2023-11-05 - BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA - MOKOLO YA 5 NOVEMBRE 2023 - Docx

You might also like

Download as pdf or txt
Download as pdf or txt
You are on page 1of 3

BA MPONGO BAZALI KOSANGANA _ MOKOLO YA 5 NOVEMBRE 2023

Balingami Bana Ya Nsango-malamu,

Biso tozali bato oyo bapambolami ya koleka oyo batikala kotambola na mokili oyo. Tokoki kutu kobanda
kokanisa maloba oyo mwanje motintami ya nsambo oyo Nzambe aponaki alobaki na biso maloba oyo:

Nalingi bino. Oh, nalingi bino lokola bana na ngai moko, mpe bino bozali bana na ngai kati ya
Nsango-malamu. Naboti bino epai na Klisto, na nzela ya Nsango-malamu.

Nzambe amitungisaka mingi mpenza mpo na biso na lolenge ete Atindelaki biso mosakoli na Ye atatolami
na elembo ya Likonzi na Moto mpo na koyebisa biso ete ezalaki kaka moto oyo te kotambola elongo na
biso, kasi ezalaki mpenza Nzambe likolo na ye. Azali Ye nde Oyo azali kokamba nzela.

Lokola Amitungisaka mpo na biso, liboso kosambisama monene eya, Asili kobongisa nzela oyo
tokosikolama na kosambisama nyonso oyo ezali koya. Nzela yango ya kokimela ezali bobele mpo na biso,
Baponami. Tozali baoyo basili koyamba momboto oyo ya Bomoi. Tozali baoyo babongisamaki liboso mpo
na komona Yango. Tozali baoyo bazali na Emoniseli ya lotomo monene oyo ya ba-bandes.

Akufaki mpo na lotomo oyo. Akufaki mpo Molimo Mosanto akoka kozala awa na eleko oyo mpo
na kotalisa makambo oyo. Amitungisaki mpo na yo. Amitungisaki mpo na komema Yango awa.
Amitungisaki mpo na koloba maloba yango. Amitungisaki mpo Alingaki yo. Amitungisaki mpenza
mpo na kosala yango, kotinda Molimo Mosanto na likambo oyo, kosala lotomo oyo lelo.

Soki obongisamaki liboso mpo na Bomoi na Seko, okoyoka Yango mpe okosepela na Yango. Ezali libondisi
na yo. Ezali Eloko oyo ozalaki na mposa na yango makasi bomoi na yo mobimba. Ezali Mayaka wana ya
ntalo monene. Totiki makambo nyonso mpo na Nsango oyo, Mongongo oyo. Ezali Nkolo na biso Yesu
Klisto kolobaka na biso.

Moto moko te asengeli kobondela-bondela biso, BISO TOZALI BANDIMI, ezali na eloko moko te oyo ekoki
kobotola biso Yango. Tomitungisaka te na makambo oyo moto mosusu nani alobi, biso tondimi Liloba moko
na moko.

Amitungisaka mingi mpenza mpo na biso; soki tosengeli na lobiko na nzoto, tondimaka kaka Liloba na Ye
uta na bozindo ya motema na biso. Na bongo, etali te oyo mopesi toli nani, oyo mobondisi nani, oyo
dokotolo nani, oyo lopitalo nini, oyo ba-examens nini ekoloba, biso tondimaka kaka Liloba na Ye. Toyebi
kaka Yango! Ezali na ntina moko te ya koloba likambo mosusu na ntina na Yango; toyebi Yango.

Amitungisaki mingi mpenza mpo na biso na lolenge été Asalaki été mosakoli na Ye abomba Bilei mpo na
Mwasi na libala na Ye. Apesaki kutu lilako na mokengeli nyonso, motei nyonso, mpe lisanga ya bato na
mokili mobimba ete balanda malako na ye mpe bayokisa ba-bandes na BA-LOSAMBO na bango to
masanga na bango.

Soki bino bato bokolinga kosala kaka likambo oyo na ntongo oyo, bino baoyo bakobondela mpo na
bino, mpe bino baoyo bokoyoka bande oyo, na mokili mobimba, mpe nsima na koyokisa bande
oyo, mpe motei to moto oyo azali koyokisa yango na losambo, na masanga oyo kuna na
ba-zamba to esika nyonso oyo bozali, baoyo bazali koyokisa yango, bakoka liboso koyambola
polele, na nsima baya na eloko ata moko te na motema, bobele kondima, mpe babondela mpo na
bango, wana nde, Nkisi ekosala mosala.
BA MPONGO BAZALI KOSANGANA _ MOKOLO YA 5 NOVEMBRE 2023

Ngai nakanisaki ete baoyo batiolaka biso balobaka ete mosakoli ALOBAKI ATA MOKE TE boyokisa
ba-bandes na losambo? Alobaki kaka na ba-losambo na bango te, kasi na ba-zamba to BISIKA NYONSO
oyo bozali…BOYOKISA BA-BANDES.

Soki bokotosa mpe bokosala mpenza likambo oyo Nzambe alobaki na nzela ya mwanje motindami ya
nsambo oyo Ye atatolaki, na bongo bino mpe okoki kozala na KONDIMA ya monene koleka oyo bokoki
mpenza kozala na yango.

Na, na…ya liboso, mpe mpo na kobelema na likambo oyo, eyanganelo esengeli kopakolama na
kondima. Yo_yo, soki ozali na kondima te, na bongo ezali na_ezali ata na ntina moko te ya koya
mpo babondela mpo na yo, mpo ekosengela na kondima na yo mpe kondima na ngai elongo,
kondima na ngai mpo na kondima Ye, kondima na yo mpo na kondima Ye.

Biso tozali te kotatabana, to kobanza-banza, to kolikia-bongo. Ba-bandes ezali Nzela oyo Nzambe asili
kobongisa mpo na lelo. Ezali te maloba ya moto moko oyo ebengami William Marrion Branham, Ezali
Maloba mamonisami ya Nkolo na biso Yesu Klisto. Ezali mpenza-mpenza, “Amen!” Ezali etemelo ya nsuka
mpo na biso. Ezali Solo mpe eloko mosusu te bobele Solo.

Mpe ntango bomoni Etemelo ya nsuka ya Nzambe, Liloba na Ye, elaka likolo na likambo moko,
bosengeli koyeba liboso ete ezali Liloba na Nzambe, ete eloko oyo bozali komona kosalema ezali
Nzambe. Ezali_ezali te na_ezali te na “ntango mosusu, ekoki kozala, ezomonana lokola ekokaki
kozala.” “Ezali Nzambe!” Bongo ntango okomi na esika wana, na bongo ezali Mayaka ya motuya
monene, osengeli kotangwa mosika na eloko nyonso oyo moto mosusu ayebisi yo oyo ekeseni na
Yango. Osengeli kotala te na makambo oyo moto asili kosala.

Biso tokozala na FETI MONENE YA BOLINGO mokolo na Lomingo oyo. Tokosala mpenza likambo oyo
mwanje motindami ya nsambo ya Nzambe oyo atatolami ayebisaki biso kosala: Kofina Bouton Play mpe
kotosa.

NYONSO oyo tozali na yango bosenga, tokozua yango. Tokozua Yango mpo tokotia kondima na biso
elongo na KONDIMA NA YE mpo na kondimela Ye. Na nsima, biso nyonso tokoloba:

Kobanda ntango oyo, ezali na eloko moko na motema na ngai oyo ezali kolobela ngai ete mpasi na
ngai esili. Nakomi_nakomi malamu, nakozala malamu”? Bondimi yango? Botombola maboko,
“Nandimi Yango!” Nzambe apambola bino.

Lokola Nzambe akipaka, nazali kobengisa bino ete bosangana na biso; or bolendisa mokengeli na bino,
mokambi na bino, mpo na kolanda mitindo ya mosakoli, mpo na koyoka mwanje motindami ya Nzambe
koloba Liloba na Nzambe mpe kozua nyonso oyo bozali na bosenga na yango, mokolo ya Lomingo oyo, na
ngonga ya 12h00, ngonga ya Jeffersonville, wana tokoyoka liteya: Amitungisaka mpo na yo.
Omitungisaka mpo na Ye? 21/07/1963.

Ndeko Joseph Branham


Makomi ya kotanga liboso ya liyangani :
Yoane 5:24 / 15:26
BA MPONGO BAZALI KOSANGANA _ MOKOLO YA 5 NOVEMBRE 2023

1 Petelo 5:1-7
Baebele 4:1-4

You might also like