Annonces Vendredi 28 Juin 2024 - 084959

You might also like

Download as pdf or txt
Download as pdf or txt
You are on page 1of 2

EGLISE EVANGELIQUE DES SACRIFICATEURS

Ord.Pres.N°80/123 Du 30 Avril 1980


SIEGE SOCIAL ET ADMINISTRATIF/AILE NDESHA
B.P 1895/KANANGA
SACRIFICATURE DE KINSHASA

ANNONCES DU CULTE OFFICIEL DE CE VENDREDI 28/06/2024

1. Liloba lia Nzambe na biso ezali koyebisa eyamba mobimba ete : na


mabondeli na biso ya tango nionso tosambela makasi na tina ya :

 Libota ya muana Nzambe KADIMA ;


 Mokambi ya bokonzi ya bonganga Nzambe ye wana RSB YAMBA
NSHILAYI, libota naye, elongo na ba kulutu banso baye bazali
kosunga ye na mosala ya nzambe ;
 Mokambi ya Sacrificature na biso ye wana RSB KAMBAYI KAZADI
libota naye mobimba, elongo na ba kulutu banso baye bazali
kosunga ye na mosala ya nzambe awa na Kinshasa ;
 Mokonzi ya mboka na biso Congo ye wana Son Excellence Felix
Antoine TSHISEKEDI TSHILOMBO Nzambe na biso abatela ye
malamu mpe asunga ye na misala minso miye mitali tombuama ya
mboka na biso Congo.

2. Liloba ya Nzambe na biso ezali koyebisa ba nganga Nzambe banso été :


Contribution Pascale na biso esili kobanda bongo na kati ya sacrificature
na biso mobimba, nayango ba nganga nzambe banso basengami koya
kobanda kofongolisa ba compte pona kopesa contribution pascale na
bango ;

3. Liloba ya Nzambe na biso ezali koyebisa eyamba mobimba été : na kotala


mibeko ya mboka na biso oyo ewuti ko kueya sika na maye matali
tapage nocturne ( nuisance sonore), kobanda mukolo mua lobi samedi,
culte charismatique na biso ekobanda na ngonga 20h30, na suka na yango
nde ba carrefours na biso eko banda ko kota. Na yango ba nganga nzambe
banso na kati ya makabo na bango , basengami pona kotosa ngonga ;
4. Liloba lia Nzambe na biso ezali koyebisa eyamba ete : Dimanche oyo na
ngonga ya 8h00, Hôpital ya arc-en-ciel eko fongola bikukie na yango.
Baye banso bazali na bosenga ya ko kota baya kokomisa kombo na ngonga
ya 07h ;

5. Liloba ya Nzambe na biso ezali kobenga ba nganga nzambe banso na


mululu monene oyo ekosalema na mukolo mua lundi le 01/07/2024 na
temple na biso ya Ngaba na ngonga 14h na tina ya culte d’action de grâce
de PROSPERITE. Na yango : Sacrificature ezali kozela contribution
volontaire ya ba nganga nzambe nionso pona : MANGEADO, BUVADO
GRATUITOS,

NB : Nganga nzambe nionso amema offrandres de circonstance naye.

6. Liloba ya Nzambe na biso ezali ko beta seté to mpe kobenda matoyi na


bilenge nionso baye balingi kosambela mukolo ya mardi te, pona koloba
ete : batikali na 3 semaines pona kobongama to komilengela pona
kosambela mardi, pamba te liloba ya nzambe na biso ekobengana bango na
ba activités sacerdonales nionso uta na oyo yaba jeunes kino na
sacrificature;

7. Kobondela na biso ya mukolo ya mardi le 02/07/2024, ekozala na kati ya


mabota to ba familles na biso. Na yango biso banso totosa bobongisi ya
Muana na Nzambe KADIMA na maye matali losambo oyo ;

8. Losamba na biso ya vendredi prochain le 05/07/2024 ekozala na kati ya ba


Tribus na biso, na yango ba chefs ya ba Tribus elongo na makabo na bango
basala lolenge liloba ya nzambe esengi na bango na tina ya losambo oyo ;

9. Liloba ya Nzambe na biso ezali koyebisa bakambi banso ya ba tribu na ba


oyo ya ba divisions ete : lokola tokoti na semaine ya suka ya sanza oyo ba
tribu na ba divison nionso emilengela pona ko kotisa ba réunions na
kotinda ba rapports mensuels elongo na ba comptes rendus na
sacrificature na biso ;

10. Réunion ya Conseil mixte ya Sacrificature na biso eko kota dimanche


prochain le 07/07/2024 na temple ya Ngaba na ngonga 07h00, ekozala na
charge ya Tribu Sacerdotale ya Tshangu ;

La Sacrificature

You might also like