.” 4 Jakob
atindi bantoma epai ya ndeko na ye Ezau, na moka ya bangomba, na esobe ya Edom. 5
Apesi bango mitindo, alobi: “Boloba boye na mokonzi na ngaiEzau: Ngai moumbu na yo
Jakob, natindeli yo maloba oyo. Nafandaki mikolo mingi epai ya Laban. 6 Nazali na
bangombe, bapunda, bameme, bataba, maumbu ya mibali pe ya basi. Natindi maloba epai
na yo, mokonzi, po oyamba ngai malamu.” 7 Bantoma wana bazongi epai ya Jakob, balobi:
“Tokendeki epai ya ndeko na yo Ezau. Ye moko azali koya na bato kama minei po na
kokutana na yo.” 8 Jakob abangaki mingi, pe makanisi na ye etamboli. Akaboli bato oyo
bazalaki na ye, pe bameme, bataba, bangombe, na bashamo na ye na masanga mibale. 9

53
Amilobi ete: “Soki Ezau abomi lisanga moko, mosusu ekozwa mayele ya kokima.” 10 Bongo
Jakob asambeli, alobi: “Nzambe ya koko na ngai Abraham, ya tata na ngai Izaak, yo Yawe
olobaki na ngai: ‘Zonga na mboka na yo epai ya libota na yo. Nakobatela yo malamu.’ 11
Ngai moumbu na yo, nazali nani po osala ngai bolamu pe olakisa ngai bolingo na yo
monene? Tango nakatisaki mai ya Yordan, nazalaki bobele na nzete pamba na liboko. Pe tala
sik’oyo nazali kozonga na ebele ya bato na banyama nakaboli yango na masanga mibale. 12
Nabondeli yo, bikisa ngai na maboko ya ndeko na ngai Ezau. Nazali kobanga ete aya koboma
biso nyonso, na basi pe bana. 13 Nzokande yo olobaki: ‘Nakobatela yo malamu, nakopesa yo
bana mingi penza, lokola zelo pembeni ya ebale.’ 14 Jakob apiki ndako na ye ya kapo po
alala na esika wana; nzokande aponi mwa-ndambo ya banyama po na kopesa na ndeko na
ye Ezau: 15 bataba ya basi 200 pe ya mibali tuku mibale (20); bameme ya basi 200 pe ya
mibali tuku mibale (20); 16 bashamo tuku misato (30) oyo ezalaki komelisa bana mabele, na
bana na yango; bangombe ya basi tuku minei (40) pe ya mibali zomi; bapunda ya basi tuku
mibale (20) pe ya mibali zomi. 17 Apesi lisanga moko moko ya banyama na maboko ya
baumbu na ye, pe alobi na bango: “Boleka liboso na ngai. Lisanga na lisanga etambola
yango moko, bolandana penepene te.” 18 Apesi mitindo na moumbu oyo azalaki liboso alobi:
“Soki ndeko na ngai Ezau akutani na yo, tango mosusu akotuna: ‘Mokonzi na yo nani? Ozali
kokende wapi? Banyama oyo ozali kotambwisa ezali ya nani? 19 Loba na ye boye: ‘Mokonzi
Ezau, yango ezali ya moumbu na yo Jakob. Ezali makabo ye atindeli yo. Ye moko azali koya
sima na biso.” 20 Jakob apesi mitindo yango pe na moumbu ya mibela, na oyo ya misato, pe
na baoyo nyonso bazalaki kotambwisa banyama, alobi: “Boloba boye na Ezau tango ye
akotuna bino. 21 Boyebisa ye ete: ‘Moumbu na yo Jakob azali koya sima na biso.’” Jakob
akanisaki boye: “Nakolembisa motema ya Ezau na makabo nazali kotinda liboso na ngai.
Tango nakokutana na ye, nakanisi akoyamba ngai malamu.” 22 Atindaki makabo liboso na
ye, pe ye moko alalaki butu yango na bandako ya kapo, na bato na ye. 23 Kaka na butu
yango Jakob alongwe, akamati basi na ye mibale ya libala, na mibale oyo ya baumbu, pe
bana na ye zomi na moko. Akatisi bango mai ya Yabok na esika moko ezalaka modindo te.
24 Sima na bango, akatisi pe biloko na ye nyonso, 25 pe ye moko atikalaki kuna. Bongo
moto moko abundisaki ye tii tango tongo etanaki. 26 Awa moto yango amoni ete akokaki
kolonga Jakob te, abeti ye na loketo, pe mokuwa ya loketo na ye elongwaki na esika na
yango. 27 Moto yango alobi: “Tika ngai nakende, pamba te moi elingi kobima.” Kasi Jakob
azongisi: “Nakotika yo kaka soki opamboli ngai.” 28 Moto yango atuni: “Kombo na yo nani?”
Ye azongisi: “Jakob.” 29 Moto yango alobi: “Obundisi Nzambe pe bato, bongo olongi. Yango
wana kombo na yo ekozala lisusu Jakob te, kasi ekomi Israel.” 30 Jakob alobi: “Nasengi yo,
yebisa ngai kombo na yo.” Kasi ye azongisi: “Po na nini ozali kotuna kombo na ngai?” Bongo
apamboli Jakob wana. 31 Jakob alobi: “Nasi’namonani na Nzambe miso na miso, pe nazali
kaka na bomoi.” Bongo apesaki esika yango kombo Peniel. 32 Tango tongo etani, Jakob
alongwe na Peniel, pe azalaki kotambola malamu te po azalaki koyoka pasi na loketo. 33
Yango wana tii lelo ba-Israelite, soki babomi nyama, baliaka misuni ya mipende te oyo
ezalaka na loketo, pamba te bazokisaka Jakob na esika yango.

Genese 33
Jakob amoni Ezau azali koya na bato na ye 400. bongo akaboli bana na ye epai ya Lea n
Rashel, pe epai ya basi na ye mibale ya baumbu. 2 Atie na liboso baumbu na ye esika moko
na bana na bango, sima atie Lea na bana na ye, pe na suka atie Rashel na Jozef. 3 Ye akei
na liboso na bango nyonso, afukami elongi na se mbala sambo, tii na tango akomi penepene
ya ndeko na ye. 4 Kasi Ezau ayei mbangu po na kokutana na ye, ayambi ye, boye bango
mibale babandi kolela. 5 Tango Ezau amoni basi na bana, atuni: “Bato oyo bazali banani?”
Jakob azongisi: “Bazali bana oyo Nzambe apesi ngai.” 6 Boye basi ya baumbu bayei na bana
na bango, pe bafukami bilongi na se. 7 Lea ayei na bana na ye, pe na suka Rashel na Jozef;
bango nyonso bafukami bilongi na se. 8 Ezau atuni: “Nauti kokutana na banyama ebele.
Likambo nini? Jakob azongisi: “Mokonzi na ngai, ezali po oyamba ngai malamu.” 9 Kasi Ezau

54
alobi: “Ndeko na ngai, nazali na biloko oyo ekoki. Bomba biloko na yo po na yo moko.” 10
Jakob azongisi: “Te. Nabondeli yo, soki ya solo obombeli ngai kanda na motema te, ndima
makabo oyo napesi yo. Awa namomi elongi na yo, ezali lokola namoni elongi ya Nzambe,
pamba te oyambi ngai malamu. 11 Nasengi yo, ondima makabo oyo nayeeli yo. Nzambe
asali ngai malamu, pe apesi ngai nyonso oyo ekoki na ngai.” Abondeli Ezau, bongo ye
andimaki makabo yango. 12 Ezau alobi: “Tokei! Ngai nakokende nzela moko na yo.” 13 Kasi
Jakob azongisi: “Mokonzi, bana na ngai bakomi nanu makasi te. Ebongi nakengela pe
bameme na bangombe oyo ezali komelisa bana mabele. Soki batambwisi yango makasi ata
na mokolo moko pamba, banyama nyonso ekokufa. 14 Nasengi yo okende liboso na ngai.
Biso tokolanda yo malembe-malembe, na bana na banyama, tii mokolo tokokuta yo na
bangomba ya Edom.” 15 Ezau alobi: “Soki boye, ebongi natikela yo bato na ngai mosusu.”
Kasi Jakob azongisi: “Po na nini? Ndenge oyambi ngai ekoki.” 16 Kaka na mokolo yango Ezau
akamati nzela azongi na Edom. 17 Kasi Jakob akendeki na Sukot. Kuna atongi ndako na ye,
pe bandako ya matiti po na kolalisaka banyama na ye. Yango wana bapesaki esika yango
kombo Sukot, elakisi: bandako ya matiti. 18 Jakob akomaki na malamu nyonso na vile ya
Sikem, na mboka Kanan, tango autaki na Mezopotamie. Apikaki bandako ya kapo na esobe,
na liboso ya vile. 19 Asombi mabele oyo apikelaki bandako na ye ya kapo, na maboko ya
bana ya Hamor, tata ya Sikem. Afuti bango bibende kama moko (100) ya arjan. 20 Kuna
atongi mesa ya kopesa Nzambe mabonza, pe abengi yango “El, Nzambe ya Israel.”

55
Bozongi-
Jakob azui kombo ya Israel
Genese 31; 32; 33

Jakob alekisi mibu ntuku mibale epai ya noko na ye, azali sik’oyo mpe na libota monene mpe
bampate ebele. Jakob abengi basi na ye, Lea mpe Rachel, mpe alobi na bango : “Ekomi pasi
ya kofanda na kimia na libota na bino. Bakomi na zuwa ya bomengo na biso mpe tata na
bino, Laban, alingi biso lisusu te. Nzambe alobaki na ngai na zonga na mokili na biso”. Basi
ya Jakob bandimi, mpe bazui mokano ya kokende mpe koyebisa ye te.

Sima ya mikolo misato, Laban ayoki ete bakimi. Akomi na kanda mpe alandi bango elongo na
ndambo ya bato na ye. Boye, yambo azua Jakob, Nzambe alobeli ye na ndoto na kati ya
butu : “Keba, linga Jakob mpe kobangisa ye na lolenge okani te !” Na mwa ntango, Laban
akutani na Jakob. Batiani tembe na mwa ntango molai na oyo eleki mpe bayokani. Mpo na
kokanisaka boyokani wana, baltongi ekeko. Lobi eleki na tongo, Laban atiki bana na ye
bakende mpe apamboli bango.

Awa Jakob na libota na ye bazali kopusana na esika Esau azali, wana mpe mawa na ye
ebakisami. Atindi bato bayebisa Esau : “Nayei kosenga oyokela ngai mawa !” Na mwa
ntango moke batindami bazongi. Bayebisi ye azali koya kokutana na ye na bato nkama
minei. Jakob abangi, mpe aleli lisalisi ya Nzambe : “Nzambe ya Abraham mpe ya Izaak, yaka
na lisalisi na ngai ! Batela libota na ngai mpe biloko na ngai ! Batela ngai mpo na ndeko na
ngai Esau ! Oyebisaki ngai mokolo moko na kozonga na kati ya mboka na ngai”. Atindi bato
lisusu epai ya ndeko na ye mpo bapesa ye ndambo ya mpate lokola likabo.

Jakob asali bisika na ye na mipanzi ya ebale ya Jabbok. Azali kokoka kolala te. Alamuki mpe
amoni mopaya. Moto wana akomi kobunda na ye. Bitumba ekobi tii na tongo. Mopaya alobi
na ye : “Tika ngai nakende !” Kasi Jakob ayanoli ye : “Nakotika yo te okende soki opamboli
ngai te !” Mopaya atuni ye kombo na yo nani ? “Jakob mpo na nini ?” Ayanoli.

Moto wana ayanoli : “Banda lelo okobengama Israel. Obundi na Nzambe, mpe olongi”.
Yango wana Jakob apesi esika wana kombdo ya “Peniel”, yango elingi koloba : “Nde namoni
Nzambe miso na miso, mpe mosuke na ngai ebikisamaki”. Na ntango ya bitumba, loketo ya
Jakob ebukana ebongi.

Jakob amoni Esau mpe basoda na ye bakomi pene pene na ye. Esau akimi bangu epai ya
Jakob mpe bandeko banso mibale bayambani banandi kolela. Jakob akomi kolakisa libota na
ye na Esau. Ntango ye akomi na Sichem, Jakob asombi mabele mpe afandi wana na libota

56
na ye. Mpo na kolakisa ete asepeli na nionso Nzambe asaleli ye, atongi mesa mpo na
Nzambe mpo na kotonda ye.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Sima ya kobunda na Nzambe, Jakob azuaki kombo moko ya sika : Israel.
2. Bosolola makambo oyo :
Eloko nini Jakob asalaki yambo ya kokutana na ndeko na ye ? (Atindaki bato epai ya
ndeko na ye mpo na ayokela ye mawa. Asengaki mpe lisalisi ya Nzambe. Atindaki lokola
makabo epai ya ndeko banyama ebele.
3. Jakob asengaki lisalisi ya Nzambe, sima ye moko mpe amibongisaki na bitumba mpo
akoka kosala mwa eloko. Tozua bizaleli ya Jakob lokola ndakisa. Biso mpe tobosana te
ete esengeli na biso kosala mpe kobondela.

Liteya
Baye batie motema epai ya Nzmabe bakopambolama mingi.

57
1.3.0. Yezu-Kristo azali Mwana ya Nzambe

1.3.1 Yoane-Mobatisi
1.3.2 Yezu azui libatisi mpe azui elembo ya Molimo-Mosantu
1.3.3 Yoane amonisi Yezu
1.3.4 Yezu akomi koteya na kati ya bato –
Bayekoli ya liboso
1.3.5 Likamwisi ya liboso ya Yezu
1.3.6 Koloba ya monene
1.3.7 Ngai nazali oyo ya ye

Na Bokuse

Nzambe atindi Yoane-Mobatisi koloba na bato : “Kristo, Mosikoli oyo alakamaki, azali koya
sik’oyo !” Yoane apesi libatisi na bato ebele. Kristo, Mwana ya Nzambe, akei kozua libatisi ye
moko epai ya Yoane. Molimo-Mosantu ekiti likolo na ye na elilingi ya ndeke mpe Nzambe
alobi : “Oyo nde Mwana na ngai ya bolingi, na ye na tie motema na ngai”. Bato ebele
basepeli koyoka liboba ya Nzambe na monoko ya Yezu. Alobi na bayekoli na ye : “Nzambe
alingi bino. Bondimela ye, botia mitema epai na ye”.

Yezu ayekwisi bato, alobi na bato oyo Nzambe alingaka mpo na bango. Asangisi mibali ya
bondimi mpo na akomisa bango bayekoli na ye, akolisi bondimi na bango na liloba na ye kasi
mpe na bilembo ndenge na ndenge mpe na bikamwisi. Nzambe, Tata na ye ya likolo, apesaki
ye nguya ya kosala makambo oyo.

Oyo andimeli Tata mpe na Mwana akozua libateli mpe lisalisi.

58
Yoane-Mobatisi
Luka 3 : 1-18
Luka 3
Sima ya mbula ebele, Nzambe atindi maloba na ye epai ya Yoane, Mwana ya Zakarya, na
kati ya esobe. Na tango wana mokonzi monene Tibere akokisi mbula zomi na mitano (15) na
bokonzi ya Rome, Ponse Pilate azalaki motambwisi ya rejion ya Yudea; Erode azalaki
mokonzi ya Galile; ndeko na ye Filipe azalaki mokonzi ya Iture pe ya Trakonite; Lizanias
azalaki mokonzi ya Abilene; pe Hana na Kaife bazalaki banganga-Nzambe minene. 3 Bongo
Yoane abandi kotambola na bapembeni nyonso ya mai ya Yordan. Azalaki kosakola boye:
“Bobongola mitema; boya nabatisa bino, bongo Nzambe akolimbisa masumu na bino.” 4
Ndenge wana Yoane akokisaki makambo ekomama na mokanda ya profete Ezaya: “Moto
moko azali kobelela na kati ya esobe: ‘Nkolo alingi koya! Bobongisela ye nzela. Bosalela ye
nzela moko ya kitoko!’ 5 Bakozipa mabulu nyonso ya minene; bakolalisa bangomba nyonso
ya mike na ya milai. Bakobongisa banzela oyo etengama; bakozipa mabulu ya banzela ya
mabe. 6 Pe moto nyonso akomona ndenge Nzambe abikisaka bato.” 7 Bato ebele babandaki
kokende epai ya Yoane po abatisa bango. Kasi Yoane azalaki koloba na bango: “Bino
banyoka oyo! Nani apesi bino mayele ya kokima kanda ya Nzambe oyo ezali koya? 8 Bosala
makambo oyo ezali kolakisa ete bosi’bobongoli mitema! Botika komiloba bino na bino ete:
‘Mabe moko te ekoki kokweela biso, pamba te Abraham azali koko na biso.’ Nalobi na bino:
Nzambe akoki kobongola mabanga oyo po ekoma bana ya Abraham. 9 Basi’babongisi
epasola po na kokata misisa ya banzete. Nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te,
bakokata yango pe bakobwaka yango na moto.” 10 Bato batuni ye: “Bongo, tosala nini?” 11
Yoane azongiseli bango: “Oyo azali na shemize mibale, apesa moko na moninga oyo azangi
yango. Oyo azali na bilei, akabela bato mosusu.” 12 Bafutisi-mpaku pe bayaki po Yoane
abatisa bango, bongo batuni ye: “Moteyi, tosala nini?” 13 Yoane azongiseli bango: “B ofutisa
bato se mpaku oyo batindi bino.” 14 Basoda pe batuni ye: “Bongo biso tosala nini?” Yoane
alobi na bango: “Bonyokola moto moko te, pe bokosela bato makambo te; bomeka kozwa
mbongo mosusu te na likolo ya lifuta na bino.” 15 Bato nyonso bazalaki kozela ete likambo
monene ekoya; bazalaki kotia mitema na Yoane, pe babandaki komituna soki ye azali Mesia.
16 Bongo Yoane alobi na bango nyonso: “Ngai nazali kobatisa bino na mai pamba, kasi moto
oyo aleki ngai na nguya, akoya sima na ngai; nakoki kutu te kofungola basinga ya basandale
na ye. Ye akobatisa bino na Molimo Mosantu pe na moto. 17 Asimbi kiyungulu po na
koyungula matiti oyo esangani na mbuma ya ble; akobomba mbuma kasi akotumba matiti na
moto oyo ekufaka te.” 18 Yoane azalaki koloba makambo mingi mosusu po na kopesa bato
molende, pe azalaki koteya bango Sango malamu.

59
Yoane-Mobatisi
Luka 3 : 1-18

Yoane-Mobatisi ateyi na pembeni ya ebale moko na Israel. Ezali ebale monene, ebengami
Jourdain. Yoane azalaki kobatisa yambo ete Yezu abanda koteya. Tokanisa mokolo malamu
kati ya bomoi ya Yoane.

Moto moko akangi esika na ye ya koteka. Alingi te asala lelo na ngonga eleki : azuaki
mokano ya kokende na ebale. Baninga na ye balobeli ye moto moko babengi Yoane-
Mobatisi, oyo azali kobatisa na pembeni ya ebale. Moto wana ayoki ete Yoane afandaki mingi
na esobe. Na kati ya nzela, akanisi bomoi kati na esobe : mikolo ya moyi makasi, babutu ya
malili, mposa ya mayi penza penza mpe biloko mpasi mpo na kozua. Azali komituna nini
Yoane aliaka ya malamu. Madesu, mafuta ya nzoyi mpe mabanki bakalinga. Elenge mobali
akoki sik’oyo koyeba mpo na nini asalaki bongo. Ezali nde na kati ya kimia kaka bakoki
koyoka mpe koyeba Nzambe.

Banzete ebele mpe ya mike ekolaka na pembeni ya ebale. Elenge mobali amoni Yoane,
atelemi na esika ya polele. Atako ebele ya bato bazingi Yoane, elenge mobali ayebi ye mbala
moko. Yoane alakisi lokola azali moto ya zamba. Loposo na ye ekauki mpe nzela likolo ya
moyi ya esobe, loposo ya nzoto ekomi lokole poso. Alati elamba moko esalama na poso ya
nyama. Yoane ayebisi na bayoki ye : “Bobongisa bomoi na bino ! Nzambe alingi azongisa
bokonzi na ye. Mosikoli akoya sik’oyo ! Tozala na ekenge. Nzambe alingi kkaka bato
babongwama na masumu na bango !” Elenge mobali ayebi, ye mpe Nzambe alakaki Mosakoli
mpo mitema ebongisama koyamba mosikoli. Amituni na kimia : “Yoane akoki kozala
mosakoli yango ?”

Basusu batuni nna Yoane : “Biso tosala nini ?” Alobi na moko : “Esengeli okaba, soki ozali na
bilamba mibale, pesa mosusu na oyo azangi”. Alobi na mosusu : “Kobomba te bilei mpo na
yo moko !” Asengi na soda azala matata te to mpe bozangi bosembo, to mpe kozua biloko
ya bato te. Asengi na moko na moko abanda bomoi ya sika. Abatisi bango na ebale.

Elenge mobali amoni ete baye babatisami bakomi na elongi ya esengo. “Sik’oyo tokoki mpo
na kozela boyei ya Mosikoli”, balobi. Baye nionso bazali koyoka Yoane babongisami te mpo
na kobongola bomoi na bango. Ebele bazali komiyoka penza ete bakoka. Bazali wana kaka
mpo na kotala maye ezali koleka. Yoane akomi kolobela mbala moko bato wana :
“Bomibongisa ! Ntango mosikoli akoya, akokabola masangu mpe matiti mabe. Bokopanzana,
bokozika !”

60
Elenge mobali azali koyoka Yoane. Andimi solo ete azali Mosakoli monene. Azali na bokebi ya
kosimba makanisi ya bato. Elenge mobali amilobeli : “Ekoki kozala ye te mosikoli, oyo tozali
kozela banda kala”. Apusani epai ya Yoane mpe atuni ye motuna mbala moko : “Ozali
Mosikoli, mokonzi oyo tozali kozela uta kala ?” Yoane ayanoli ye : “Te ! Nazali mosikoli te.
Nazali kaka mosali, motindami ya kobongisela ye nzela. Nakoki te kofungola singa ya sapato
na ye te. Azali monene mingi mpe nguya koleka ngai. Nazali kobatisa na mayi, Mosikoli
akobatisa na Molimo-Mosantu mpe moyo.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Yoane abongisaki bandimi na boyei ya Mosikoli.
Yoane abatisaki baye nionso balingaki kobongola bomoi na bango.
2. Bosolola makambo oyo :
Nini boyebi na bomoi mpe mosala ya Yoane ?
• Yoane afandaki na esobe mpo amibongisa ye moko na mosala na ye.
• Ateyaki mpe abatisaki na mayi.
• Abongisaki bato mpo na boyei ya Mosikoli.
3. Batoma bazali kobongisa biso mpo na boyei ya Yezu.

Liteya
Nzambe apesaki na Yoane mosala ya kobongisa bato na boyei ya Yezu, Mwana ya Nzambe.

61
Yezu abatisami na mayi mpe na molimo
Matai 3 : 13-17/Yoane 6 : 27
Matai 3
13 Mokolo moko Yezu autaki na Galile pe ayaki penepene ya Yordan; akomi epai ya Yoane
po azwa batisimo. 14 Kasi Yoane alingaki kobatisa ye te, alobi na ye: “Yo nde moto osengeli
kobatisa ngai, bongo ozali koya epai na ngai!” 15 Kasi Yezu azongiseli ye: “Po na sik’oyo,
sala kaka. Pamba te esengeli tokokisa makambo nyonso Nzambe alingaka.” Bongo Yoane
andimi. 16 Tango Yezu asilisi kozwa batisimo, abimi na mai. Kaka na tango wana Likolo
efungwami; amoni Molimo ya Nzambe akiti lokola pijon pe ayei kofanda likolo na ye. 17
Mongongo moko euti na Likolo elobi: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo; nasepeli na ye
mingi.”

Yoane 6
27 Botika kosala bobele po na bilei oyo ebebaka, kasi bosala po na bilei oyo eumelaka, pe
epesaka bomoi ya seko. Bilei wana, Mwana na Moto akopesa bino yango, pamba te nzambe
Tata alakisi polele ete atindi ye.

62
Yezu abatisami na mayi mpe na molimo
Matai 3 : 13-17/Yoane 6 : 27

Elenge mobali akei na ebale mpo alobela Yoane mpe ayoka ye. Yoane azali kotiela ye ata
makanisi moke te. Azalaki komona mitema mpe komona oyo ebombama. Makanisi na ye ya
mozindo ezali na ntina kaka mpo na Yoane. Elenge mobali abatisami mpe lokola. Yoane mpe
na ye sik’oyo bakomi baninga penza. Bazali kolobela mingi mpo na mosikolami. Lolenge nini
ya koyeba ye ? Yoane andimi ete Nzambe akolabisa ye Mosikolami na lolenge moko to mpe
mosusu.

Mokolo yango ezalaki moto mpe koningana. Bato ebele bayaki mpo na koyoka Yoane mpe
kobatisama na ye. Yoane ateyi lisusu ebele ya batu : “Bomibongisa ! Ntango ebelemi ! Kaka
baye bakobongola bomoi na bango, bakozala pene na koyamba Mosikolami !” Mbala moko,
elenge mobali apusani na baye bazali koyoka. Moto moko te azotala elenge mobali. Yoane,
ye amiyoki penza elenge mobali abendi ye. Ezali Yezu wa Nazaret. Yezu azali elenge koleka
Yoane ya ba sanza. Elisabeth mama ya Yoane, alobelaki mbala na mbala kobotama ya Yezu.
Yoane atalaki ebele ya batu. Lokola bakeseni na moko na mosusu ! Moko te akokani na
Yezu. Yoane ayebi, mbala moko, ete Yezu azali Mosikolami, Mwana-Meme oyo azali
kolongola masumu ya mokili. Akamwe ntango Yezu ayebisi ye abatisama. Yoane alobi na ye:
“Ndenge nini okoki kozela yango na ngai ? Nakoki kobatisa yo te ! Okoki kobongola bomoi na
yo te ! Osali eloko moko te ya mabe. Ezali nde yo moto osengeli kobatisa ngai”.

Yezu ayanoli ye : “Esengeli na yo obatisa ngai. Moto na moto asengeli akokisa mosala na ye.
Ozali kobatisa na mayi. Yango wana nasengi na yo, lisusu, obatisa ngai mpe”. Yoane azali na
likambo mosusu kaka ya kobatisa Yezu. Bakiti bango mibale na ebale. Yoane azali na esengo
penza te; azali na makanisi ya kosala libunga moko boye. Bakoti na mayi kino na molayi mpe
lokola asalaki na banso, Yoane abatisi Yezu.

Esalami sik’oyo likambo moko ya kokamwa. Likolo efunguami mpe Nzambe abatisi Yezu na
Molimo-Mosantu. Na sima mongongo eyokani : “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo,
nasepeli na ye mingi”. Moto na moto asimbi na ndenge na ye. Kimia esalami ya monene.
Mpe ngonga wana ya talo eleki.

63
Makanisi mpo na molakisi
1. Bosenga na bana bazongela :
Yoane apesaki Yezu libatisi ya mayi, Nzambe atombolaki Yezu. Nzambe alobi : “Oyo
azali Mwana na ngai ya bolingo, na ye natie motema na ngai mobimba”.
2. Bosolola makambo oyo :
Nini yango elekaka ntango Yezu akutanaki na Yoane na pembeni ya ebale ya Jourdain ?
• Yoane akamwaki Yezu
• Yezu asepalaki Yoane apesa ye libatisi
• Yoame-Mobatisi apesaki Yezu libatisi ya mai
• Nzambe ye moko apesaki Mwana na ye libatisi ya Molimo-Mosantu.
• Nzambe ayebaki Mwana na ye.
3. Biso mpe tozuaki Molimo-Mosantu mpe na nzela ya kozua elembo ya Molimo-
Mosantu tokomi bana ya Nzambe.

Liteya
Yoane apesaki libatisi na Yezu. Nzambe apesaki Mwana na ye elembo ya Molimo-Mosantu.

64
Yoane amonisi Yezu
Yoane 3 : 23; 26 – 36
Yoane 3
23 Yoane pe azalaki kobatisa bato na Ainon, penepene ya Salim, pamba te kuna mai ezalaki
mingi. Bato babandaki koya epai na ye, pe azalaki kobatisa bango.

26 Bongo bakei epai ya Yoane, balobi na ye: “Moteyi, moto oyo azalaki na yo na ngambo ya
Yordan, oyo olobelaki biso po na ye, sik’oyo ye pe abandi kobatisa bato. Bato nyonso bazali
kokende epai na ye.” 27 Yoane azongiseli bango: “Moto akoki kozwa eloko moko te, soki
Nzambe apesi ye yango te. 28 Bino moko boyebi ete nalobaki na bino: ‘Ngai nazali Mesia te;
kasi Nzambe atindaki ngai liboso, po Mesia alingi koya.’ 29 Ye azali lokola mobali oyo azwi
mwasi, pe azali kosalisa feti ya libala. Ngai nazali lokola moninga ya mobali, oyo afandi
penepene na ye pe azali koyoka ye, bongo azali na esengo mingi po na koyoka mongongo ya
moninga na ye oyo abali. Wana nde esengo na ngai; ya solo, nasepeli penza. 30 Esengeli
lokumu na ye eleka ya ngai, bongo ya ngai ekita.” 31 “Moto oyo auti na Likolo aleki bato
nyonso; 32 alobaka makambo ye ayoki pe amoni; kasi moto moko te azali koyamba maloba
na ye. 33 Bato oyo bayambi maloba na ye, bandimi ete Nzambe alobaka makambo ya solo.
34 Moto oyo Nzambe atindi, alobaka maloba ya Nzambe, pamba te Nzambe atondisi ye na
Molimo na ye. 35 Tata alingaka Mwana na ye; apesi makambo nyonso na maboko na ye. 36
Moto oyo andimeli Mwana, azwi bomoi ya seko; oyo atosi Mwana te akozwa bomoi ya seko
te, kasi akotikala seko na etumbu ya Nzambe.”

65
Yoane amonisi Yezu
Yoane 3 : 23; 26 – 36

Mwa ntango eleki uta Yoane abatisaki Yezu. Akamwe mingi na bokutani na ye na yezu,
Yoane ateyi na mpiko lisusu. Azui bato misato mpo na kosalisa ye na mosala na ye. Elenge
mobali akomi moko ya kosalisa ye. Bateyi : “Bokonzi ya Nzambe ekomi pene ! Bomibongisa !
Bobongola bomoi na bino !” Ebele ya bato baye koyoka Yoane. Ebele lisusu koleka liboso
ezali baye bazali komibatisa. Elenge mobali andimi Yoane. Azali na esengo ete Yoane asolola
malamu na ebele ya bato. Yoane azali kobanga koyebisa bato bosolo na oyo bakoki kosepela
te. Elenge mobali azali na lolendo na Yoane.

Mokolo moko, lisanga ya bato bapusani epai ya elenge moyekoli na Yoane. Amoni ete bato
wana bauti kosala mobembo molai. Mposa na ye amema bango mbala moko epai ya Yoane.
Elenge mama ayebisi ye, ete tozali na nzela mpo na tokende epai ya mosali monene koleka.
Atuni : “Nani mosakoli yango ?” Mobali moko ya mokolo ayanoli ye : “Kombo na ye Yezu”.
Balobi ete azali kokokisa makamuisi. Azali kobatisa mpe koteya kutu na bokasi koleka
Yoane”. Elenge mobali azali na kanda. Azali kosolola na bayekoli mosusu ya Yoane. Azui
mokano ya kolobela Yoane moto wana, mpo na koyebisa ye ete azali kobatisa mpe lokola.
Sima ya nionso, ezali Yoane moto abatisi ye.

Yoane akamwe na koyoka maye bato bazali koyebisa ye : :Yezu, oyo yo obatisaki, ezali na
mwa ntango ye mpe azali kobatisa. Bato ebele balandi ye. Basusu bazali koloba kutu ete
azali mosakoli monene koleka yo. Mpe koloba ete yo osimbaki ye ! Ndenge nini ye mpe azali
kobatisa ?”

Yoane ayanoli bango malamu : “Nalobaki kaka ete nazali te Mosakoli. Yezu azali oyo tozelaki.
Nzambe abatisi ye na Molimo na ye. Namonaki molulu wana. Nabondelaki mokolo na mokolo
mpo na Mosakoli mpe na bongisaki bato na ntina na yango. Nakoki te, liboso na ye. Ntango
na ye eyei sik’oyo. Bato bakozinga ye. Baye bakolanda ye, bakozala mingi, mpe baye
bakolanda ngai bakozala moke. Bakobosana ngai. Yango ezali kopesa ngai mawa te.

Nazali kaka moto, mpe nakoki koloba kaka oyo etali makambo ya mokili. Yezu-Kristo, ye,
Nzambe atindeli biso ye. Azali Mwana ya Nzambe. Auti likolo ayei epai na biso. Azali mokonzi
oyo tozelaki uta kala. Akomema liloba ya Nzambe, mpe bato bakozala na mpasi mpo na
koyokela ye. Baye bakoyokela Yezu na mitema na bango bakomona monene ya Nzambe.
Bakomona lolenge nini Nzambe alingi Mwana na ye”. Yoane alobi na kondima mpe na mawa
moko te. Kasi elenge moyekoli azali kokoka koyeba te. Atuni : “Mpo na nini Yezu yango azali
mpe kobatisa ye mpe ?”

66
Yoane ayanoli ye : “Ozali kondima ete Yezu ayebi ete mosala na biso ezali ya kokoka te ?
Soki okanisi, ozali komikosa ! Soki bato balandi Yezu, elingi koloba ete tosali malamu mosala
na biso. Biso tobatisi na mayi, kasi Yezu azali kobatisa na Molimo ya Nzambe. Tata na ye
apesi ye bokonzi ya kopesa bomoi ya seko na baye banso bandimi ye”.

Elenge mobali ayoki sik’oyo malamu, mpe kanda na ye esili.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Ebele na ebele ya bato balingaki koyoka, na monoko ya Yezu, liloba ya Nzambe.
2. bosolola makambo oyo :
Nini Yoane atangisaki na bato ?
• Yezu azali Mosikoli alakamaki.
• Azali Mwana ya Nzambe
• Boyoka ye mpe boyamba ye.
3. Nzambe alingi ete toyoka Yezu mpe toyeba ye.

Liteya
Yezu azali Mwana ya Nzambe. Tolingi toyoka ye.

67
Yezu abandi koteya liboso ya bato ebele –
Bayekoli ya yambo
Yoane 1 : 35 – 51
Yoane 1
35 Sima ya mokolo wana, Yoane azalaki lisusu na esika yango, na bayekoli na ye mibale. 36
Awa amoni Yezu azali koleka, alobi: “Tala Mwana-Meme ya Nzambe!” 37 Tango bayekoli na
ye wana mibale bayki boye, batiki Yoane pe balandi Yezu. 38 Yezu abaluki, amoni bango
bazali kolanda ye, pe atuni bango: “Bozali koluka nini?” Bazongisi: “Rabi, ofandaka wapi?”
(Rabi elingi koloba Moteyi). 39 Ye azongiseli bango: “Boya pe bokomona.” Bakei pe bamoni
esika ye azalaki kofanda, bongo batikali na ye mokolo wana. Ezalaki na ngonga ya minei ya
pokwa. 40 Andre, ndeko ya Simon Piere, azalaki moko na kati ya bato mibale oyo bayokaki
maloba ya Yoane pe balandaki Yezu. 41 Sima Andre akutanaki liboso na ndeko na ye Simon,
pe alobi na ye; “Tosi’tomoni Mesia” (elingi koloba: Kristo). 42 Bongo Andre amemi ndeko na
ye epai ya Yezu. Tango Yezu amoni Simon alobi na ye: “Ozali Simon, Mwana ya Yoane.
Kombo na yo ekomi Sefas” (to pe Piere: elingi koloba Libanga). 43 Sima ya mokolo wana,
Yezu alingaki kokende na rejion ya Galile; akutani na Filipe pe alobi na ye: “Landa ngai.” 44
Filipe azalaki moto ya mboka Betsaida, mboka moko na Andre pe Piere. 45 Na sima Filipe pe
akutani pe Natanael, alobi na ye: “Tosi’tomoni moto oyo bakoma na Mibeko ya Moize pe na
mikanda ya baprofete. Ezali nde Yezu, mwana ya Jozef, ya mboka Nazaret.” 46 Natanael
alobi na ye: “Eloko nini ya malamu ekoki kobima na Nazaret?” Filipe azongiseli ye: “Yaka
kotala.” 47 Tango Yezu amoni Natanael azali koya epai na ye, alobi na ye: “Tala moto ya
solo ya Israel, lokuta ezali epai na ye te.” 48 Natanael atuni ye: “Ndenge nini iyebi ngai?”
Yezu azongiseli ye: “Liboso ete Filipe abenga yo, namonaki yo tango ozalaki na se ya nzete
ta figi.” 49 Natanael alobi na ye: “Moteyi, ozali Mwana ya Nzambe; ozali Mokonzi ya Israel!”
50 Yezu alobi na ye: “Ondimi po nalobi na yo ete namonaki yo tango ozalaki na se ya nzete
ya figi. Okomona makambo eleki oyo na monene.” 51 Yezu alobi na bango lisusu: “Nalobi na
bino, ya solo: bokomona Liklolo ekofungwama, pe ba-anjelu bakobanda kokita pe komata;
pamba te Nzambe akozala kotinda bango lokola bantoma epai ya Mwana ya Moto.”

68
Yezu abandi koteya liboso ya bato ebele –
Bayekoli ya yambo
Yoane 1 : 35 – 51

Nathanael, moto ya Israel, afandi kati ya elanga na ye na malili na nse ya nzete. Mopepe
ezali kobeta ye na molunge na sima ya nzanga. Akoti na makanisi na ye. Azali kokanisa,
lokola asalaka mingi, na lolenge ya bomoi. Alingi asalela bomoi na ye na lolenge ya
kosepelisa Nzambe. Nathanael atuni : “Nani akoki kosalisa ngai ? Mpe nani akoki kolobela
ngai liloba ya Nzambe ?”

Azali koyoka ekuke kofunguama mpe amoni moninga na ye Philippe azali koya kokutana na
ye. “Esengo nini ya komona yo, Philippe ! Ozalaki wapi ?” Azali na mposa na manso. Philippe
na mposa, azali na mpasi ya koyanola na mituna nionso. Akomi koloba : “Namoni eloko
moko oyo na mesana te mpe nazali lisusu na mpasi mpo na kondima ye”. Nathanael abengi
Philippe afanda mpe ayebisa ye oyo eleki. Philippe esengo makasi, alobi na ye : “Namoni
Mesia, Mobikisi alakamaki !” Nathanael akamwe : “Mesia ?” Atuni ye. Mpo na ye ezali libaku,
mpo ete baloba mbala na mbala mpo na Mesia. Ayebi mpe malamu makomi ya basakoli.
Bayebi ete Nzambe alakaki Mesia.

“Nani, mpe azali wapi ?” Nathanael atuni, motema likolo likolo. “Ezali Yezu, Mwana ya Jozef
ya Nazaret”. “Olobi, Yezu ya Nazaret ?” Nathanael atuni, lokola azolakisa azangi kosepela :
“Nini ekoki koya ya malamu na Nazaret ?” Nathanael auti na Kanan, mboka ya Galile.
Philippe ayebisi moninga na ye sala noki : “yaka mpe mona !” ayebisi ye. Bango mibale
batelemi mpo na kokutana na Yezu.

Makanisi eyeli bango mingi na nzela. Ezali ntango molai bazelaka kokokisama ya elaka wana!
Yezu amoni Nathanael azali koya kokutana na ye mpe alobi : “Tala moto ya Israel ya solo
mpe ya bosembo”. Nathanael, atutami, alobi na Yezu : “Oyebi ngai wapi ?” Yezu ayanoli :
“Yambo, Philippe aya epai na yo, namonaki yo ofandi na nse ya nzete”. Tembe ya Nathanael
esili mbala moko. Yezu oyo ayebi mpe amonaka makambo nionso ! Ezali solo Mesia. Na
esengo ya mozindo, alobi na Yezu : “Moteyi, ozali Mwana ya Nzambe, ozali Mokonzi ya
Israel”. Yezu ayanoli ye : Ozali kondima mpo ete nayebisi yo, namonaki yo na nse ya nzete.
Okomona makambo minene koleka oyo”. Nathanael akamwe penza, mpe akoki sik’oyo
koyeba nguya oyo Yezu azali na yango. Na sima amoni bato mosusu bazali elongo na Yezu.
Philippe alobi na ye : “Ezali Andre mpe Simon, bandeko mibale, mpe oyo wana, Jake
moninga ya Andre. Bazali bango nionso balobi mbisi. Andre atali Nathanael mpe alobi na ye :
“Jake mpe ngai, tozalaki bayekoli ya Yoane-Mobatisi. Oyoka penda ndenge bazali koloba

69
mpo na ye. Azalaki koteya mpe kobatisa na Jourdain. Alobelaki biso mingi mpo na Yezu,
Mosikoli mpe azali kobongisa biso na boyei na ye. Yoane alakisaki biso ndenge ya kososola
Yezu, Mosikoli.

Simon alobi : “Andre alobelaki ngai mpo na Yezu. Asali mpo tokutana na ye. Yezu ayebi ngai
mbala moko. Apesi ngai kombo ya sika. Nabiangami sik’oyo Piere. Namoni ete Yezu azali
moto moko ya lolenge mosusu. Nayebi ete azali Mwana ya Nzambe, mpe nazali na esengo
ya kozala moko ya bayekoli na ye”.

Nathanael, ye mpe, alingi alanda Yezu na bayekoli mosusu. Azali na esengo lokola bazali na
yango, mpo ete bazui Mosikoli oyo bazelaka kala.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Yezu azui bato ya kondima mpe asengi bango balanda ye. Bakomi bayekoli na ye ya
yambo.
2. Bosolola makambo oyo :
• Mpo na nini Nathanael andimelaki ? (Ezalaki likamwisi mpo na ye awa Yezu ayebaki
ye mpe amonaki ye, atako Yezu azalaki na ye te na nse ya nzete.
• Nini Nathanael ayekoli na ntina ya Yezu ntango akutani na bayekoli ya Yezu ? (Yezu
azalaki Mosikoli alakamaki [Mesia = Kristo]. Azalaki na nguya monene)
3. Bato bakendeki mingi epai ya Yezu na nguya na ye ya kati. Azali Mwana ya Nzambe.
Lelo, lisusu, abendi bato epai na ye.

Liteya
Yezu azali na nguya ya kati ya lolenge mosusu. Lokola Mwana ya Nzambe, azali na nguya
minene. Ayebi biso.

70
Likamwisi ya yambo ya Yezu
Yoane 2 : 1-11
Yoane 2
Sima ya mikolo mibale, feti ya libala ezalaki na mboka Kana, na Galile. Mama na Yezu azalaki
kuna. 2 Babengisaki pe Yezu na bayekoli na ye. 3 Tango vinu esilaki, mama na Yezu alobi na
ye: “Bazali lisusu na vinu te.” 4 Kasi Yezu azongiseli ye: “Mama, biso na yo likambo nini?
Tanga na ngai nanu ekoki te.” 5 Bongo mama na ye alobi na bato ya mosala: “bosala
makambo nyonso akotinda bino.” 6 Biloku motoba ya mabanga ezalaki wana, oyo Bayuda
bazalaki kosukolela na yango, ndenge mibeko na bango ezalaki kotinda. Eloku moko ekoki
kokota bisangala mwambe to zomi na mibale. 7 Yezu alobi na bato ya mosala: “Botondisa
biloku oyo na mai.” Batondisi yango meke. 8 Bongo Yezu alobi na bango lisusu: “Sik’oyo,
bozwa mwa-ndambo na yango, pe bokende kolakisa yango na mokonzi ya feti.” Bamemeli ye
yango. 9 Mokonzi ya feti ameki yango, mai ekomi vinu! Ayebaki te soki vinu yango euti wapi;
kasi bato ya mosala oyo batokaki mai bango nde bayebaki. Abengi moto oyo abalaki, 10 pe
alobi na ye: “Ndenge nini yo obombi vinu ya malamu tii sik’oyo? Bato nyonso bapesaka
liboso vinu ya malamu, bongo soki bato babandi kolangwa, nde bapesi bango vinu oyo ezali
malamu mingi te.” 11 Wana nde likamwisi ya liboso oyo Yezu asalaki. Asalaki yango na
mboka Kana, na Galile. Amonisaki lokumu na ye, pe bayekoli na ye bandimaki ye.

71
Likamwisi ya yambo ya Yezu
Yoane 2 : 1-11

Feti ya libala esalamaki na Kanan, mboka ya mbotama ya Nathanael. Bato banso bamitie na
kobongisama ya feti. Basali bazali kobongisa mapa mpe babomi bantaba mpe bameme. Moto
na moto azali komisala mpe azali na esengo, nzokande feti ya libala ezali kobongisama.

Ebele ya baninga mpe mabota babiangamaki na feti wapi, na lolenge esengeli, eumelaka
mikolo ebele. Maria, mama ya Yezu, na Yezu mpe bayekoli bazali kati ya baye babiangami.
Moto na moto azali kozua biloko ya kolia mpe masanga oyo epesameli bango.

Maria azali na esengo ya komona lisusu Yezu. Uta amitia na kotangisa liboso ya bato ebele,
amoni ye malamu lisusu. Afandi sik’oyo na Capernaum.

Basali bakomi na mawa, mpe elongi ya mobali abali ekomi na mawa mpo masanga ekomi
kosila. Mawa ekomi monene mpo ete feti ezali mosika ya kosila.

Maria ayoki mpe makambo wana, mpe amiyoki mawa mpo na mobali oyo abali. Akanisi mpo
na Yezu, nani akoki kosalisa ye na likambo oyo. Azali koyebisa ye : “Bazali na masanga te”,
alobi na ye. Yezu asengi na mama na ye oyo azali kozela epai na ye. Maria alobeli na basali
mpe asengi bango basala manso Yezu akoyebisa bango.

Na kati ya libanda ba eloko motoba ya mabanga ezali, oyo basalelaka mpo na kosokola
maboko. Mobeko ya bayuda ezali kosenga na moto na moto asokola maboko liboso ya kolia.
Yezu asengi na basali batondisa ba eloko na mayi, yango bazali kosala. Na sima Yezu alobi
na bango : “Botoka yango sik’oyo mpe bomemela na mokonzi ya feti”. Moto wana ameki
masanga, yambo apesa na babiangami. Basali bazali likolo likolo kasi bakanisi maye Maria
ayebisaki bango. Batosi mpe bamoni likamwisi : Mayi ebonguami na masanga !

Mokonzi ya feti, oyo azali kolimbola te lolenge masanga ezali na ba eloko, ameki yango.
Akamwe, abengi mobali mpe alobi na ye : “Moto nionso azali kopesa masanga ya kitoko. Yo,
obombi masanga ya kitoko kino sik’oyo !”

Kaka basali bayebi oyo eleki solo, mpe sango ya likamwisi epanzani lokola putulu. Moto
moko te akoki komipekisa kotuna motuna : “Nani moto akoki kosala likamwisi ya boye ?”

72
Bayekoli bazali na esengo. Bandimelaki kaka maloba ya Yoane-Mobatisi te, bango moko
penza bamonaki nguya ya Yezu ezali kosala mosala. Bondimi na bango elendisamaki.
Basepelaki kolanda Mwana ya Nzambe mpe kotikala na ye mikolo minso.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Yezu na bayekoli na ye babengamaki na feti ya libala. Ngonga moko boye kati ya feti,
masanga ezangaki. Yezu abongolaki mai ekomaki masanga.
2. Bosolola makambo oyo :
Nini ya malonga, ezalaki na feti ya libala na Kanan ? (Awa masanga ezangaki, Maria
alingaki ete Yezu atali likambo wana. Yezu abongolaki mai ekomaki masanga).
3. Limbola makambo oyo :
• Yezu akokaki kosala bikamwisi
• Bikamwisi ntina na yango ezalaki mpo na kokolisa bondimi ya bayekoli na ye
• Na moyi ya lelo, Yezu akoki lisusu kosala bikamwisi.

Liteya
Yezu akoki kosala oyo moto azali kokoka te kosala. Azali na nguya wana ye
lokola Mwana ya Nzambe.

73
Boluki mbisi monene
Matai 4 : 17-22 / Luka 5 : 1-11
Matai 4
17 Banda tango wana Yezu abandi kosakola boye: “Bobongola mitema, pamba te Nzambe
alingi kotia bokonzi na ye sik’oyo.” 18 Tango Yezu azalaki kotambola penepene ya laki ya
Galile, amoni baluki-mbisi mibale, kulutu na leki, Simon (oyo babengaka Piere) pe ndeko na
ye Andre, bazalaki kobwaka monyama na mai. 19 Yezu alobi na bango: “Bolanda ngai.
Bokozala lisusu baluki-mbisi te; nakokomisa bino baluki ya bato. 20 Na mbala moko batiki
minyama na bango pe balandi Yezu. 21 Tango Yezu alongwe wana, amoni lisusu bato
mibale, kulutu na leki, Jake na Yoane, bana ya Zebede. Bafandaki na kati ya bwatu esika
moko na tata na bango Zebede, pe bazalaki kobongisa minyama. Yezu abengi bango. 22 Na
mbala moko batiki bwatu na tata na bango, pe balandi ye.

Luka 5
Mokolo moko Yezu azalaki pembeni ya laki ya Jenezaret. Bato mingi batondanaki wana pe
bazalaki kotia ye kaka po na koyoka maloba ya Nzambe. 2 Yezu amoni babwatu mibale
pembeni ya mokili. Baluki-mbisi batikaki yango po na kosukola minyama na bango. 3 Yezu
akoti na bwatu moko; yango ezalaki ya Simon. Asengi ye apusa bwatu mwa-moke na mai,
bongo afandi na bwatu pe abandi koteya bato. 4 Tango asilisi koteya, alobi na Simon: “Pusa
bwatu esika mai ezali modindo, bongo bobwaka minyama na bino na mai po na kokanga
bambisi.” 5 Simon azongiseli ye: “Moteyi, tosali butu mobimba pe tokangi ata eloko moko te,
kasi lokola yo otindi, nakobwaka minyama na mai.” 6 Basali bongo, pe bakangi bambisi ebele
penza; minyama na bango ebandi kutu kopasuka. 7 Yango wana babengi baninga na bango
oyo bazalaki na bwatu mosusu po baya kosalisa bango. Bayei pe batondisi babwatu nyonso
mibale na bambisi, bongo elingaki kodinda. 8 Tango Simon amoni boye akwei na mabolongo
liboso ya Yezu pe alobi na ye: “Mokonzi, longwa penepene na ngai, nazali moto ya
masumu!” 9 Pamba te ye na bato nyonso oyo bazalaki na bwatu na ye bayokaki somo penza
po na bambisi ebele oyo bakangaki. 10 Jake na Yoane bana ya Zebede, baninga ya Simon
oyo bazalaki na bwatu mosusu, bayokaki pe somo ndenge moko. Kasi Yezu alobi na Simon:
“Kobanga te. Banda lelo okozala lisusu moluki-mbisi te, kasi okobanda koluka bato.” 11
Bongo bamemi babwatu na bango na libongo. Batiki biloko na bango nyonso, pe balandi
Yezu.

74
Boluki mbisi monene
Matai 4 : 17-22 / Luka 5 : 1-11

Bato nionso bazali koloba mpo na Yezu. Akokisaki makamwisi, atangisaki mpe ateyaki na
nguya. Liteya na ye ya monene ezali oyo : “Bokonzi ya koliko enomi pene. Bobongola
mitema mpe bondima sango malamu !” Afandi mokolo moko pene ya ebale. Bato ebele
bayaki kozinga ye, mpo moto nionso azalaki na mposa ya koyoka ye koteya. Basusu bautaki
kutu na bamboka ya pembeni. Bato bazalaki koya ebele, mpe Yezu amimonisaki ete azalaki
kotindikama na mayi.

Yezu amonaki babwatu mibale pembeni. Balobi mbisi mibale babimaki kati na yango.
Bazalaki kosukola minyama na bango. Bwato moko ezalaki ya Simon Piere, ndeko na ye ya
mobali mpe azalaki wana. Na kati ya bwato wana mosusu, Jake mpe Yoane bazali kobongisa
minyama na bango. Yezu amati na bwato ya Simon Piere mpe asengi ye mpo apusa bwato
mosika moke ya libongo. Yezu abandi bongo na koteya, uta na bwato, na bato ebele oyo
bafandaki na libongo.

Yezu ateyaki bango ntango molayi. Bato babandaki koyoka nzala. Yezu alobi na Simon;
“Kende na kati ya mai, mpe bobwaka minyama mpo na koloba”. Simon akamwaki mingi.
Bakoki kozua mbisi na kati ya moi. Alobi na Yezu : “Mokonzi, tolobi butu mobimba, tozui
eloko moko te. Akanisi bongo makambo ya kitoko oyo ye amonaki na Mokonzi. Alobi na ye :
“Kasi soki yo olobi, nakobwaka minyama”. Simon mpe Andre, baluki bongo na kati ya ebala
mpe babwaki minyama na bango. Bakoki ya solo kozua mbisi na ntango oyo ya moi ? Na
mwa ntango moke na sima, na bobemdi minyama, ayoki ete minyama ekomi kilo mingi.
Bandeko oyo mibale bameki kobenda minyama kati ya bwato, kasi bakoki te. Minyama ezali
na kilo mingi ya mbisi mpe bakoki kopasola yango soki bameki kobenda to na kati ya bwato.

Na esengo monene, basengi lisalisi. Jake mpe Yoane baluki tii bakomi pene na bango mpe
basalisi baninga mpe bamitungisi na moi. Ba bwato nionso mibale etondi. Balobi mbisi
baningisi mutu na kokamwa mpe bazali kokoka kondima te ete bazui mbisi eleki mingi. Mpe
koloba bazuaki eloko te na kati ya butu mobimba. Piere akweyi na mabolongo ya Mokonzi,
mpo ayokaki soni mingi. “Yezu akoki kokundola mozindo ya mai monene. Akoki lisusu
kokundola koleka batembe oyo ezali kati na motema na ngai”. Asengi na ye na malembe
nionso : “Nkolo, okoki lisusu kosala na ngai ? Nazali moto ya masumu”. Yezu abaluki, atali
Simon mpe alobi na ye na bolingo nionso : “Kobanga te, banda lelo, okozala molobi ya bato”.
Sima, na bolobi na Jake mpe na Yoane, alobi na bango : “Bolanda ngai”.

75
Bakamwaki penza na makambo oyo bamonaki, bayekoli bakomaki na mposa ya kotika
nionso: ndako, litoba, bwato, misala na bango mpo na kolanda Yezu. Yezu alakisaki bango
mosala na bango ya sika : balobi bato. Balingaki, na esengo kosalisa ye na koyebisa liloba ya
Nzambe na bato. Bayebaki na Yezu Mwana ya Nzambe, mpe balingaki kokaba bomoi na
bango na mosala na ye.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Bayekoli bazuaki mbisi ebele mpo batosaki Yezu. Balandaki Yezu.
2. Bolobela biteni oyo :
• Mpo na nini bayekoli batosaki Yezu, atako bazalaki na boyebi na bango ? (Bazuaki
uta kala mayela ya monene ya nguya na ye. Boyieli motema na bango na Yezu
ezlakai na ntina monene)
• Bayekoli basalaki nini sima ya bozui mbisi ebele ? (Balandaki Yezu mpe bakomaki
balobi ya bato)
• Bantoma bazali batindami ya Yezu. Bazali koteya mpe koloba na bato mpo na
kolanda Yezu.

Liteya
Yezu azali kosala mosala monene likolo ya bato. Tozali kolanda na botieli mitema na Mwana
ya Nzambe.

76
Ngai mpe nazali oyo ya ye

Leki na biso moko ya mobali mpe na libota na ye bazali komibongisa mpo na losambo, lokola
basalaka yango mikolo nionso ya yenga. Mpo na ye, kasi, mokolo oyo ezali mokolo ya
lolenge. Ezali ya lolenge mpo na makambo mibale : ntoma akozala na communaute na
bango mpe moninga na ye ya motema mpe baboti na ye bakozua libatisi ya Molimo-Mosantu
lelo.

Leki na biso azali kokanisa ndenge makambo ebandaki na mwa ntango sima. Solo penza
mokolo ya yenga, baninga na ye nionso bazalaki kosepela, kosakana na belo to kotambola
na nzela molayi na kati ya esika ya masano oyo ezalaki pene. Moninga oyo amonaki leki na
biso ya mobali azalaki kokende na bango elongo te mokolo ya yenga. Mokolo moko, mwana
mobali moko ya moke atunaki ye : “Osalaka nini mokolo ya yenga mpo oyaka te kosakana
na biso ?” Leki na biso ya mobali apesaki ye eyano : “Solo penza, mokolo ya yenga,
tokendeke na Ndako ya Nzambe mpe na eteyelo ya yenga. Okoki kokende kotika ngai kuna
mbala moko”.

Moninga na ye andimaki libiangi mpe akotaki na ye na eteyelo ya yenga. Molakisi ya eteyelo


ya yenga, atombelaki boyei bolamu, mpe bana mosusu basalaki mpe ndenge moko. Moninga
asepelaki mingi. Aboyaki te mpo na koyebisa baboti na ye oyo ayokaki na eteyelo ya yenga.
Baboti na ye mpe lokola basepelaki mingi bango mpe. Bazalaki na mituna ebele ya kotuna.
Ndeko oyo abengisaki bango mpo na koya kosolola na tata mpe mama na ye. Na kati ya
masolo, baboti ya ndeko oyo babengisaki baboti ya moninga wana na bolandi elongo na
bango na losambo. Bandimaki libiangi yango na esengo.

Bamiyokaki na esengo mingi na kati ya lisanga. Babandaki sima kokende mikolo nionso na
ndako ya Nzambe. Balingaki na ndenge mosusu lindanda na banzembo kitoko ya bayembi.
Mwa ntango na sima, balakisaki mposa ya kozua libatisi na kati ya Eklezia. Mokolo yango
ekomaki; moninga na ye na baboti na ye balingaki kozua libatisi ya Molimo-Mosantu.
Bandeko nionso ya mibali mpe basi bazali kokabola esengo na bango. Ndeko na biso oyo
azali na esengo koleka mpo moninga na ye azali kokoma “ndeko na ye”.

Na sima ya losambo, mabota nionso mibale bazongi na ndako mpo na kolia esika moko.
Libota oyo ezui molimo-mosantu sika ezlai na mituna ebele ya kotuna. Boyebi na bango
ekokola malembe-malembe. Bango banso bazali na esengo mpo na bolingo oyo esangisi
bango sik’oyo.

77
Makanisi mpo na molakisi
1. Bosenga na bana bazongela :
Nzambe alingaki bato banso. Ezali mpo na gracia nde tokomi bana na ye.
2. Bolobela biteni oyo :
Bokanisi ete baboti na bino bakoki kolobela bondimi na biso ?
• Yezu azali Mwana ya Nzambe
• Yezu azali kosala mosala lelo na kati ya bantoma na ye
• Yezu alakaki ete akozonga
• Tozali komibongisa mpo na mokolo yango.
3. Limbola makambo oyo :
Na libatisi ya mayi mpe ya Molimo-Mosantu, tokomi bana ya Nzambe. Yango ezali
kobota bomoko na kati ya bondimi, mpe tozui biso banso Tata ya likolo moko, mpe
tozali libota moko mpe ya monene. Yango ekokisamaki atako tobotami na mabota
ekeseni mpe tozali na ndenge ya kofanda mpe makanisi ekeseni.

Liteya
Na nzela ya gracia, tozui ndingisa ya kokoma bana na ye, na ebele ya bandeko mibali mpe
basi na kati ya mokili mobimba.

78
1.4.0 Yezu-Kristo azali kotinda bantoma

1.4.1 Yezu asengi na bayekoli na ye na komikitisa


1.4.2 Yezu-Kristo, nzete ya solo ya vinu
1.4.3 Bantoma, batatoli motindami na bango Yezu-Kristo
1.4.4 Ntoma Piere na boloko
1.4.5 Mobateli ya boloko ya Filipo
1.4.6 Oyo bantoma basalaka
1.4.7 Ntoma na ngai azali motindami ya Yezu

Na bokuse

Yezu abongisaki bantoma ya liboso mpo na mosala na bango oyo ekoya, oyo bakokoba
mosala na ye. Alobaki na bango ete basengeli kozala basali malamu mpe basengelaki koluka
kozala na bomoko na ye. Mwana ya Nzambe azali lisusu kotinda bantoma lelo. Azlai kosilisa
mosala na ye na bango. Azali ndakisa na bango.

Ntango ntoma Piere azalaki na boloko, lisanga ya Yeruzalem ekobaki na kobondela mpo na
ye. Nzambe asalisaki na ndenge ya kitoko mingi ntoma Piere.

Ntoma Paul asalaki mosala na etingia na mboka Filipe. Mobateli boloko ya mboka oyo mpe
libota na ye bandimi mpe bazuaki libatisi.

Bantoma bazali kati na mosala lelo na mokili mobimba, na kombo ya Yezu. Bazali kobongisa
bayengebene mpo na bozongi ya Yezu-Kristo. Bana ya Nzambe bazali na esengo mpe bazali
na kotonda botondi.

79
Yezu asengi na bayekoli na ye na komikitisa
Marko 10 : 32-45/Luka 17 : 7-10
Marko 10
32 Awa bazalaki na nzela ya Yeruzalem, Yezu azalaki kotambola liboso ya bayekoli na ye pe
ya bato mosusu oyo bazalaki kolanda ye. Bango nyonso babandaki kobanga. Yezu asangisi
lisusu bayekoli na ye zomi na mibale, pe abandi koyebisa bango makambo elingi kokweela
ye. 33 Alobi na bango: “Boyoka! Tozali kokende na Yeruzalem. Kuna bakokaba Mwana ya
Moto epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe pe ya balakisi-Mibeko. Bango bakokatela ye
etumbu ya liwa, pe bakokaba ye na maboko ya bato bayebi Nzambe te. 34 Bakoseka ye,
bakobwakela ye soi, bakobeta ye fimbu pe bakoboma ye. Kasi akosekwa na mikolo misato.”
35 Jake na Yoane, bana ya Zebede, bayei epai ya Yezu, balobi na ye: “Moteyi, tolingi osalela
biso makambo oyo tokosenga yo.” 36 Yezu atuni bango: “Bolingi nasala nini po na bino?” 37
Bango bazongiseli ye: “Tango okokoma na bokonzi, fandisa biso pembeni na yo, moko na
liboko na yo ya mobali, mosusu na liboko na yo ya mwasi.” 38 Kasi Yezu alobi na bango:
“Likambo bozali kosenga, boyebi yango te. Kopo ya pasi ngai nakomela, bino bokokoka
yango? Batisimo ya pasi ngai nakozwa, bino bokozwa yango? 39 Bango bazongiseli ye:
“Tokokoka kaka!” Bongo Yezu alobi na bango: “ya solo, kopo oyo ngai nakomela, bino pe
bokomela yango; pe batisimo ya pasi oyo ngai nakozwa, bino pe bokozwa yango. 40 Kasi
kopona moto oyo akofanda na liboko na ngai ya mobali to ya mwasi, etali ngai te; pamba te
Nzambe asi’abongisa bisika wana po na bato ye apona.” 41 Tango bayekoli mosusu zomi
bayoki ndenge wana, bakomi kosilikela Jake na Yoane. 42 Bongo Yezu abengi bango nyonso
pe alobi: “Boyebi ete bato oyo bamonanaka lokola bakonzi ya bikolo, balakisaka bokonzi na
bango; bato minene bamonisaka bato na bango pasi. 43 Kasi na kati na bino, ekoki kozala
bongo te. Soki moto moko na kati na bino alingi kozala moto monene, amitia mosali na bino
nyonso. 44 Pe soki moto moko na kati na bino alingi kozala moto ya liboso, amikomisa
moumbu ya bato nyonso. 45 Pamba te Mwana ya Moto ayaki po bato basalela ye te, kasi
ayaki nde kosalela bango, pe kopesa bomoi na ye po na kolongola bato ebele na boumbu.”

Luka 17
7 “Bokanisa nanu. Soki moto moko na kati na bino azali na mosali oyo asalaka na bilanga to
akengelaka bameme, ndenge nini bazalaka ye na mosali na ye? Tango mosali azongaka na
ndako, mokonzi moko te alobaka na ye: ‘Yaka noki, fanda pe lia.’ 8 Kasi alobaka na ye:
‘Nalingi kolia. Lambela ngai, lata bilamba ya mosala pe bongisela ngai mesa. Bongo na sima
yo pe okoki kolia. 9 Mokonzi apesaka mosali na ye mersi po atosi maloba na ye? Eloko te. 10
Ezali ndenge moko pe po na bino: soki bosali nyonso oyo Nzambe atindi, boloba: ‘Tozali kaka
basali; tosali bobele mosala na biso.’”

80
Yezu asengi na bayekoli na ye na komikitisa
Marko 10 : 32-45/Luka 17 : 7-10

Yezu akeyi na Yeruzalem na bayekoli na ye zomi na mibale. Ayebi ete ntango ekoki mpo na
komikaba na ye mpo na bato. Alobi na bayekoli na ye ete sik’oyo asengeli amona mpasi
mingi. Alobelaki bango lisusu maye matali bokonzi na ye. Bakoki kaka komituna soki bayekoli
basosolaki ya solo oyo Yezu ayebisaki bango. Eloko nini alingi ayebisa bango ?
Bazali kotambola na makelele te, mpasi mingi na mitema na bango. Jake mpe Yoane bazali
kosolola na litoyi. Mbala moko bango mibale bapusani pene ya Yezu. Yoane na mawa mingi,
alobi na ye : “Mokonzi, tolingi osalela biso makambo oyo tokosenga yo”. Yezu abaluki epai
na bango mpe ayebisi bango : “Bolingi nasala nini mpo na bino ?” Jake ayanoli na ye : “Pesa
biso nzela ya kofanda moko na loboko na yo ya mobali mpe mosusu na loboko na yo ya
mwasi ntango okokoma na bokonzi na yo!”

Lisengi oyo ekamwisi Yezu. Ayebisaki bango ntango nionso ete koluka te kozala moto
monene na ndenge ya bato ya mokili ! Alobi na bango : “Likambo bozali kosenga, boyebi
yango te. Kopo ya mpasi ngai nakomela, bino bokokoka yango ?” “Iyo, tokokoka”, bango
bazongiseli ye na esengo nionso. Bongo Yezu alobi na bango : “Bokonyokwama lokola ngai,
ya solo. Kasi kopona moto oyo akofanda na loboko na ngai ya mobali to ya mwasi na
bokonzi ya likolo, etali ngai te, Nzambe ye moko akozua mokano”. Bayekoli mosusu zomi
ntango bayoki lisolo oyo bazalaki basilikeli Jake na Yoane.

Yezu amonaki kanda na bango mpe asengi bango banso na kofanda. Azui ntango ya kolakisa
bango ndenge nini basengeli kofanda moko na moninga mosusu. Yezu alobaki na bango
lisusu : “Bakonzi ya mokili oyo balakisaka bokonzi na bango. Bamonisaka batona bango
mpasi. Kasi kati na bino ekoki kozala bongo te. Soki moto moko na bino alingi kozala moto
ya liboso, asengeli amikomisa moumbu ya bato nionso. Ndenge nini moumbu ya malamu
asalaka ? Asalaka na molayi ya mokolo. Abalolaka mabele mpe aleyisaka bibwele. Na
bozongi na ye na ndako, azelaka te ete mokonzi na ye apesa ye Mersi mpe apesa ye bilei.
Te, azali kopesa bilei na mokonzi, mpe ye moko akolia sima. Ayebi ete akokisi oyo bazlai
kozela na ye, mpe azali na eloko moko te akoki komikumisa.

Bozala baumbu ya bongo na Nzambe : bosala nionso oyo Nzambe azali kozela epai na bino !
Ntango bokosala yango, bomikumisa te, kasi boloba : “Tozali basali mabe, toslai oyo
tosengelaki kosala”.
Soni na motema, bayekoli batalani moko na mosusu. Ezali mpasi kozala moumbu ya
malamu. Kasi balingi, ata bongo, kozala baumbu ya malamu. Na nionso, Nzambe azali
mokonzi ya koleka oyo bakoki kosalela.
Yezu azali ndakisa ya kitoko mpo na biso bango : ayaki na mokili mpo na kosalela bato.

81
Makanisi mpo na molakisi
1. Bosenga na bana bazongela :
Moumbu kati na bino akozala moto ya liboso.
2. Bosolola biteni oyo :
Ndenge nini Yezu alingi bayekoli na ye bazala ? (na bomikitisi, batondisama na bolingo,
noki na kolimbisa mpe basalisi)
3. Limbola makambo oyo :
• Soki moko alingi aleka basusu, ebotaka likunya. Ezaleli ya boye ezali na esika te na
bokonzi ya Nzambe. Tosengeli koyekola mpo na bongo na kokoma bato ya
komikitisa na mokili.
• Kaka oyo azali kozua moninga na ye lokola aleki ye moko akoki kosalela ye.
• Soki tozali kati na mosala basusu mpo na baninga, tokoki kozala na bomoi uta lelo
na mokili ti na bokonzi ya Nzambe.

Liteya
Yezu azali kozela na basali mpe na bantoma na ye bazala bato ya komikitisa mpe bazala na
mosala ya moko mpo na mosusu.

82
Yezu-Kristo, nzete ya solo ya vinu
Yoane 15 : 1-8
Yoane 15
“Ngai nazali lokola nzete ya solo ya vinu, pe Tata na ngai azali kolo ya elanga. 2 Bitape na
ngai oyo ebotaka mbuma te, ye akokata yango; kasi oyo ebotaka, akobongisa yango po
ebota mbuma mingi. 3 Mateya oyo napesaki bino esi’ebongisa bino kala. 4 Bokangama na
ngai, lokola ngai nakangama na bino. Etape moko te ekoki kobota yango moko, soki
ekangama na nzete ya vinu te. Bino pe ndenge moko, bokoki kosala eloko te soki bokangami
na ngai te. 5 “Ngai nazali lokola nzete ya vinu, bino bozali bitape. Moto oyo akangana na
ngai akobota mbuma mingi. Pamba soki ngai nazali na bino te, bokoki kosala ata eloko moko
te. 6 Moto oyo akangani na ngai te, bakobwaka ye na libanda ndenge babwakaka etape ya
pamba; yango ekaukaka, bongo balokotaka yango, babwakaka yango na moto pe ezikaka. 7
Soki bokangami na ngai pe na malona na ngai, bosenga nyonso oyo bolingi, pe bokozwa
yango. 8 Tata na ngai akozwa lokumu soki boboti mbuma mingi. Na ndenge wana bokolakisa
ete bozali bayekoli na ngai.

83
Yezu-Kristo, nzete ya solo ya vinu
Yoane 15 : 1-8

Mwa ntango sima ya liwa mpe lisekwi ya Yezu, André, moko na kati ya bayekoli ya liboso,
azalaki kotambola na mboka moko mpe na mboka mosusu. Azuaki etinda ya kopanza sango
kitoko ya Yezu-Kristo. Ayebaki ete Mwana ya Nzambe azali na bomoi. Bazalaki ebele mpo na
koyoka ntoma, mpe ebele bakamwaki mingi bazalaki na mposa ya kobatisama mbala moko.
Basusu kutu batambolaki na ye na nzela. Moko na bango atambolaki na ye na kati na bilanga
ya vinu.

Bakutanaki na mosali na kati ya bilanga ya vinu, oyo azalaki kobongisa banzete na ye ya


vinu. Bapesaki ye mbote mpe bakumisaki mpo na banzete na ye ya vinu kitoko. Basengaki
ye soki bakokaki koumela mwa moke pene na ye. Na esengo ya kopema moke, mosali
bilanga alakisi bango banzete na ye ya vinu na esengo mpe mwa lolendo. “Bopusana !
Banzete na ngai ya vinu ezali kitoko mingi ? Molunge ya moi mpe mayi ebele ekolisi yango
mingi. Nazali kozela kobuka kitoko na mbula oyo. Mabele ebongisami mpe lisusu na bokoli ya
bambuma. Banzete ya vinu ekoki kokola misisa na yango ekoti makasi kati na mabele, oyo
ezali kopesa yango makasi”.

Mosali bilanga oyo alakisi André ndenge nini azali kobongisa bilanga. Alakisi ye bitape oyo
ezali na bambuma mpe oyo ezali kaka na makasa. Akataki bitape oyo ezalaki kaka na
makasa. Asali bongo mpo na koboya ete bitape wana emela mayi oyo ezali mpo na
bambuma. Likambo oyo elobi mosali bilanga ya vinu atondi na bolingo ekamwisi André.
“Mersi mingi mpo na bandimbola na yo. Osalisi ngai mingi, mpo sik’oyo nayebi solo oyo Yezu
alingaki koloba na lisese ya nzete ya vinu. Nayebi ete azalaki komona biso, biso bantoma na
ye, lokola bitape mpe nasosoli oyo alingaki koloba”.

“Yezu alobaki nini ? Boyabisa ngai, nabondeli bino !”, elobeli ye mosali bilanga. “Boya
tofanda na se ya nzete ya olive mpo na ntango moke”. Ntoma abandi bongo na kobetela ye
lisolo ya Yezu. “Mwa ntango yambo bakanga ye, Yezu aliaki ya mbala ya suka na bayekoli na
ye. Lisese oyo ezali moko na kati na oyo ya suka Yezu ayebisaki biso. Ayebisaki biso : “Ngai
nazali lokola nzete ya solo ya vinu mpe Tata na ngai azali nkolo elanga; bino bozali bitape.
Nkolo elanga akokata bitape oyo ekobota mbuma te, mpo ezali na ntina te. Oyo ekobota
bambuma, akobongisa yango, akobongisa yango mpo ete ebota lisusu bambuma ebele.
Nazali lokola nzete ya vinu mpe bino bozali bitape. Moto oyo akangami na ngai mpe ngai kati
na ye, akobota bambuma mingi mpo soki ngai te bokoki kosala eloko te”.

84
Moto oyo, azalaki kolanda na makele te, alobi : “Nayebi eloko Yezu alingaki koloba. Esengeli
toumela na bomoko ya oslo na ye. Kaka bongo nde tokozua makasi oyo tozali na yango
mposa mpo na kokola”. Ntoma André andimi : “Ya solo olongi – Yezu-Kristo apesaki biso,
bantoma na ye, etinda ya koteya mpe ya kotambuisa bato. Tokoki kosala yango kaka soki
tokangami makasi na bomoko na ye. Tosengeli kosala, na likolo ya nionso, na kati ya bolingo
ya Kristo”.

Yezu alobelaki lisusu mpo na mbuma ya elanga ya vinu; elobi nkolo elanga, na makanisi na
ye. “Na ndenge ya mbotama, bambuma ekoki kokola te soki bitape ezali te. Nalingi nabuka
mbuma mingi koleka. Ezali ndenge nini mpo na bato ? Ndenge bato bakoki kobota mbuma ?

Ntoma André ayanoli : “Ezali mpasi te ! Nzambe azali kosalisa baoyo nionso bazali na
bomoko na Yezu-Kristo, na bongo bondimi ekoki kokola, bolingo mpe botieli motema ezali
bambuma ya bomoi esepelisaka Nzambe...” Nkolo elanga asosoli ntina ya lisese. Alobi na
esengo : “Fanda na ngai ! Na boyoki yo, na koyekola na koyeba Yezu mpe na kozua makasi
na ye ya bonzambe. Nalingi mpe kozala na bomoi oyo ezali kosepelisa ye”.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Nazali nzete ya solo ya vinu, Tata na ngai azali nkolo elanga mpe bino tozali bitape.
2. Bosolola biteni oyo :
Nini Yezu alingaki koloba ntango azali kokokanisa ye moko na nzete ya vinu mpe
bayekoli na ye bitape ? (Moto oyo akokangama na Yezu akoki kobota mbuma. Yango
ekokokisama te soki bomoko oyo ezali te)
3. Limbola oyo elandi :
Bomoko na biso na Yezu ebotaka bambuma ya molimo (bondimi, elikya, bolingo),
esengeli na biso kobatela bomoko oyo.

Liteya
Bomoko na biso na Yezu mpe na bantoma na ye ebotaka mbuma mingi.

85
Bantoma batatoli motindami na bango Yezu-Kristo
Misala 2 : 42-47; 3; 4 : 1-23
Misala 2
42 Bazalaki kosala makasi po na koyoka mateya ya bantoma, po na kozala lisanga lokola
bandeko, po na kolia esika moko pe kosambela. 43 Bantoma bazalaki kosala makamwisi
mingi, bongo bato nyonso bazalaki komona ete Nzambe azali na bango. 44 Bandimi nyonso
bazalaki kofanda lisanga moko. Bazalaki kosangisa bomengo na bango esika moko. 45
Bazalaki koteka mabele na bango na biloko na bango. Bongo bazalaki kokabola mbongo na
bato nyonso ndenge posa ya moto na moto ezalaki kosenga. 46 Mikolo nyonso bazalaki
kosangana na Ndako ya Nzambe, pe kolia esika moko na bandako na bango, na esengo pe
na boboto. 47 Bazalaki kokumisa Nzambe, pe bato nyonso babandaki kolinga bango. Mokolo
na mokolo Nkolo azalaki kobakisa na lingomba na bango bato oyo ye alingaki kobikisa.

Misala 3
Mokolo moko Piere na Yoane bazalaki kokende na Ndako ya Nzambe na ngonga ya misato
ya pokwa po na kosambela. 2 Moto moko akufa makolo banda babota ye, azalaki kofanda
penepene ya porte ya Ndako ya Nzambe oyo babengaka “Porte ya Kitoko.” Mikolo nyonso
bazalaki komema ye kuna po asengaka mbongo na bato oyo bazalaki kokota. 3 Tango amoni
Piere na Yoane balingi kokota na Ndako ya Nzambe, asengi bango lisalisi. 4 Piere na Yoane
batali ye, bongo Piere alobi na ye: “Tala biso.” 5 Moto wana atali bango nyee pe akanisaki
ete akozwa eloko. 6 Kasi Piere alobi: “Nazali na mbongo te; nakopesa yo eloko nazali na
yango: na kombo ya Yezu Kristo ya Nazaret, tambola.” 7 Na sima Piere asimbi moto yango
na liboko ya mobali pe atelemisi ye: Na mbala moko makolo na ye ekomi makasi. 8 Atelemi
noki pe abandi kotambola. Akoti na Ndako ya Nzambe nzela moko na bango. Azalaki
kotambola, kopombwa pe kokumisa Nzambe. 9 Bato nyonso bamoni ye azali kotambola pe
kokumisa Nzambe; 10 bongo bayei koyeba ete ye moto azalaki kofanda penepene ya Porte
ya Kitoko ya Ndako ya Nzambe, pe kosenga mbongo, yango wana bakamwe mingi penza, pe
bazalaki lisusu na mayele ya koloba te po na makambo oyo esalamaki na nzoto na ye. 11
Lokola moto wana akangamaki na Piere pe Yoane, bato nyonso bakamwe, pe bayei mbangu
epai na bango na veranda oyo babengaka veranda ya Salomon. 12 Tango Piere amoni
bango, alobi na bato: “Bato ya Israel, po na nini bozali kokamwa na ndenge moto oyo abiki?
Po na nini bozali kotala biso, lokola nde biso bato totambwisi ye na nguya to na makasi na
biso moko? 13 Boyeba ete Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob, Nzambe ya bakoko
na biso, apesi lokumu na Mosali na ye Yezu. Bino bato bokabaki ye po baboma ye; pe tango
Pilate alingaki kotika ye, boboyaki. 14 Ye azalaki moto ya bosantu pe ya bosembo, kasi bino
bosundolaki ye, pe bosengaki batikela bino mobomi moko. 15 Wana ezali ndenge bobomisaki
Mokonzi ya bomoi. Kasi nzambe asekwisi ye, pe biso tomonaki ye azali na bomoi. 16 Moto
oyo bozali kotala pe boyebi ye, andimeli kombo ya Yezu; ezali ye moko Yezu moto abikisi ye.
Ya solo, ezali bondimi na kombo ya Yezu moto ekomisi ye makasi pe nzoto malamu, na miso
na bino nyonso. 17 “Nzokande bandeko, nayebi malamu ete bino na bakonzi na bino
boyebaki te makambo oyo bosalaki Yezu. 18 Kasi Nzambe asali makambo oyo baprofete
nyonso bayebisaka banda kala, na nguya na ye: Mesia na ye asengelaki komona pasi. 19
Yango wana bandeko, bobongola mitema pe bozongela Nzambe po alimbisa bino masumu.
20 Bongo Nkolo akoyeela bino tango ya kopema, pe akotindela bino Mesia oyo ye aponela
bino uta kala, ye nde Yezu. 21 Po na sik’oyo, Yezu asengeli kotikala na Likolo, tii tango
makambo nyonso ekokoma ya sika, ndenge Nzambe ayebisaka na minoko ya baprofete na
ye ya bosantu. 22 Pamba te Moize alobaka boye: ‘Nkolo Nzambe akotindela bino profete
moko lokola ngai. Ye akozala moto ya ekolo na bino; bokobanda koyoka makambo nyonso
ye akozala kolobela bino. 23 Moto nyonso oyo akoyokela profete wana te, bakolongola ye na
molongo ya bato ya Israel.’ 24 Baprofete, kobanda tango ya Samuel, bango nyonso
basakolaki moko moko makambo ya mikolo oyo. 25 Makambo Nzambe alakaka na minoko ya

86
baprofete, pe Boyokani oyo asalaka na bakoko na bino, ezali po na bino. Pamba te alobaka
na Abraham boye: ‘Nakobenisa bikolo nyonso ya mokili likolo ya bato ya libota na yo.’ 26
Yango wana Nzambe abimisi Mosali na ye po na bino liboso. Atindi ye po abenisa bino, pe
alongola moto nyonso na kati na bino na nzela ya masumu.”

Misala 4
Tango Piere na Yoane bazalaki kaka koloba na bato, banganga-Nzambe bayei, na bakonzi ya
bakengeli ya Ndako ya Nzambe pe ba-Saduse. 2 Bazalaki na kanda penza po bantoma
mibale wana bazalaki koteya bato, pe kosakola ete Yezu asekwi. Elingi koloba ete bato
bakufa bakoki kosekwa. 3 Bongo bakangi bango, pe batie bango na boloko tii na mokolo oyo
elandaki, pamba te pokwa esi’ekomaki. 4 Kasi bato mingi na kati ya baoyo bayokaki maloba
yango bandimaki; boye bato oyo bandimaki, bakomaki mibali soki 5.000. 5 Awa tongo etani,
bakonzi ya Bayuda, bambuta-muntu pe balakisi-Mibeko basangani na Yeruzalem. 6 Ezalaki:
Hana, ngana-Nzambe monene, Kaife, Yoane, na Aleksandre pe bato nyonso ya libota ya
bakonzi ya banganga-Nzambe. 7 Batelemisi bantoma liboso na bango pe batuni bango:
“Bosali makambo oyo na nguya nini pe na kombo ya nani?” 8 Bongo Piere atondi na Molimo
Mosantu, alobi na bango: “Bakonzi ya ekolo pe bambuta-muntu, 9 botuni biso lelo po na
bolamu oyo tosali na moto akufa makolo, bolingi koyeba soki ye abiki na nguya ya nani. 10
Tika toyebisa bino nyonso na ekolo mobimba ya Israel ete ye abiki pe atelemi liboso na bino,
po na nguya ya kombo ya Yezu ya Nazaret, oyo bino bobomaki na kuruze pe Nzambe
asekwisi ye. 11 Pamba te ekokoma boye po na ye: ‘Libanga oyo bino bamason bobwakaki,
ekomi fondasion oyo esimbi lopango mobimba ya Yeruzalem.’ 12 Bato bakoki kobika bobele
epai na ye. Ya solo, na mokili mobimba Nzambe atia moto mosusu te oyo akoki kobikisa
biso.” 13 Awa bato ya Likita bamoni molende ya Piere na Yoane, bakamwe penza po bamoni
ete bango bazali bato pamba oyo bayekola te. Bongo bayebaki lisusu ete bazalaki kotambola
nzela moko na Yezu. 14 Kasi lokola bazalaki komona pe moto oyo abikaki, atelemi penepene
na bango, bakokaki lisusu kotia tembe te. 15 Bongo babimisi bango na Likita-Monene, pe
babandi kotiana tembe boye: 16 “Tosala nini na bato oyo? Pamba te na Yeruzalem mobimba
bayebi malamu ete ezali bango nde bato basali likamwisi monene oyo, pe tokoki kowangana
yango te. 17 Kasi togangela bango pe topekisa bango baloba lisusu na kombo ya Yezu te ata
na nani, po sango ya likambo oyo epanzana te na kati ya bato. 18 Bongo babengi bango pe
bapekisi bango koloba to koteya na kombo ya Yezu. 19 Kasi Piere na Yoane bazongiseli
bango: “Bino moko botala nanu soki nini ezali malamu liboso ya Nzambe: Totosa bino, to
totosa Nzambe? 20 Kasi po na biso, makambo oyo tomonaki pe toyokaki, tokoki kotika
koloba yango te.” 21 Bato ya Likita bagangeli bango lisusu, pe batiki bango, po bazwaki
nzela ya kopesa bango etumbu te. Pamba te bato nyonso bazalaki kokumisa Nzambe po na
makambo oyo elekaki. 22 Moto oyo abikaki na likamwisi yango asi’alekisaki mbula tuku minei
(40). 23 Awa batiki bango, Piere na Yoane bakei epai ya baninga na bango, pe balobeli
bango makambo nyonso bakonzi ya banganga-Nzambe pe bambuta-muntu balobaki.

87
Bantoma batatoli motindami na bango Yezu-Kristo
Misala 2 : 42-47; 3; 4 : 1-23

Lisanga ya liboso ya bantoma etiamaki na Yeruzalem, na ntango ya feti monene ya


Pentekote oyo elandi bobuti ya Yezu-Kristo. Bandimi batekaki biloko na bango nionso,
baumelaki esika moko mpe bazalaki kobondela. Bantoma bazalaki koya na tempelo mikolo
nionso mpo na kobondela mpe koteya ekolo ya Mwana ya Nzambe.

Mokolo moko, bantoma Piere mpe Yoane bakeyi elongo na tempelo na pokwa. Bakomi pene
ya tempelo, balingi baleka sik’oyo mpo na kokota na ezibeli oyo ya monene. “Boyokela ngai
mawa ! Bosalisa ngai, bopesa ngai mbongo !” “Nani azali kobenga biso bongo ?”, balobanaki
bango mibale na botalani moko na mosusu. Bamonaki moto moko akufa makolo, afandi
penepene ya ezibeli ya ndako ya Nzambe mpe na botandi loboko mpo na kosenga mbongo.
“Tala biso !” elobi ntoma Piere na bolingo nionso. Mokufi makolo akamwe mpe aseki na kati
na bozeli mbongo oyo akanisaki akozua. “Tozali na mbongo te, tozali na eloko ya kopesa yo
yango : na kombo ya Yezu-Kristo ya Nazaret telema mpe tambola”. Na sima Piere asimbi
moto yango na loboko ya mobali mpe atelemisi ye. Na mbala moko makolo na ye ekomi
makasi mpo akoka kotambola. Na esengo mingi, alakisi na bantoma mpe na baleki nzela oyo
bazalaki kokamwa ete akoki kotambola, mpe lisusu kopumbua. Akoti na ndako ya Nzambe
nzela moko na bantoma.

Oyo esalamaki ekamwisaki bapaya ya ndako ya Nzambe. Bato nionso bayei mbangu
penepene ya bantoma Piere na Yoane mpe na moto oto azui lobiko mpe oyo azali kokumisa
Nzambe na mongongo makasi mpo na lobiko na ye ya kokamwa. Ntoma Piere alobi na bato :
“Mpo na nini bozali kokamwa ? Elobi ye. Bokanisi ya solo ete biso bato totambuisi ye na
nguya na biso moko ? Tosali kaka na kombo ya Yezu. Boyoka oyo nazali na yango mpo na
koyebisa bino. Nzambe na biso atindaki na mokili Mwana na ye, Yezu-Kristo, mpe apesaki ye
nguya monene. Kasi bino, boboyaki ye, kutu bobomaki ye. Nzambe asekwisaki ye na bakufi,
apesaki ye lisusu bomoi ! Biso bantoma na ye, mpe bayike mosusu, tozali banzeneneke. Ezali
na nguya ya Yezu mpe na bondimi ya moto oyo na kombo ya Yezu moto ekomisi ye makasi.
Bino boyebaki te ya solo Yezu ya Nazaret azalaki nani. Boyebi yango sik’oyo. Bobongola
mitema mpe bozongoela Nzambe mpo alimbisa masumu na bino. Nionso ekoki kolimbisa na
Yezu, oyo amipesaki mbeka. Yezu-Kristo azali Mwana ya Nzambe, oyo makomi eyebisaki
banda kala boyei. Bomipesa na ye mpe na nguya na ye. Bongo bino mpe, bokozua lisalisi”.
Bato ebele bandimaki Yezu-Kristo na sima ya mateya oyo ya lokumu ya ntoma Piere.

88
Komanda ya ndako ya Nzambe akangisi bantoma na pokwa wana, mpo bazalaki koteya mpe
kobikisa na kombo ya Yezu. Balalaki na boloko mpr bamemi bango na tongo liboso ya
bakonzi. Na bobangi ata ya eloko, ntoma Piere ateyi lisusu mpo na baoyo bazalaki kolinga
koyoka koloba mpo na Yezu-Kristo. Bakonzi wana balingaki koyeba na nguya nini to na
kombo ya nani batambuisaki, mokolo eleki moto akufa makolo. Ntoma ayanoli ye, na
bobangi te, ete basalaki yango na kombo ya Yezu-Kristo.

Bakulutu na bakomi balingi te ete mateya wana epanzana mpo na oyo etali Yezu oyo
babakaki na ekuluse. Babengisaki bantoma mpe bapekisaki bango na koloba to koteya na
kombo ya Yezu. Kasi Piere na Yoane bazongisaki bango : “Bino moko botala nanu soki nini
ezali malamu liboso ya Nzambe; kotosa bino to kotosa Nzambe ? Kasi mpo na biso makambo
oyo tomonaki mpe toyokani, tokoki kotika koloba yango te”.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
O kombo ya Yezu-Kristo ya Nazaret, telema mpe tambola.
2. Bana bakososola mpe kokanisa bango moko lolenge makambo oyo esalamaki mpo na
mosengi oyo.
3. Bosolola makambo oyo :
Nini yango ekomelaki bantoma Piere mpe Yoane na sima ?
• Ntoma, na bokasi mpe nguya, ateyaki na kombo mpe na nguya ya Yezu
• Bato bakamwaki mingi mpo na mateya ya ntoma Piere
• Bantoma bakangamaki mpe bamemaki bango epai ya bakonzi
• Bakonzi bapekisaki bantoma mpo na koteya na kombo ya Yezu
4. Bantoma bazali lisusu kosala lelo oyo na kombo ya Yezu-Kristo. Bazali kosakola liloba
ya Nzambe.

Liteya
Bantoma ya yambo basalaki na kombo ya Yezu na etingia, na bondimi mpe elikya.

89
Ntoma Piere na boloko
Misala 12 : 1-17
Misala 12
Na tango wana mokonzi Erode abandi konyokola bandeko mosusu ya Eklezya. 2 Abomisi
Jake ndeko ya Yoane na mbeli. 3 Awa amoni ete yango esepelisi Bayuda, akangi pe Piere.
Makambo wana elekaki na tango ya feti ya Koleka. 4 Atie Piere na boloko, pe apesi ye na
maboko ya basoda zomi na motoba (16) po bakengelaka ye minei minei, bato na bato na
ngonga na bango. Alingaki kosambisa ye liboso ya bato, na sima ya feti. 5 Tango Piere
azalaki na boloko, bato ya Eklezya bazalaki kosambela Nzambe na molende nyonso po na ye.
6 Etikalaki mokolo moko po Erode asambisa Piere. Bongo na butu Piere alali na kati ya
basoda mibale. Bakangaki ye na minyololo mibale; pe basoda mibale bazalaki kokengela
liboso ya porte ya kasho. 7 Na mbala moko anjelu ya Nkolo ayei pe kasho engengi na
ndenge moko ya kokamwa. Anjelu asimbi ye na mopanzi, alamusi ye pe alobi: “Telema
noki.” Bongo minyololo elongwe na maboko na ye. 8 Na sima anjelu alobi na ye: “Kanga
mokaba pe lata basandale na yo.” Piere asali bongo pe anjelu abakisi: “Lata kazaka na yo pe
landa ngai.” 9 Piere alandi anjelu tii na libanda. Azalaki koyeba te ete makambo oyo anjelu
azalaki kosala ezali ya solo: akanisaki ete ezali ndoto. 10 Baleki mokengeli ya liboso na ya
mibale, pe bakomi na porte ya bibende ya kobimela na vile. Porte wana efungwami yango
moko; babimi, pe tango bazalaki kotambola na balabala, na mbala moko anjelu atiki Piere.
11 Bongo Piere akomi komiyeba; alobi: “Sik’oyo namoni ete ezali ya solo, Nkolo atindaki
anjelu na ye, pe abikisi ngai na maboko ya Erode pe na mabe nyonso oyo Bayuda balingaki
kosala ngai.” 12 Awa amoni esika akomi, akei na ndako ya Maria, mama ya Yoane Marko.
Bato mingi basanganaki wana pe bazalaki kosambela. 13 Piere abeti ndako pe mosali moko
ya mwasi, kombo na ye Rode, ayei po na kofungola. 14 Awa ayoki mongongo ya Piere, akei
mbangu na esengo koyebisa bandeko ete Piere azali libanda, kasi abosani kofungola porte!
15 Bango balobi na ye: “Yo ozali na liboma!” Kasi ye atie kaka molende pe alobi: “Ezali ya
solo penza.” Bango balobi: “Ezali anjelu oyo abatelaka ye.” 16 Nzokande Piere azalaki kaka
kobeta ndako. Awa bafungoli porte, bamoni ye pe bakamwe penza. 17 Piere asali elembo na
liboko po bafanda nyee, pe alobeli bango ndenge Nkolo abimisi ye na boloko. Alobi lisusu:
“Boyebisa makambo oyo na Jake pe na bandeko nyonso.” Na sima abimi pe akei epai
mosusu.

90
Ntoma Piere na boloko
Misala 12 : 1-17

Bomoi ya bakristo ya ebandeli na Yeruzalem ezalaki pete te. Bakristu mosusu banyokwamaki
mpo na bondimi na bango. Kati na makambo ya mpasi oyo, batikalaki bayengebeni mpe
kokangama na maye Yezu ayekwisaki bango. Butu moko ebotaki likambo ya lolenge na
yango.

Pokwa eyingeli na Yeruzalem. Bakristo mosusu na lisanga ya bantoma basanganaki na ndako


moko monene. Bakristo bazalaki na mawa. Bazalaki koloba mpo na ntoma na bango Piere,
oyo auti kokangama. Atako asalaki likambo mabe te, alekisaki mwa mikolo na boloko. Lobi,
akosamba liboso ya Herod. “Akoki kozua etumbu ?” mpe “Ndenge nini tokoki kosalisa ntoma
na biso ?”, wana ezalaki mituna mosusu na bango. Batokaki lisungi na bango na molei-
mosantu, mpe bazuaki eyano. Babondelaki epai ya Nzambe na etingia mpe bosolo.
Basengaki na Nzambe abatela mpe asalisa ntoma na bango. Batiaki motema na bango na
Tata ya likolo mpe bandimaki ete Nzambe akosala mpo na bolamu na bango. Bazuaki
mokano ya kotikala butu mobimba eika moko wana, mpe bazalaki kobondela.

Na mbala moko boye, na kati-kati ya butu, babeti na ezibeli. Bakamwaki mpe babangaki.
Ezali moninga to mpe monguna ? Moko na basali ya mwasi, Rode, akei na ezibeli. Abangaki
mpo na kofongola ezibeli. Atuni : “Nani wana ?” “Ezali Piere”, elobi mongongo moke.
Akamwaki mingi mpe abosanaki kofongola ata ezibeli. Akei mbangu na esengo koyebisa
bandeko na ndako ete Piere azali libanda. “Ezali liboma, oyo yo ozali koloba. Oyebi malamu
lokola biso ete ye azali na boloko mpe bazali kokengela ye penza”, eyanolaki bandeko
mosusu. “Kasi ngai nayebi mongongo na ye. Piere azali libanda !” Rode atie kaka molende.
Bayoki lisusu kobeta ezibeli, mpe ye agangi : “Boyoka, abeti lisusu!” Bongo banso bakei
mbangu na ezibeli.

Ya solo, ntoma Piere azali wana, atelemi liboso ya ezibeli. Sima ya kopesa mbote na esengo,
ye abeteli bango lisolo : “Nazalaki na boloko, kokangama na minyololo na basoda mibale,
mpe nalalaki penza pongi makasi. Mbala moko boye, moto abeti ngai mpe nalamuki na
pongi. Moi makasi engengisi boloko, mpe anzelu ya Nzambe alobi na ngai : Telema noki ! Na
ntango wana, minyololo na maboko na ngai ekatani, ekwei na se. Basoda balamukaki te.
Lata basandale mpe kazaka na yo, mpe landa ngai ! Elobaki anzelu. Lokola ndoto, tolekaki
bakengeli mibali. Bango bamonaki biso te. Suka-suka ezibeli ya monene ya bibende
efonguami yango moko mpe tobimaki libanda na matata te. Na mbala moko anzelu abungi.
Ngai na mbala moko namonaki ete ezali ndoto te, kasi ete Nzambe asalisi ngai. Nkolo

91
atindaki anzelu na ye mpo na kobikisa ngai. Nayaki mbangu epai na bino mpo na kobetela
bino lisolo kitoko oyo”.

Banso elongo batondaki Nzambe mpo na lisalisi na ye ya kokamwa. Mawa kaka mpo ntoma
Piere akokaki te kotikala ntango molai na bango, mpo basoda bakoumela te mpo na koluka
ye. Asengi bapesa mbote na ye epai ya Jake mpe bandeko mosusu na lisanga mpe bayebisa
bango oyo etali kobima na ye kitoko na boloko. Apesi bango elikia ete Jake ndeko ya Yezu,
akosalisa bango atako na kozanga na ye.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Nzambe atindi anzelu mpo na kobikisa ntoma Piere na boloko.
2. Bosolola makambo oyo :
• Ndenge nini ntoma Piere abikisamaki na boloko ? (Lisanga babondelaki na etingia
mpe Nzambe atindaki anzelu)
• Mpo na bino, bokanisa, lisanga ezalaki ndenge nini na bomoni ntoma Piere ?
(komona kobima ya kokamwa ya ntoma Piere na boloko etondisaki bango na
esengo)
3. Tobondelaka mingi mpo na bantoma mpe basali. Kobondela mpo na basusu, ezali oyo
tobengaka ete “kobondela mpo na baninga”.

Liteya
Ezali na ntina monene ya kobondela mpo na bantoma na biso mpe mpo na basali.

92
Kapita ya boloko ya Filipe
Misala 16 : 16-40

Ntoma Paul asalaki mobembo molai mpe ya mpasi mpo na kopanza sango-malamu ya
Nzambe. Mokolo moko, elongo na Silas, akomi na Filipe, ville ya Grece (Europa). Bazalaki
kosakola na esengo mpo na Yezu. Na bomoi na ye, liwa mpe bosekwi na ye. Bato ebele oyo
bazalaki kokumisa bikeko bazalaki kofanda na ville wana batiaki tembe na kotatola na bango.
Bafundaki ntoma Paul mpe baoyo bazalaki na ye ete bazali koteya bokoko oyo bango bakoki
kondima te. Ezalaki kofunda penza ya solo. Na kanda ya bato ebele oyo, bakonzi batindi
babeta bango makasi mpe babwaka bango na boloko. Mokonzi ya boloko atala bango
malamu mpo bakima te. Abwaki bango mibale na boloko na kati-kati mpe akangi bango
basinga na makolo. Ntoma Paul na Silas bafandaki na molili, mpasi na mokongo na fimbo
babetaki bango.

Na kati ya butu, bato ya boloko mosusu bakangaki matoyi na bango te : bazalaki koyoka
Paul na Silas kobondela na mongongo makasi mpe koyemba. Na mbala moko, mabele
ebandi koningana na mopepe makasi, bifelo ya boloko eningani makasi lokola ebukana.
Banzete ekwei na biteni, mpe bizibeli nionso ya boloko efunguami, na ndenge ete bato ya
boloko bakokaki kokima malamu.

Makelele oyo eutaki na koningana ya mabele, elamusi mokonzi ya boloko. Ntango amonaki
bizibeli nionso ya boloko efunguama, ayoki mpasi na motema. “Nakanisi bato ya boloko
nionso bakimi ! Nakozua etumbu”. Makanisi oyo ebangisi ye na ntina ya komiboma ye moko.
“Paul agangi na mongongo makasi; komiboma te ! Kobanga te ! Tozali banso awa”.

Mokonzi ya boloko na kolenga na maboko asimbi muinda mpe abandi kotala bisika nionso ya
boloko. Esika moko te etikalaki pamba. Ntoma Paul na Silas bazalaki kaka wana, bango mpe.
Mokonzi ya boloko akwei na makolo na bango. Na kondima ete bazali basali ya Nzambe,
atuni bango : “Esengeli nasala nini mpo na bikisama ?” “Ndimela Yezu-Kristo, mpe okobika,
yo na libota na yo”.

Ezali nanu butu mpe mokonzi ya boloko amiyoki ete azali penza na bomoi, abengaki bango
nionso mpo bakota na ndako na ye. Aleisi mpe amelisi bango, mpe atie nkisi na bapota na
bango. Paul na Silas bateyi mokonzi ya boloko mpe libota na ye mpo na Mwana ya Nzambe,
bomoi mpe liwa na ye, mpe na bosekwi ya Kristo. Bayambaki liloba ya Nzambe na kondima.
Sima ntoma Paul abatisaki bango.

93
Mokolo oyo elendaki na tongo, ntoma Paul na moninga na ye babimisaki bango na boloko.
Bakonzi basengaki bolimbisi na Paul mpe Silas na ndenga babetaki bango na mabe moko
basalaki te. Yambo ya koboba mobembo na bango, ntoma Paul na Silas balendisaki lisusu
mingi koleka bandimi ya mboka Filipe.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Ndima Nkolo Yezu, okobika, yo mpe libota na yo.
2. bosolola makambo oyo :
• Soki bino na esika ya ntoma Paul, bolingaki kosala nini ntango bizibeli ya boloko
efonguamaki na mbalakaka ?
• Nini epekisaki ntoma Paul mpe Silas mpo bakima te na boloko ? (Batondisamaki na
bwanya [mayele] ya Nzambe)
3. Limbola biteni oyo :
• Ntoma Paul mpe Silas babuakamai na boloko nzokande basalaki mabe moko te.
• Bazalaki kobanga te, mpo ete batiaki motema na lisalisi ya Nzambe.
• Ezaleli ya ntoma Paul mpe Silas ekamwisaki mokonzi ya boloko. Mokonzi ya boloko
oyo na libota na ye nionso abzuaki libatisi.
• Toyokaka mpasi, biso mpe, nzokande tosali mabe moko te, esengeli tozala na kimia,
kobondela mpe komipesa na maye ntoma azali koloba.

Liteya
Ntango mosusu tosengeli kosalela Nzambe na eleko ya mpasi.

94
Maye bantoma bazali kosala

Mwana moko ya mwasi abengamaki mpo na kolekisa mwa mikolo ya bopemi epai ya koko na
ye ya mwasi, oyo azalaki kofanda na mboka mosusu. Asepelaki mingi penza. Mwana mwasi
atuni baboti na ye soki akoki kokende epai ya koko kaka yenga oyo na tongo tongo. Bakoki
kokota na ye na losambo mpo akutana na baninga ebele ya bango. Baboti bazalaki na
makanisi wana te, mpo ete lingomba na bango ezalaki kozela ntoma yenga kaka wana.
Mwana mwasi alingaki ayeba : “Mpo na nini koya ya ntoma ezali na ntina monene boye ?”
Mama alobi na ye : “Tozelaka koya ya ntoma banda kala. Tozali kosenga mikolo nionso na
mabondeli na biso koya na ye ememela moko na moko esengo mpe mapamboli ebele.
Tolingi kozangisa losambo oyo te atako likambo ya ndenge nini ekoki kozala. Sima tokoki
kokende epai ya koko ya mwasi, mpe okoki kotikala epai na ye ntango molai”.

Yenga na tongo, lisanga mobimba ezali kozela na motema mobimba ebandeli ya losambo.
Mwana mwasi ayoki esengo moko ya lolenge mosusu : leki na ye ya mobali akozua libatisi
Esantu ya Molimo na ntoma mpe akokoma mwana ya Nzambe. Sima ya losambo, baboti ya
mwana mwasi bamemi ye epai ya koko na ye ya mwasi. Poso moko mosusu etonda na
esengo ebandaki mpo na mwana mwasi.

Na pokua, mwana mwasi amoni mokanda “Notre famille” likolo ya mesa. Atiaki makanisi
nionso na mokanda na ntina ete amonaki te koko na ye kotelema sima na ye. “Olingaka
photo oyo ?” motuna ya koko na ye ya mwasi, “andimi, nazali komona lokola bandeko mibali
mpe basi oyo bazali kozela boyei ya ntoma-mokonzi. Bazali kozela solo na esengo losambo
ye akosala. Ezali solo ntango molai oyo bazali kozela”.

Koko ya mwasi alaki mpo alimbolela ye na molai, na pokwa, yambo ete ye akende kolala.
Ntango pokwa eyei, alobi na ye : “Ntango Yezu azalaki na bomoi awa na mokili, apesaki
esengo na bato ebele. Alobelaki bango makambo ya Tata na ye ya likolo. Asalisaki bato
ebele mpo bandima, mpe abikisaki bato mosusu kati na bango. Sima akufaki likolo ya
ekuluse. Yezu alongaki liwa mpe asekwaki na bakufi. Sima ya mwa ntango, azongaki epai ya
Tata na ye na lola. Liboso ya kozonga, apesaki bantoma na ye mosala monene : “Bosala kino
ekozonga ngai”.

Koko ya mwasi akobi : “Omoni, koko na ngai, bantoma bakendaka na bamboka ebele, na
mokili mobimba, mpo na kosakola liloba ya Nzambe. Bazali kolendisa bondimi ya bana ya
Nzambe. Na boye bana ya Nzambe bakoki kozela na esengo mokolo wapi yezu akozonga.
Bantoma bazali na mosala monene ya ntina ya kokokisa. Bazali kopesa libatisi esantu ya

95
Molimo mpe kolimbisa masumu na kombo ya Yezu. Bazali kotia mpe basali mpo basalisa
bango na mosala”.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Bantoma bazali batindami ya Nzambe.
2. Bosolola makambo oyo :
• Misala ya liboso ya bantoma ezali nini ? (Mateya, kolakisa, molei-mosantu, libatisi ya
molimo-mosantu mpe kotia basali)
• Mpo na nini bantoma batiaka basali ? (Mpo bakoki kozala bisika binso na mbala
moko te. Lisusu bakoki kosala nionso te bango moko).
3. Bantoma batindamaki na Yezu, mpe bazali kosala na kombo na ye. Lelo lisusu
bantoma bazali kosala na kombo mpe na etinda ya Yezu.

Liteya
Bantoma bazali kosalisa mpo na kozala pena mpo na bozongi ya Yezu.

96
Ntoma na ngai azali motindami ya Yezu

Na eteyelo ya yenga eleki, bana bamonaki losambo ekambamaki na ntoma. Bango nionso
bazalaki na esengo mingi. Bana ebele babengaki baninga na bango na losambo oyo.

Elenge mobali moko ya moke mpe moninga na ye bakomaki na ngonga ya malamu mpe
babengamaki na kofanda penza liboso, pene ya mesa ya bonzenga. Bazali kotala orgue mpe
chorale ya bana. Moninga azalaki kokamwa, mpo ete akota nanu te na Eglise néo-
apostolique. Na mposa ya koyeba likambo nini ekosalema, ye atuni : “okoki koyebisa ngai
likambo nini ekosalama ?” Leki na biso alobi na ye : “Balobaka te na Eglise. Nakoyebisa yo
sima”.

Moninga na ye azalaki na mituna ebele, mwana moke ya mobali aluki lisalisi ya molakisi na
ye ya mateya ya yenga mpe ya baninga na ye. Ayokani na ye bakutana na losambo ya yenga
ekoya.

[Molakisi akosalisa bana na koyanola mituna oyo. Esengelaki kozala na photo ya ntoma mpo
ete esalisa]

• Kombo ya ntoma na biso nani ?


• Azalaka wapi ?
• Asalelaka mosala na ye wapi ?
• Awa na mokili asalaka nini ?
• Azalaka kaka na Eglise na biso ?
• Mpona nini bozali kosepela ete ntoma azala awa ?

[Mituna oyo ekopesa molakisi mayele mpo asalisa bana na kobongisa biyano na bango]
• Balimbisaka masumu na kombo ya Yezu-Kristo mpe bapesaka molei-mosantu.
• Kaka bantoma bapesaka libatisi ya molimo-mosantu.
• Bantoma bazali kopesa mosala na basali.
• Bazali kobongisa biso mpo na mokolo oyo yezu akozonga kozua biso.
• Bantoma bazali batindami ya Nzambe. Bazali kolimbolela biso mposa ya Nzambe na
bomoi na biso.
• Kozala na bantoma ya bomoi, ezali likabo monene ya Nzambe.

Okosukisa na kobetela bango lisolo to mpe na kotanga eteni moko ya ntina ya “Notre
famille” na oyo etali mosala ya moko ya bantoma.

97
Makanisi mpo na molakisi
Bosenga na bana bazongela liloba oyo :
Ntoma na ngai azali motindami ya yezu

Liteya
Tozali kotosa bantoma na biso mpe tozali na botosi mpo na likabo oyo.

1.5.0 Balosambo minene esantu

Noel – Mosikoli alakamaki


Noel – Kosakola mpe mbotama ya Yezu-Kristo
Yenga ya mandalala – Bokoti na Yeruzalem
Mitano esantu – Gethsemane
Pasika – Yezu abimeli basi na lilita
Kobuta – kobuta ya Kristo
Pentekote – Bozui Molimo-Mosantu na Pantekote

Na bokuse

Mbotama ya Yezu elobomaka liboso bambula koleka mokama na basakoli. Nzambe akokisaki
elaka na ye sima ya bambula ebele. Yezu abotamaki na Betleem na ndenge ya komikitisa.

Yezu akendaki na Yeruzalem, wapi ayambamaki na esengo. Yezu-Kristo mpe bayekoli na ye


baliaki bilei ya suka na pokwa.

Yezu abondelaki na elanga ya Gethsemane. Ye atekamaki na Judas Iscariot mpe abakamaki


na ekuluse na Golgotha.

Nzambe atindaki Mosungi alakamaka na baoyo bazalaki kozela na Yeruzalem. Bayekoli bazali
kozua bokasi ya Molimo-Mosantu. Banda wana bantoma bazali koteya na bokasi nionso.
Ebele na baye bazali koyoka bango bazali kondima mpe kobatisama na mayi mpe Molimo na
bantoma.

98
Noel –
Mosikoli alakamaki

Ezaya 6 : 1-11; 7 : 14; 9 : 1-5; 53 : 1-7 / Mika 5 : 1


Ezaya 6
Na mbula oyo mokonzi Uziya akufaki, nazalaki na Ndako ya Nkolo, pe namoni lokola na
ndoto: Yawe azalaki na mwa-likolo, afandi na kiti ya bokonzi. Elamba na ye ezalaki molai,
ekitaki tii na se, etondisi Ndako mobimba. 2 Bikelamo ya moto ezalaki na likolo na ye. Moko
moko na yango ezalaki na mapapu motoba: mibale po na kobomba elongi, mibale po na
kozipa nzoto, pe mibale po na kopumbwa. 3 Ezalaki koganga yango na yango: “Mosantu,
Mosantu, Mosantu! Yawe ya nguya nyonso azali Mosantu! Mokili mobimba etonda na
nkembo na ye!” 4 Mingongo na yango ezalaki koningisa baporte ya Ndako ya Yawe, pe
Ndako mobimba etondaki na milinga. 5 Bongo namilobi: “Esili na ngai! Nabebi! Pamba te
maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na ngai ezali mbindo na miso ya Yawe; pe bato ya
ekolo na ngai, minoko na bango etonda na mbindo. Nzokande ngai moto ya mbindo boye,
namoni Mokonzi, Yawe ya nguya nyonso!” 6 Bongo ekelamo moko na moto epumbwe pe
eyei epai na ngai. Ezalaki na esimbeli ya ebende na liboko, ekamati na yango likala ya moto
oyo ezalaki na mesa ya mabonza. 7 Etutisi ngai yango na monoko, pe elobi: “Lokola moto
oyo etuti mbebo na yo, mabe na yo elongwe, masumu na yo elimbisami.” 8 Bongo nayoki
Nkolo azali kotuna: “Natinda nani? Nani akozala ntoma na biso?” Nazongisi: “Ngai oyo, tinda
ngai.” 9 Alobi: “Kende koloba boye na bato ya ekolo oyo: ‘Bokoyoka malamu, kasi bokoyeba
tina te; bokotala malamu, kasi bokomona te.’ 10 Maloba na yo ekobebisa mitema na bango,
ekoboma bango matoi pe ekozipa bango miso; boye miso na bango ekomona te, matoi na
bango ekoyoka te, pe mayele na bango ekosila, bongo bakobongola mitema te pe bakobika
te!” 11 Bongo natuni: “Nkolo, ekozala boye tii tango nini?” Azongiseli ngai: “Tii tango bavile
ekotikala pamba pe ekozanga bato, bandako ekotikala pamba, bato te na kati; pe mabele
ekotikala pamba, ata bilanga te.”

Ezaya 7
14 Likambo te! Nkolo ye moko apesi bino elembo, yango oyo: Elenge mwasi azali na zemi;
akobota mwana-mobali, pe akopesa ye kombo Emanuel.

Ezaya 8
23 Moto oyo akangami na molili wana, akoki komilongola na yango te. Na tango ya kala
Yawe asambwisaka bikolo ya Zebulon pe ya Neftali. Kasi na tango ekoya akopesa lokumu na
mabele oyo ekende tti na ebale Mediterane, na mboka oyo ezali na ngambo ya Yordan, pe
na Galile, mboka ya bapaya.

Ezaya 9
Bato oyo bazalaki kotambola na kati ya molili, bamoni mboka na bango ekomi kongenga.
Bazalaki kofanda na mboka ezanga moi, sik’oyo bakomi na polele. 2 Yawe, okomisi esengo
na bango monene, osepelisi bango mingi. Bazali na esengo na miso na yo, ndenge
basepelaka na tango ya kobuka mbuma; ndenge bagangaka na esengo sima ya bitumba, na
tango ya kokabola biloko oyo babotoli. 3 Pamba te osilisi boumbu ya bato na yo: obuki
banzete oyo bazalaki komemela mikumba na mapeka, pe fimbu ya bakonzi na bango ya
misala, ndenge osalaki tango olongaki bato ya Madian. 4 Basapatu nyonso ya banguna oyo
ebukaka mabele, pe bakazaka nyonso oyo ebeba na makila, babwaki yango na moto po
ezika nyonso. 5 Pamba te mwana abotami po na biso, ya solo tozwi mwana-mobali; ye
akozwa bokonzi. Bakopesa ye bakombo oyo: “Moto ya mayele ya solo, Nzambe ya makasi,
Tata ya seko, Mokonzi ya boboto.”

99
Ezaya 53
Nani andimaki sango oyo toyokaki? Nani ayebaki ete Yawe asali makambo yango? 2 Pamba
te na miso ya Nzambe, Mosali akoli lokola lititi moko ebimi na nzete oyo bakata; lokola mwa-
nzete eboti na mabele ya kokauka. Azalaki na kitoko te pe lokumu oyo ekokaki kobenda
bato, yango wana topesaki ye kilo te. Azalaki kutu komonana ata te, po tosepela kotala ye. 3
Bato baboyaki ye, bamonaki ye eloko pamba, moto ya mawa, moto amesana na pasi.
Totsiolaki ye, tosundolaki ye, lokola moto oyo balingaka komona na miso te. 4 nzokande
andimaki bapasi oyo elingaki kozala ya biso, azalaki konyokwama po na biso. Kasi biso
tozalaki kokanisa ete Nzambe moto apesi ye etumbu, abeti ye pe akitisi ye. 5 Batobolaki ye
likolo ya masumu na biso, banyataki ye likolo ya mabe na biso. Azwaki etumbu oyo eyeeli
biso boboto; biso tobiki po na bapota ye azolaki. 6 Biso nyonso topanzanaki lokola bameme,
tokomaki kokende moto na moto na nzela na ye. Kasi Yawe atiaki mabe na biso nyonso na
nzoto na ye. 7 Amitikaki banyokola ye, afungolaki ata monoko te, lokola mwana-meme oyo
balingi koboma, lokola meme oyo bazali kolongola bapwale ya kosalela bilamba.

Mika 5
Yawe alobi boye: “Yo Betleem Efrata, ata ozali mboka ya moke na kati ya bamboka ya Yuda,
ezali epai na yo nde nakobimisa moto oyo akotambwisa ekolo ya Israel na kombo na ngai.
Bakoko na ye bayebana banda bileko ya kala.”

100
Noel –
Mosikoli alakamaki

Ezaya 6 : 1-11; 7 : 14; 9 : 1-5; 53 : 1-7 / Mika 5 : 1

Bambula eleki ebele yambo ya boyei ya Yezu awa na mokili, ezalaki na mboka Judé moto
moko na kombo ya Ezaya. Ezaya azalaki kobanga Nzambe; ye azalaki kobondela mingi mpe
azalaki na kondima penza. Baninga na ye bazalaki bato ya kanda mingi mpe bato ya
masumu, mpe mingi kati na bango bazalaki kondima Nzambe te. Kasi, Nzambe alingaki ekolo
na ye mpe azalaki na mposa ya kobikisa ekolo na ye. Na boye Nzambe azalaki na mposa ya
molobeli moko : mosakoli oyo akoki koloba na ekolo na kombo ya Nzambe. Ezali na ntina
oyo nde Nzambe aponaki Ezaya mpo azala mosakoli na ye.

Ezaya, lokola mbala na mbala, azalaki kofukama mpe kobondela Nzambe na solo penza. Na
mbala moko, eloko moko boye ya kokamwa ebimi. Lola efunguami mpe Ezaya amoni kiti ya
bokonzi ya Nzambe kati na nkembo mpe bongengi. Ye amonaki Nzambe. Nzambe
azingamaki na banzelu, oyo bazalaki moko na moko azalaki na mapapu motoba : mibale
mpo na kobomba elongi mpo na koyoka mpasi te na bongengi makasi ya bokonzi ya
Nzambe, mibale mpo na kozipa nzoto mpe mibale mpo na kopumbwa zinga-zinga ya kiti ya
bokonzi ya Oyo-Aleki-Likolo. Banzelu bazalaki koyemba na mingongo na bango ya kitoko :
“Mosantu, mosantu, mosantu ezali Yawe ya nguya nionso ! Mokili mobimba etonda na
nkembo na ye !”

Boye nde Ezaya akomaki mosakoli ya Nzambe. Ayebaki ete mosala moko makasi ezali kozela
ye. Na mpiko mpe esengo, atambolaki engumba mobimba mpo na koteya Nzambe mpe
mosala na ye ya lisiko. Mosakoli asakolaki : “Yango wana Nkolo ye moko akolakisa bino
elembo moko : Tala moseka moko akokumba zemi, akobota mwana mobali, mpe akopesa ye
kombo ya Emmanuel”. Ezaya alobaki lisusu : “Mwana abotami mpo na biso, mwana mobali
apesameli biso, mpe bokonzi ekozala likolo ya mapeka na ye. Bakobenga ye mwana malamu,
mosungi, Nzambe ya nguya, Yawe Tata, mokonzi ya kimia”.

Sango epesamaki na ekolo ya Nzambe mpe ezali kaka sika kopesama. Baboti ya kondima
bazali kolobela yango na bana na bango bambula na bambula. Bayengebene ebele bazalaki
kolikya ete mokonzi oyo alakama akoya sika sika oyo mpe akomema bongengi mpe bosembo
na eleko ya molili mpe ya masumu. Mosakoli mosusu na kombo ya Mika (Michée) azalaki
mpe na ntango ya Ezaya. Nzambe ayebisaki ye ete Messiya akobotama na Bethlehem. Mika
asakolaki yango na ekolo ya Israel (Mika 5:11).

101
Makanisi mpo na molakisi
1. Bosenga na bana bazongela :
Mosakoli Ezaya asakolaki mbotama ya Mesiya bambula ebele yambo ya mbotama ya
Yezu.
2. Bosolola makambo oyo :
• Mateya ya Ezaya elobaki nini mpo na oyo etali mbotama ya Yezu ? (Moseka moko
akobota mwana moko ya mobali, bokonzi ekozala likolo ya mapeka na ye;
bakobenga ye Mwana Malamu, Mosungi, Nzambe ya nguya...)
• Nini ekomaki na elaka oyo ? (Elaka oyo, epesamaki mpo na mokili mobimba na nzela
ya Ezaya, ekokisamaki bambula ebele sima).
3. Mbotama ya Yezu ezalaki likabo eleki monene oyo esalama nanu te na mokili
mobimba. Biso tozali kokanisa likabo oyo na feti ya Noel.

Liteya
Nzambe alingi mokili mobimba. Ezali na ntina oyo Nzambe atindaki Yezu-Kristo na mokili
lokola Mosikoli.

102
Noel –
Kosakola mpe mbotama ya Yezu-Kristo

Matai 1 : 18-25; Luka 1 : 26-38; 2 : 1-19


Matai 1
18 Yezu Kristo abotamaki boye: Mama na ye Maria azalaki mwana-mwasi oyo Jozef aponaki
po abala ye. Kasi liboso ete bafanda ndako moko, Maria azwaki zemi na nguya ya Molimo
Mosantu. 19 Mobali na ye Jozef azalaki moto malamu, pe alingaki asambwisa ye te na miso
ya bato. Akanaki ete atika ye kasi ayebisa moto moko te. 20 Tango azalaki kokanisa boye,
anjelu ya Nkolo abimeli ye na ndoto, pe alobi na ye: “Jozef mwana ya David, kobanga kobala
Maria te, pamba te zemi oyo azali na yango, euti na nguya ya Molimo Mosantu. 21 Akobota
mwana-mobali pe okopesa ye kombo Yezu. Ezali ye nde moto akobikisa bato na ye na
masumu na bango.” 22 Makambo wana nyonso esalamaki po na kokokisa maloba oyo Nkolo
alobaka na monoko ya profete na ye: 23 “Elenge mwasi oyo ayebi nzoto ya mobali te
akozwa zemi, akobota mwana-mobali, pe bakopesa mwana yango kombo Emanuel, elakisi:
Nzambe azali na biso.” 24 Tango Jozef alamuki na pongi, asali se ndenge ajelu ya Nkolo
alakisaki ye, pe abali maria. 25 Kasi ayebaki nzoto na ye te tii tango abotaki mwana; bongo
Jozef apesi mwana yango kombo Yezu.

Luka 1
26 Tango zemi ya Elizabet ekomi na sanza motoba, Nzambe atindi anjelu Gabriel na mboka
moko ya Galile, kombo na yango Nazaret, 27 epai ya elenge mwasi oyo akobalana na Jozef,
moto ya libota ya David. Kombo ya elenge mwasi yango maria. 28 Anjelu akoti na ndako ya
Maria pe alobi: “Mbote na yo! Sepela, pamba te Nkolo azali na yo, atondisa yo na bolamu.”
29 Tango Maria ayoki maloba wana, abangi pe amituni tina ya mbote wana. 30 Bongo anjelu
alobi na ye: “Maria, kobanga te. Nzambe asepeli na yo. 31 Okozwa zemi, okobota mwana-
mobali; okopesa ye kombo Yezu. 32 Akozala moto monene; bakobanda kobenga ye Mwana
ya Nzambe. Nkolo Nzambe akopesa ye bokonzi ya koko na ye David. 33 Akozala mokonzi ya
bato ya Israel libela; bokonzi na ye ekozala na suka te.” 34 Maria atuni anjelu: “Ngai nayebi
nanu nzoto ya mobali te; ndenge nini makambo wana ekoki kosalama?” 35 Anjelu azongiseli
ye: “Molimo Mosantu akokitela yo; nguya ya Nzambe ekozipa yo lokola lipata. Yango wana
Mwana oyo okobota akozala mosantu. Bakobanda kobenga ye mwana ya Nzambe. 36 Ndeko
na yo Elizabet kutu ye pe alingi abota mwana-mobali, atako akomi mobange. Bazalaki koloba
ete akoki kobota te, kasi sik’oyo azali na zemi ya sanza motoba. 37 Pamba te Nzambe akoki
kosala makambo nyonso.” 38 Bongo Maria alobi: “Nazali mosali ya Nkolo. Esalama ndenge
olobi.” Pe anjelu atiki ye.

Luka 2
Na tango wana, mokonzi monene ya Rome kombo Oguste atindi batanga bato nyonso, po
bayeba talo na bango. 2 Ezalaki mbala ya liboso bato bakomisa bakombo na bango, tango
Kirinius azalaki motambwisi ya Sirie. 3 Bongo bato nyonso bakei kokomisa bakombo, moto
na moto na mboka na ye. 4 Jozef pe atiki Nazaret na rejion ya Galile, akei na Betleem na
rejion ya Yudea, epai babotaki mokonzi David. Pamba te ye azalaki moto ya libota ya David.
5 Akendeki kokomisa kombo, na Maria, elenge mwasi oyo ye akobala. Maria azalaki na zemi.
6 Tango bazalaki kuna, mokolo na ye ya kobota ekokaki. 7 Aboti mwana-mobali, mwana na
ye ya liboso; alingi ye na bilamba, pe alalisi ye na kesi moko oyo batiaka bilei ya banyama,
pamba te esika ezalaki te po na bango na ndako oyo bapaya bazalaki kolala. 8 Na esobe
pembeni ya Betleem ezalaki na babokoli ya bameme; bazalaki kolala kuna po na kokengela
bameme na bango. 9 Anjelu moko ya Nkolo abimeli bango, pe nkembo ya Nkolo engengeli
bango. Babangaki mingi penza. 10 Kasi anjelu alobi na bango: “Bobanga te, nayeeli bino

103
sango moko ya malamu, oyo ekosepelisa ekolo mobimba ya Israel: 11 na butu ya lelo
baboteli bino Mobikisi na mboka ya David. Ye azali Kristo pe Mokonzi oyo bozalaki kozela. 12
Bokoyeba ye boye: bokomona Mwana balingi bilamba, pe alali na kesi oyo batiaka bilei ya
banyama.” 13 Na mbala moko ba-anjelu mosusu ebele bayei kosangana na anjelu oyo ya
liboso. Bazalaki kokumisa Nzambe boye: 14 “Lokumu na Nzambe kuna na Likolo! Pe boboto
awa na se, na bato oyo ye alingaka.” 15 Tango ba-anjelu bazongi na Likolo, babokoli ya
bameme bayokani boye: “Tokende tii na Betleem, kotala makambo ekwei kuna, oyo Nkolo
ayebisi biso.” 16 Bakei kuna noki, bamoni Maria na Jozef; bamoni pe Mwana alali na kesi oyo
batiaka bilei ya banyama. 17 Tango bamoni mwana, bayebisi bato makambo oyo anjelu
alobaki po na mwana. 18 Bato nyonso oyo bayokaki sango yango, bakamwe po na maloba
ya babokoli ya bameme. 19 Kasi Maria abombi makambo wana nyonso na motema, pe
azalaki kokanisa yango.

104
Noel –
Kosakola mpe mbotama ya Yezu-Kristo

Matai 1 : 18-25; Luka 1 : 26-38; 2 : 1-19

Elenge mwasi, ya komikitisa mpe kondima, azalaki kofanda na mboka Nazaret, moseka na
kombo ya Maria. Ye azalaki moseka mpo na Jozef. Bango mibale bazalaki kofanda na eteni
ya engumba wapi Herode azuamaki lokola mokonzi, oyo amimonisaki ntango nionso moto ya
kanda. Ezalaki eleko ya mabe mpe ya mpasi. Bandimi ebele bazalaki kolikya ete Messiya
alakama azali koya sik’oyo kobikisa bango.

Maria azalaki ye moko na ndako mbala moko ntango anzelu abimeli ye. Anzelu alobi na ye :
“Mbote na yo, yo oyo opesameli gracia, Nkolo azali na yo, opambolami kati na basi banso !”
Maria akamwaki. Azalaki kotala anzelu na bobangi. Mbote ya kitoko boye ekoki kolakisa nini?
Anzelu azongeli : “kobanga te, Maria ! Okobota mwana mobali, mpe okopesa ye kombo
Yezu. Ye akozala moto monene mpe akozua kombo ya Mwana ya Oyo-Aleki-Likolo” Mwana
mobali ya Oyo-Aleki-Likolo ? Maria abungisaki penza makanisi. Alobi na anzelu : “Yango
ekosalema ndenge nini, mpo ete ngai nayebi mobali te ?” Anzelu alobi na ye : “Molimo-
Mosantu akoya epai na yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elili na ye. Yango
wana mwana mosantu oyo akobotama na yo akobengama Mwana ya Nzambe”. Likamwisi
elekelaki Maria na ndenge ete akokaki kososola yango te.

Ntango Jozef amoni ete Maria azali pene ya kobota, alingaki atika ye mpe kokende mosika
na Nazaret. Anzelu abimeli ye na ndoto : “Nazaret, mwana ya David, alobi na ye, kobanga
kobala Maria te, mwasi na yo, pamba te zemi oyo azali na yango, euti na nguya ya Molimo-
Mosantu... mpe yo okopesa ye kombo ya Yezu”. Jozef atosaki. Ye azelaki elongo na Maria
ete likamwisi oyo ekokisama : Bazalaki kozela moi ya mokili !

Maria mpe Jozef basengelaki kosala mokolo moko ya mobembo ya molai mpe ya mpasi, kasi
ezali te mpo ete balingaki kolongwa na Nazaret. Bazalaki na mposa ya kotikala kaka epai na
bango, mingi mpo Maria azalaki kozela kobota. Ntina ezalaki ete mokonzi ya mboka Roma,
Cesar Auguste, apesaki mitindo ya kotanga bato na baengumba nionso oyo ezuamaki na
bokonzi na ye. Motindo elobamaki na eteni nionso ya etando wana. Moto na moto esengelaki
azonga na mboka ye auta mpo atangama. Maria mpe Jozef bakokaki kosala ndenge mosusu
te, ete kotosa kaka mobeko ya mokonzi. Engumba na bango bauta ezali Betleem.
Batambolaki mikolo ebele yambo ya kokoma kuna. Nzela na zelo oyo ekangisi Nazaret na

105
Betleem ekatisi bangomba mpe ezali na komekama mingi. Suka-suka, na bopemi nyonso,
bamonaki Betleem liboso na bango. “Sika esengeli topema mwa moke mpe tomela mayi”.
Babala-bala ya Betleem etondaki na bato, mpo bato mosusu ebele bayaki mpo na
kotangama. Maria mpe Jozef balukaki esika ya kolala na bandako ya kofutela. Bazuaki esika
pene na ndako moko ya kofutela. Butu eyaki. Bafandaki mpo na kolia lipa mpe batondaki
Nzambe mpo na esika bazuaki ya kolala. Makelele ezalaki lisusu te na Betleem, mpe likolo
etondaki na minzoto. Nde ntango wana likamwisi moko monene esalamaki na bikamwisi.
Esika ezanga ntina mpe ya bobola oyo emonisaki mbotama ya Mwana ya Nzambe, alakamaki
uta kala, Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Moto moko te ayebaki likamwisi oyo, kaka Nzambe,
Maria mpe Jozef. Baboti bazalaki na esengo monene. Esengelaki bapesa nini na mwana ?
Kaka eloko moko bolingo na bango ! Bazalaki na eloko mosusu te, ata mbeto ya mwana te !
Maria alatisaki mwana Yezu, mpe Jozef abongisaki elaleli ya mwana na matiti. Sima alalisaki
mwana na ndako moke ya mabele. Mokonzi ya likolo mpe ya se alalaki kati na mua ndako
wana !

Na mbala moko, bayokaki makelele ya makolo ya bato. Ezalaki babateli ya bameme oyo
bayaki mpo na kokutana na bango. Banjelu bayebisaki babateli ete Mobikisi asi abotami.
Bapusani, na mwa tembe. Bamonaki Maria mpe Jozef, bato mibale babola lokola bango
moko. Bamonaki mpe lisusu mwana alali na ndako moke ya mabele. Sika bamonaki Mobikisi
ya mokili.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Okobota mwana mobali, mpe okopesa ye kombo Yezu. Akozala mwana ya Oyo-Aleki-
Likolo.
2. Bosolola makambo oyo :
• Sango nini anjelu amemelaki Maria ? (Ye akobota mwana mobali, oyo ye akopesa
kombo ya Yezu. Ye akobengama lisusu Mwana ya Nzambe).
• Babateli bamonaki nini ? (Bazuaki sango mpe bakendeki komona Yezu).
3. Nzambe akokisaki elaka epesamakio na anjelu. Na lolenge ye akokokisa elaka wapi
Yezu akozonga.

Liteya
Nzambe akokisaki elaka na ye, mpe Nzambe akokisaki elaka na ye, mpe Yezu-Kristo
abotamaki.

106
Yenga ya Mandalala –
Bokoti na Yeruzalem

Luka 19 : 28-44 / Yoane 12 : 12-18

Pene ya kosepela yenga ya Pasika, Yezu mpe bayekoli na ye bakendeki na Yeruzalem.


Yambo ete bakoma na ville, abengi mibale na bayekoli na ye mpe alobi na bango : “Bokende
na mboka wana etalani na biso, ntango bokokoma kuna, bokomona mwana-punda bakangi
na singa, nanu bamata yango te, bofungola yango mpe bomema yango awa”. “Tokosala nini
soki baboyi kopesa biso mwana-punda oyo ?” Motuna ya bayekoli. Yezu ayanoli bango :
“Boloba na bango : Tozali kofungola mwana-punda mpo ete Mokonz azali na mposa na
yango”.

Bayekoli bakei na mboka mpe bamoni makambo kaka ndenge Yezu alobelaki bango.
Bakamwaki komona ete Yezu ayebi makambo nyonso. Bamemaki mbala moko mwana-punda
epai ya Yezu.

Elenge mobali ya mbula zomi na mibale azalaki mpe na nzela ya kokende na Yeruzalem na
baboti na ye. Tata na ye azalaki kolimbolela ye mpo na nini bayuda ebele bazalaki kokende
na Yeruzalem mbula nyonso mpo na kosepela feti ya Pasika. “Ezali na bambula ebele, ekolo
na biso esengelaki bakende kofanda na engumba ya bapaya. Bana ya Israel bazalaki
konyokwama. Mokolo moko, na lisalisi ya Nzambe, balongwaki na engumba oyo. Okoki
kokanisa monene ya esengo, bolamu ya ekolo ? Pasika ekundolaka mbula na mbula mpo na
biso makambo oyo. Tosepelaka feti oyo na Yeruzalem, na ntina ete topesa Mersi na Nzambe
na tempelo na ye”. Elenge mobali ayoki tata na ye na esengo, mpe asepelaki, mpe lisusu
kosala mobembo molai oyo. Suka suka bakomaki na Yeruzalem. Na mosika, esengelaki,
bamona tempelo. Tempelo monene elekaki bandako nyonso ya ville, likolo elatisami kitoko
mpe bizibeli ezalaki kongala na moi. Libota ya mwana mobali, lokola mabota mosusu,
batongaki bandako ya kapo libanda ya ville. Ezali mpasi mingi mpo na bato na mobembo ya
kozua na ville esika mpona kolala.

Na mbala moko mwana mobali ayoki kobeta maboko mpe koganga ya esengo na bala-bala.
Bato mosusu bazalaki kobeta maboko, basusu koningisa bitape ya banzete ya mandalala oyo
babukaki na banzete ya mbila, basusu bazalaki koyemba na mongongo makasi : “Bazalaki
kotombela boyei bolamu na ba nani ?” Ezalaki kokamwisa elenge mobali. “Hozanna ! Tika
ete Nkolo asalisa biso ! Nzambe atindi yo epai na biso ! Mbote, Mokonzi na nguya !
Hozanna!” Egangaki bato ebele na bala-bala mobimba. Elenge mobali azalaki koluka nzela na

107
kati-kati ya bato. Amonaki bilamba etondama liboso na nzela ya mwana-punda. “Mokonzi
akoki kotambola te na nzela etonda zelo”, egangaki mwasi moko na esengo. Elenge mobali
azalaki kokamwa mingi. Bokoti ya Mokonzi na Yeruzalem ye amonaki yango ndenge mosusu
ya kokamwa.

Elenge mobali ayebaki Yezu : “Kasi ezali Yezu ya Nazaret ! Ye moto abikisaki mwasi oyo
azalaki na maladi na mboka na biso, eleki mwa mikolo ! Mpo na nini azali na esengo te kati-
kati na bato ebele oyo bazali kokumisa ye ? Likambo nini ezali koleka ? Elenge mobali
alandaki bato kino na tempelo, wapi Yezu akitaki likolo ya mwana-punda mpe asengaki ete
bazongisa mwana-punda na mokolo na yango.

Sima ya mwa ntango, na ezibeli ya tempelo, elenge mobali amonaki bato mosusu batelemi
na kanda. Ezalaki bakonzi ya mibeko. Na koleka na ye, ayokaki bango koloba : “Esengeli te
likambo oyo ekoba ! Yezu oyo, esengeli kotelemisa ye !” Na kobanga, elenge mobali akimi
mbangu mpe azongi na nzela oyo autaki. Azalaki na mposa ya komona baboti na ye.

Elenge mobali azalaki na esengo mingi ya komona tata na ye na ekoteli ya ville. Akimaki
mbangu epai ya tata mpo na koyebisa ye manso oyo ye autaki komona.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Mapamboli na Mokonzi oyo ayei na kombo ya Nzambe !
2. Bosolola makambo oyo :
• Ndenge nini ekolo ya Nzambe eyambaki Yezu na Yeruzalem ? (Baningisaki bitape ya
nzete ya mbila, bagangaki “Hozanna”; batandaki bilamba na bango na nzela)
• Ekolo ya Yezu ezalaki kozela nini ? (Ezalaki na mposa ya lobiko mpo na bampasi na
ye ya mokili)
3. Yezu azali mokonzi ya mokili oyo te, kasi mokonzi ya bokonzi ya seko ya Yawe. Tozali
kozela akokisa elaka na ye mpe aya kozua biso, m-po ete tozala na ye na bokonzi na ye
ya seko.

Liteya
Yezu azali mokonzi oyo bokonzi na ye ezali ya mokili oyo te.

108
Mitano-Esantu – Gethsemane

Matai 26 : 30-32, 36-56 / Luka 22 : 43 / Yoane 13 : 21-28


Matai 26
30 Na sima bayembi banzembo, pe bakei na Ngomba ya ba-Olive. 31 Bongo Yezu alobi na
bayekoli na ye: “Na butu ya lelo bino nyonso bokobungisa bondimi po na makambo
ekokweela ngai. Pamba te ekomama boye: ‘Nakoboma mobokoli, pe bameme nyonso
ekopenzana.’ 32 Kasi tango nakosekwa, nakokende na Galile liboso na bino.”

36 Bongo Yezu akomi na bayekoli na ye na elanga moko babengaka Gethsemane. Alobi na


bango: “Bofanda awa, ngai nakei kobondela Nzambe kuna.” 37 Amemi Piere pe bana ya
Zebede mibale, Jake na Yoane. Na mbala moko abandi koyoka mawa pe pasi na motema. 38
Bongo alobi na bango: “Motema na ngai etondi na mawa lokola nakufa. Botikala awa, pe
bokengela na ngai.” 39 Apusani mwa-moke, afukami elongi na se, pe abandi kobondela
Nzambe boye: “Tata na ngai, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi epai na ngai! Kasi kosala
te ndenge ngai nalingi; sala bobele ndenge yo olingi.” 40 Na sima azongi epai ya bayekoli
misato pe akuti bango balali pongi. Alobi na Piere: “Ndenge nini bokokaki te kokengela na
ngai ata ngona moko? 41 Bokengela, pe bobondela Nzambe, po Monguna ameka bino te!
Ata bozali na molende na mitema, bozali kaka bato; bozanga makasi.” 42 Akei lisusu mbala
ya mibale pe abondeli Nzambe boye: “Tata na ngai, soki kopo oyo ekoki kolongwa te, bobele
namela yango, esalama kaka ndenge yo olingi.” 43 Azongi lisusu epai ya bayekoli na ye, pe
akuti bango balali kaka pongi, pamba te miso na bango ekomaki kilo. 44 Yezu atiki bango
lisusu, akei kobondela Nzambe mbala ya misato; alobi bobele ndenge moko. 45 Na sima
zongi epai ya bayekoli na ye pe alobi na bango: “Esili. Sik’oyo bokoki kolala pe kopema.
Tango esi’ekoki po bakaba mwana ya Moto na maboko ya bato ya masumu. 46 Botelema,
tokende. Tala moto ateki ngai ayei.” 47 Tango Yezu azalaki nanu koloba, Yudas, moko na
kati ya bayekoli zomi na mibale, akomi. Ayei na bato ebele, bamemi bambeli na banzete na
maboko. Bakonzi ya banganga-Nzambe pe bambuta-muntu ya ekolo bato batindaki bango.
48 Nzokande Yudas oyo atekaki Yezu alakisaki bango ndenge bakoyeba ye, alobaki boye:
“Moto oyo ngai nakoyamba, ye wana. Bokanga ye.” 49 Na mbala moko Yudas apusani
penepene ya Yezu, alobi: “Moteyi, mbote,” pe ayambi ye. 50 Yezu azongiseli ye: “Moninga
na ngai, sala mosala na yo noki.” Bongo bamosusu bapusani, basimbi Yezu pe bakangi ye.
51 Moko ya baoyo bazalaki na Yezu abimisi mbeli na ye, pe akati mosali ya mokonzi ya
banganga-Nzambe litoi. 52 Kasi Yezu alobi na ye: “Zongisa mbeli na yo esika na yango;
pamba te bato nyonso oyo babundaka na mbeli bakufaka na mbeli. 53 Oyebi te? Soki
nasengi lisalisi epai ya Tata na ngai, na mbala moko akotindela ngai basoda na ye, ba-anjelu
ebele, koleka kutu babatayon zomi na mibale. 54 Kasi soki nasali boye, ndenge nini Nzambe
akokokisa makambo oyo ekomama na Mikanda? Pamba te ekomama ete oyo nyonso
esengeli kosalama.” 55 Na sima Yezu atuni bato wana: “Noni? Nakomi moyibi? Ndenge nini
bomemi bambeli na banzete po na kokanga ngai? Mikolo nyonso nazalaki kofanda na Ndako
ya Nzambe pe koteya; nzokande bokangaki ngai te. 56 Kasi nyonso oyo esalami po na
kokokisa makambo ekomama na Mikanda ya baprofete.” Bongo bayekoli nyonso batiki ye pe
bakimi na bango.

Luka 22
43 Bongo anjelu moko ya Likolo abimeli ye po na kolendisa ye.

Yoane 13
21 Tango Yezu asilisi koloba bongo, ayoki pasi na motema, pe alobi na bango: “Nazali koloba
na bino, ya solo: moto moko na kati na bino akoteka ngai.” 22 Bayekoli babandi kotalana
bango na bango; bayebaki te soki azalaki koloba yango po na nani. 23 Moyekoli moko oyo

109
Yezu azalaki kolinga mingi, afandaki penepene ya Yezu. 24 Simon Piere afineli ye liso po
atuna Yezu soki alobaki makambo yango po na nani. 25 Moyekoli wana atuni Yezu na litoi:
“Mokonzi, moto yango nde nani?” 26 Yezu azongisi: “nakotia mdambo ya lipa oyo na supu,
bongo moto oyo nakopesa yango, nde ye wana.” Yezu akamati ndambo ya lipa, atie yango
na supu, pe apesi Yudas, mwana ya Simon Iskariot. 27 Tango Yudas azwi yango, Satan pe
akoteli ye. Yezu alobi na ye: “Likambo oyo olingi kosala, sala yango noki.” 28 Kasi na kati ya
bato oyo bazalaki na mesa, ata moto moko te ayebaki tina ya maloba yango.

110
Mitano-Esantu – Gethsemane

Matai 26 : 30-32, 36-56 / Luka 22 : 43 / Yoane 13 : 21-28

Yezu ayambamaki na esengo monene na Yeruzalem na yenga ya mandalala. Kasi, sima ya


mwa mikolo, likambo monene esalamaki oyo ebotaki kili-kili kati na bayekoli.

Ezalaki tango ya butu, Yezu na bayekoli na ye baliaki elongo na feti ya Pasika. Moko na
bayekoli na ye, Yudas-Iscariot, abimaki tango ya kolia. Basusu bakamwaki ndenge azangaki
tango molai kati na bango.

Yezu na bayekoli na ye balongwaki elongo na bisika ya likolo ezalaki bango kolia. “Kaka butu
oyo, bokotika ngai moko bino nyonso”, elobaki Yezu na mawa nyonso na bayekoli na ye.
“Te, biso tokosala yango te ! Tokotika yo te Nkolo ! Tokotikala kaka na yo !” Eyanolaki bango
na kondima nyonso ya motema. Bayekoli bayebaki te makanisi ya Yezu. Ye ayebaki malamu,
ye, oyo ekokaki kosalema butu wana.

Pene na Yeruzalem ezali na elanga moko ya banzete ya olive babengaka yango Gethsemane.
Yezu amemi bayekoli na ye kuna na elanga yango. Mingi-mingi bazalaki kolala kuna libanda.
Bayebaki te ete butu wana ekozala ya lolenge mosusu ! Yezu alobi na bayekoli na ye :
“Nazali koyoka mawa mingi mpe nalingi kobondela epai ya Tata na ngai. Botikala awa, mpe
bozela”. Apusani mwa mosika na bayekoli misato; Piere, Jake mpe Yoane. Azalaki na mawa
mingi mpe abungisi makanisi, mpe alobi na bayekoli misato oyo : “Botikala awa, mpe
bokengela na ngai !” Sima apusani lisusu mwa moke liboso, afukami mpe abandi kobondla
epai ya Tata na ye ya likolo.

Yezu azongi mpe akuti bayekoli na ye balali. Na mpasi na ye monene, Yezu apusani lisusu
mwa mosika na bango mpo na kobondela lisusu Tata na ye. Anjelu auti na likolo mpo na
kosunga mpe kolendisa ye. Sika ayebaki ete Tata azali na ye.

Sima Yezu azongi epai ya bayekoli na ye oyo balalaki : “Bolamuka, botelema, alobi na bango.
Tango na ngai ekoki !” Bayekoli basusumuki mpe bapumbwe mbala moko. Bayoki mingongo
ya bapaya zinga-zinga na bango. Minda ebimi na molili. Bamoni basoda na bibundeli mpe
banzete koyaka epai na bango.

Yezu ayebaki nani azali kokamba bango. Tango bapusani pene na bango, bayekoli bayokaki
mpasi mingi komona Yudas liboso ya basoda kotambola. Yudas akambaki basoda ya bakomi

111
mibeko mpe bafarizien mbala moko epai ya Yezu. Yudas ayebisaki bango ete akoyamba Yezu
na litama. Ekozala mpo na bango elembo ekosalisa mpo na kokanga Yezu soki bato bazali
ebele te.

Yudas apusani pene ya Yezu, ayambi ye mpe atie monoko na ye na litama ya Yezu. Mbala
moko basoda bakangi Yezu. Bakangi ye lokola bakangaka moyibi to mpe mobomi. Yezu
abundisaki bango te. Alobi na bango : “Ezalaki na ntina te boya kokanga na minduki,
mipanga mpe banzete ? Nazalaki mingi-mingi na kati ya tempelo, wapi nazalaki koloba na
Nzambe, Tata na ngai. Kuna bokangaki ngai te, bomekaki ata moke te kokanga ngai”.

Sika bayekoli miso efunguamaki penza ! Piere akokaki te kokanga motema. Azalaki wana na
kanda makasi, komona bazali kokanga Yezu na lolenge ya kotsiola. Amibolebi : “Mpo na nini
Yezu azali kobunda te na makambo ezanga sembo oyo ? Nalingi kosalisa ye !” Kasi Yezu
agangeli ye : “Soki Nzambe alingaka bitumba, alingaki atinda banjelu mapinga na mapinga
mpo na kosalisa Mwana na ye”.

Piere amiyoki mawa. “Makambo esengeli penza koleka boye ?” amituni bongo. Amoni
bayekoli mosusu nyonso batondi na bobangi, kobunga na molili. Ye moko, akanisi mpe te, na
bobangi wana, akimi kati na butu. Basoda ya bato ya mibeko mpe bafarizien bakangi Yezu
basinga lokola mobomi.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Yezu abondelaki : Longola kopo ya mpasi oyo epai na ngai. Kolinga na yo esalama !
2. Bosolola makambo oyo :
• Mpo na nini Yezu abondelaki penza makasi na elanga ya Gethsemane ? (Ayebaki
makambo ezalaki koyela ye. Azalaki Mwana ya Nzambe mpe moto, na koyeba
kobanga. Azalaki koyoka Nzambe pene na ye kati na mabondeli na ye).
• Yezu azali na nguya nyonso. Mpo na nini abundisaki bango te ? (Mpo ete kolinga ya
Nzambe esengelaki ekokisama).
• Yezu atekamaki na Yudas-Iscariot. Bokoyoka ndenge nini soki moto moko atekeli
bino moto botielaka motema ?

Liteya
Yezu azalaki pene ya kosala kolinga ya Nzambe, mpe azalaki pene ya komikaba.

112
Pasika –
Yezu abimeli basi na lilita

Marko 16 : 1-10 / Matai 28 : 1-10

Na botani ya tongo, tango moi ebimaki nanu te, basi misato bakendeki na lilita esika wapi
ezalaki nzoto ya Yezu. Babongisaki malasi mpo na kotia na nzoto ya Yezu. Balembaki.

Maria-Madeleine, moko na basi oyo, alobi : “Nazalaki na esengo, eleki mikolo, nazalaki na
moninga ya kitoko nde Yezu. Soki makambo etikalaka boye ! Ye azalaki koloba malamu
penza, kasi mikolo ya suka oyo akomaki koloba solo penza makambo na ye. Mingi mingi
azalaki koloba : “Esengeli namona mpasi mpe nakufa, nakoki kotikala awa te. Azalaki koloba
bosolo. Mpe tala asi akufi !”. Maria-Madeleine alelaki na motema.

Salomé, mwasi mosusu na misato oyo, alobi na motema ya mpasi : “Mpo na nini Yezu
esengelaki akufa na ekuluse ? Ye azalaki koloba mbala mingi ete esengeli amona mpasi, kasi
mpo na nini ? Mpasi oyo ekokaki kosalisa na nini ? Nazali kokoka kososola yango te !”

Mwasi ya misato kombo na ye Maria. Ye azali komituna nani asili kolongola libanga ya kilo
boye oyo ezalaki na lilita. Basi bakomi sika na lilita. Yango ezali ya kofunguama, mpe libanga
esi elongue !

Anjelu, alati elamba ya pembe lokola libanga ya glace, alobi na bango : “Bobanga te, nayebi
ete bozali koluka Yezu oyo babomaki na ekuluse. Azali awa te; asi asekwi ndenge alobaki.
Boya kotala esika nzoto ya Nkolo ezalaki. Bokende noki koyebisa bayekoli na te ete asi
asekwi na bakufi”. Basi balongwe noki na lilita, batondi na bobangi mpe na esengo monene.

Yambo ya kokutana na bayekoli, bakutanaki na Yezu, oyo alobaki na bango : “Mbote na


bino!” Bafukami mpe bakumisi ye. Sima Yezu alobi na bango : “Bobanga te, bokende koloba
na bandeko na ngai bakende na Galilée, kuna nde bakomona ngai”.

Batondaki na elikya ya sika mpe bokasi, bakei kokutana na bayekoli mpo na kolobela bango
makambo nyonso bauti komona.

113
Makanisi mpo na molakisi
1. Bosenga na bana bazongela :
Bobanga te, Yezu asi asekwi na bakufi.
2. Bosolola makambo oyo :
Basi bamonaki nini na lilita ?
• Lilita ezalaki ya kofungwama
• Kati na lilita anjelu azalaki kuna
• Ye alendisaki basi na koloba ete Yezu asi asekwi.
3. Lelo lisusu Yezu azali na bomoi ! Ndenge nini tokoki kondima yango ?
• Soki tondimeli ye mpe totieli ye motema na biso, tokozua mayele ete ye akopesa
biso bokasi mpe elikya na makambo nyonso.
• Yango ekopesa biso mpiko mpe bokasi.
• Yango ekoki kosalama kaka soki tofongoli mitema na biso.

Liteya
Yezu azali na bomoi, atako nzoto na ye ya bomoto esila kokufa.

114
Kobuta –
Kobuta ya Kristo
Misala 1 : 1-11 / Yoane 14 : 16-17, 26; 16 : 13-15

Sima ya bosekwi na ye, Yezu abimelaki bayekoli na ye mbala mingi na banzela ya ndenge na
ndenge kati na mikolo ntuku minei. Ye abimelaki etonga ya bato nkama mitano ya bayekoli
na ye, mpe mbala ebele ba bantoma na ye. Apesaki na bantoma mitindo na ye ya suka na
oyo etali etinda na bango. Bokutani nyonso oyo ebotaki esengo monene mpe bokasi ya sika
na baoyo bamonaki ye.

Mokolo ya ntuku minei ya suka sima ya bosekwi na ye, Yezu abimelaki lisusu bayekoli na ye.
Bayekoli bazingi ye lokola momesano. Yezu alobeli bango lisusu makambo etali bokonzi ya
Nzambe. Asengi na bango batikala na Yeruzalem kino bakotondisama na nguya ya Molimo-
Mosantu. Yezu alobeli bango na mozindo penza : “Bokozua nguya ya Molimo-Mosantu mpe
bokozala banzeneneke na ngai”. Molimo-mosantu oyo, Mosungi, Molimo ya solo, akozala
nzeneneke ya Kristo na ntina ete bazala na makoki ya kosala na kombo na ye. Akofongolela
bango nzela mpo na kokokisa etinda na bango.

Esilisi ye maloba oyo, Yezu abutaki na likolo tango bango bazali kotala ye. Abutaki kino lipata
moko ya pembe ezipaki ye mpe bakokaki lisusu komona ye te. Bazalaki miso na bango kotala
kaka likolo. Moto moko te aninganaki, moto moko te alobaki ata liloba. Bayebaki ete Yezu
azongi pene ya Nzambe, Tata na ye ya likolo. Moto moko te ayebaki ngonga boni batikalaki
kaka ya kofukama, kati na kokamwa. Suka-suka batelemaki. Bamonaki bato mibale balati
bilamba ya pembe kotelema pene na bango. Bato oyo balobi na bango : “Bato ya Galilée,
mpo na nini botikali boye kotalaka likolo ? Yezu, oyo abutaki likolo, akozonga lolenge moko
bomoni ye azali kobuta likolo”.

Bayekoli bazangaki maloba mpo na kolobela oyo nyonso bauti komona. Bayokaki monene
mpe nguya ya Nzambe. Yezu azongaki pene ya Tata na ye kasi bayebi ete akozonga lokola
ye alakaki bango mpe lokola anjelu alobelaki bango. Yezu atikaki bango moko te. Kala mingi
te Mosungi akoya mpo na bango, mpe batikala na Yeruzalem mpe bazela na bokangi
motema Mosungi wapi Yezu-Kristo alobelaki bango na mozindo.

Bazalaki kokanisa na esengo bileko kitoko oyo wapi Yezu abutaki na likolo. Yoane azalaki na
esengo na kozongela maloba Yezu alobaki na bango : “Molimo ya solo... ekokamba bino kati
na bosolo nyonso, mpo ete ye akoloba mpo na ye moko te, kasi akoloba nyonso oyo ye
ayokaki, mpe akoyebisa bino makambo ekoya”.

115
Makanisi mpo na molakisi
1. Bosenga na bana bazongela :
Yezu, oyo abutaki na likolo kati na bino, akozonga na lolenge moko bomonaki ye kobuta
na likolo.
2. Bosolola makambo oyo :
Tanga bilaka mibale ya ntina oyo epesameli bayengebene ?
• Nzambe azali kotinda Molimo-Mosantu na ekolo na ye lokola Mosungi.
• Yezu akozonga na lolenge abutaki na likolo.
3. Ndenge nini biso moko tozali komibongisa mpo na bozongi ya Yezu ?

Liteya
Yezu akozonga kozua biso mpo na kokamba biso na mboka na biso ya seko.

116
Pantekote –
Koya ya Molimo-Mosantu na Pantekote

Misala 2 : 1-13
Misala 2
Tango mokolo ya Pantekote ekomaki, bandimi nyonso basanganaki esika moko. 2 Na mbala
moko makelele euti na Likolo, ezalaki lokola mopepe makasi, etondisi ndako mobimba eika
bango bafandaki. 3 Bongo bamoni biloko ebimeli bango lokola moto, pe ekabwani, ezalaki
lokola lolemo pe eyei kofanda na motu ya moto moko moko na kati na bango. 4 Bango
nyonso bayei kotonda na Molimo Mosantu, pe babandi koloba na minoko mosusu, ndenge
Molimo azalaki kolobisa bango. 5 Bayuda mosusu ya mitema malamu bazalaki kofanda na
Yeruzalem, bango bautaki na bikolo nyonso ya mokili mobimba. 6 Tango mingongo yango
eyokani, bato ebele bayei kotondana wana; pe bakamwe mingi, po moto na moto ayokaki
bandimi bazali koloba na monoko na ye ya mboka. 7 Bakamwe mingi penza pe batunani:
“Baoyo bazali koloba, bazali bango nyonso bato ya Galile te? 8 Bongo ndenge nini moto na
moto na kati na biso ayoki bango bazali koloba na monoko na ye ya mboka? 9 Awa na kati
na biso tozali na bato ya Parte, ya Medie, na ya Elam; bato mosusu bafandaka na
Mezopotamie, na rejion ya Yudea, na Kapadose, na Pon pe na rejion ya Azie, 10 na Frijie pe
na Pamfilie, na Ejipte pe na ndambo ya Libie oyo ezali penepene ya Sirene; bamosusu bauti
na Rome, 11 bato mosusu babotami Bayuda, bamosusu bakoma kosambela nzambe ya
Bayuda; bato mosusu bauti na esanga ya Krete to na Arabie; biso nyonso tozali koyoka
bango bazali kosakola misala minene ya Nzambe na minoko na biso ya mboka! 12 Bango
nyonso bakamwe penza mayele te, bongo batunani: “Makambo nini wana?” 13 Kasi bato
mosusu bazalaki koseka pe balobi: “Balangwe masanga!”

117
Pantekote –
Koya ya Molimo-Mosantu na Pantekote

Misala 2 : 1-13

Kobuka ekomaki. Baloni bazali na esengo mpo ete bazuaki mbuma ya kitoko. Baloni ebele,
na mbotama ya mibale, bamemaka makabo ya kitoko mpo na kopesa Nzambe Mersi
(matondo) mpo apamboli bango. Bipai binso, bato ebele bayaka kotonda na Yeruzalem mpo
na kosepela na feti ya mbula mobimba ya kobuka.

Babala-bala ezali ya kotonda na bato. Makelele okoki kondima te etondi engumba mobimba.
Elenge mobali azali kotala bato ndenge bazali koningana. Bayuda bazali kosolola na bala-bala
nyonso. Bapaya bazali komiyeba bango na bango na momesano ya molato na bango. Bazali
kokende na tempelo. Bazali na mposa ya kopesa mapa mibale esalami na fufu ya sika mpe
ya pepele, lokola ekomami na mobeko ya bayuda.

Na mbala moko, mwana mobali ayoki makelele na lolenge moko ekeseni, makasi, lokola
ayoka nanu te. Alingaki koyeba likambo ezali koleka kuna, amoni bato ebele bazali kowelana
na esika moko boye eyebana, mpe apusani pene na bango. Mwana mobali oyo amoni bato
kobima na ndako moko, kokumisa Nzambe. Elenge mobali akokaki komona te likambo nini
ezali koleka kuna, kasi ayoki bato bazali koloba-loba. “Ezalaki bayekoli ya mboka Nazaret”,
elobi moto moko. Mpe moto oyo akobi koloba : “Babombamaki na kati ya ndako oyo mikolo
ebele, mpe sika makambo ya mbalakaka ezo salema”. Elenge mobali amitungisaki te mpo na
koktuna ye makambo nini ezali koleka. Moto oyo ayanoli ye : “Ezali bayekoli ya Yezu ya
mboka Nazaret, Yezu oyo abakamaki na ekuluse mikolo eleki sima awa. Banda wana,
bazalaki koloba lisusu mpo na bango te. Lokola Mokonzi na bango azalaki te, bazalaki
kobanga mpe babombamaki na ndako oyo, kasi bango nyonso bazali kobima sik’oyo mpo na
ntina moko boye. Bilongi na bango ezalaki kongala, mpe batelemi wana lokola nde bazali
lisusu kobanga eloko moko te. Likambo moko esalamaki mpo na mbala ya liboso !”

“Bazali koloba nini ?” Elenge mobali atuni boye. “Bazali kokumisa Nzambe”, eyano ya moto
wana. “Bato oyo na tango moko boye, bazalaki kofanda na Ejipte, bazali koloba mokoko ya
Ejipte malamu koleka kutu mwasi na ngai na ngai moko. Nzokande bakokani te na bato ya
mboka Ejipte”. Baleki nzela mosusu babandi mpe koloba bango mpe lisusu na maye ezalaki
koleka : “Bozali kobunga penza ! Bazali bato ya komikitisa. Basusu kati na bango bazalaki

118
kotambola na SaMaria mpe Galilée na Yezu. Bakendeki penza mosika te”. “Bazali na esengo.
Tozali kokanisa ete bazali koloba monoko ya bato ya Persan”. “Ezali kopesa ngai esengo ya
soli ! Nayoka nanu te moto azali koloba monoko ya mama na ngai banda bolenge na ngai !”
“Oh ! Bondima yango te ! Balangwe masanga, ezali boye esili”. Bato nyonso bazali koloba,
yango ezalaki kobakisa lisusu kili-kili.

Baleki nzela, ndenge moko, balobaka minoko ebele, mpo ete bayokana te moko na mosusu.
Kasi bazalaki koyoka mpe kososola nyonso oyo bayekoli ya Yezu bazalaki koloba. Bazalaki
kokumisa Nzambe. “Nini oyo ekomisaki bango na esengo monene boye mpe bososoli ?”
Elenge mobali azalaki kokamwa.

Oyo esalami awa ezali bokokisami ya elaka. Mosungi ayaki lokola moto. Ezalaki kopesa na
bongengi makasi likolo ya mitu na bango, kasi ata suki moko te ya bango ezikaki. Molimo-
Mosantu ekitelaki bango mpe epesaki bango makoki ya koloba minoko ebele. Bato banso
bakokaki kososola oyo ezalaki kolobama na minoko na bango.

Makanisi mpo na molakisi


1. Bosenga na bana bazongela :
Na Pantekote, ekokisamaki elaka oyo Yezu apesaki ya kotinda Mosungi moko.
2. Bosolola makambo oyo etali Pentekote :
• Tozali kokundola molulu ya mbotama ya Eglise ya Kristo.
• Pentekote ezali liloba euti na monoko ya ba Grecque, oyo elingi koloba “mokolo ya
suka ya ntuku mitano” (cinquantième jour). Mokolo ya suka ya ntuku mitano sima ya
bosekwi ya Yezu, Molimo-Mosantu epesamaki na bayekoli.
3. Bolobela eteni oyo :
Mbano nini koya ya Molimo-Mosantu ebotaki likolo ya bayekoli ya Yezu ?
• Batatolaki Yezu-Kristo
• Bazuaki makoki ya koloba minoko ya bapaya
4. Nzambe azali kosala na nzela ya Molimo-Mosantu. Na Molimo-Mosantu, biso tokomi
bana ya Nzambe. Molimo oyo ezali kosala kati na biso, kokamba mpe kotambwisa biso.

Liteya
Molimo-Mosantu azali Mosungi, ye azali mpo na biso nkelu ya bokasi mpe ezali kosalisa na
kolongola bobangi.

119

You might also like