Download as pdf or txt
Download as pdf or txt
You are on page 1of 1

´

ZWA NA MOTUYA ESIKA NA YO NA EBONGISELI YA BOKONZI

Liyebisi epai ya molobi:


´ ´
Salisa bayangani basepela na makambo oyo Bokonzi ezali kosala mpe na esika oyo bazali na yango na ebongiseli
´ ´ ´ ´
yango. Lendisa bato ya sika bakokisa mas¾ngami ya kokoma bana-mboka ya Bokonzi mpo bazwa mapamboli oyo
ezali koya

BOKONZI YA NZAMBE EZALI KOYANGELA SIKOYO (Min. 7)


Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
´
Bokonzi ya Nzambe ezali guv¾rnema ya likol ´ o oyo ekozwa esika ya baguv¾rnema mosusu nyonso mpe ekosala
ete mokano ya Nzambe esalama na likolo mpe na mabele (Da 2:44; Mt 6:9, 10; w12 15/6 lok. 17, etanda; kr
nk. 26-27)
´
Bisakweli ya Biblia mpe makambo oyo ezali kosalema na mokili emonisi ete Bokonzi etyamaki na likolo na 1914
(Em 11:15)
Batatoli ya Yehova bakosepela kopesa yo bilembeteli oyo Biblia epesi na likambo yango (bhs nk. 217-220)
´ ´
Bokonzi ya likolo esı emonisi ete eleki mosika baguv¾rnema ya bato
´ na ndenge ekokisaka bamposa ya elimo
mpe ya mosuni ya bana-mboka na yango awa na mabele [Lobela na mokuse bandakisa ya kopesa lisungi mpo
na baoyo bazwi makama (kr lok. 211, 218-219, bitanda)]
MOKONZI MPE BAOYO BAKOYANGELA ELONGO NA YE (Min. 8)
´ ´
Kristo Yesu atyami Mokonzi mpe Mosambisi [Tanga Yisaya 9:6, 7] (Yn 5:22)
Na kokesana na bakonzi mpe basambisi ya mokili oyo bazali bato ya kozanga kokoka, Yesu akoki
kobongwana te (Yis 11:1-3)
´ ´
Yesu akoyangela elongo na bato 144 000 [Tanga Emoniseli 14:1]
´
Awa na mabele, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali kosalisa bato bazongisa boyokani na Nzambe
(2Ko 5:20)
´
Bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe nsima ya kosekwa mpe kokende na likolo (Em 20:6)
Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazwaka na motuya esika na bango na ebongiseli ya Bokonzi (Flp 3:14)
BANA-MBOKA YA SEMBO YA BOKONZI (Min. 10)
Bokonzi ya Nzambe ekozala na bana-mboka na yango awa na mabele; bamosusu kati na bango ezali baoyo
bakobika ntango bato nyonso oyo bat¾m¾laka Bokonzi ya Nzambe bakobomama. (Em 7:9, 13, 14)
´ ´ ´
Ndakisa
´ ´ oyo Yesu apesaki ya bampate na bantaba ezali kosalisa biso toyeba oyo tosengeli kosala mpo tobika
[Tanga Matai 25:31-33] (w15 15/3 nk. 25-26 par. 6-7)
´ ´
Baoyo bazali lokola bampate bapesaka bandeko ya Kristo mabÂk na bosembo nyonso [Tanga Matai 25:
34-40]
Kopesa bakristo oyo batyami mafuta na elimo mabÂk na mosala ya kosala es¾ngi kozala na molende
(Mt 28:19, 20; w15 15/3 nk. 27-29 par. 11-15)
´
Zwa na motuya libaku oyo ozwi ya kozala mwana-mboka ya Bokonzi (Flp 1:27; w12 15/8 nk. 11-13 par. 1-6)
´ ´
Yekola monÂkÂ, istware, mpe yeba mibeko etali Bokonzi yango
´ ´ ´ ´
Yanganaka na makita, na mayangani ya zongazonga mpe ya etuka
´ ´
Salelaka makambo oyekolaka mpo omonisa ete otosaka mitinda ya sembo ya Bokonzi (Sef 2:3; kr nk. 110-112
par. 4-13)
MAPAMBOLI YA BOKONZI EKOUMELA SEKO (Min. 5)
“Nsango malamu ya Bokonzi” ezali kosakolama na mikolo oyo ya nsuka (Mt 24:14)
Mosika te Bokonzi ekoyangela moto nyonso oyo akozala na bomoi awa na mabele
Mateya ya Nzambe ezali sikoyo kosangisa bamilio ya bana-mboka ya Bokonzi oyo bakofanda awa na mabele
(Yis 2:2-4; 1Ko 1:10)
´
Baoyo bakosekwa bakozwa libaku ya kokoma bana-mboka ya Bokonzi (Yn 5:28, 29; Mis 24:15)
´ ´
Zala na ngambo ya Bokonzi ya Nzambe banda sikoyo
Soki osali bongo, okozwa mpenza mapamboli ya seko (Em 21:1-4; re nk. 301-303 par. 1-5)
´ ´
[Landa plan malamumalamu mpe ntango oyo epesami ´ mpo na eteni mokomoko. Ezali na ntina te ete otanga
bav¾rs¾ nyonso oyo epesami to olobela yango. Tala buku Eteyelo ya mosala, Nkasa 52-55, 166-169]

No. 21-LI 4/18 EKOSALEMA NA MINITI 30


˘ 2018 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

You might also like