Download as pdf or txt
Download as pdf or txt
You are on page 1of 2

EGLISE EVANGELIQUE DES SACRIFICATEURS

Ord.Pres.N°80/123 Du 30 Avril 1980


SIEGE SOCIAL ET ADMINISTRATIF/AILE NDESHA
B.P 1895/KANANGA
SACRIFICATURE DE KINSHASA

ANNONCES DU CULTE OFFICIEL DE CE VENDREDI 05/07/2024

1. Liloba lia Nzambe na biso ezali koyebisa eyamba mobimba ete : na mabondeli na
biso ya tango nionso tosambela makasi na tina ya :

 Libota ya muana Nzambe KADIMA ;


 Mokambi ya bokonzi ya bonganga Nzambe ye wana RSB YAMBA
NSHILAYI, libota naye, elongo na ba kulutu banso baye bazali kosunga ye
na mosala ya nzambe ;
 Mokambi ya Sacrificature na biso ye wana RSB KAMBAYI KAZADI libota
naye mobimba, elongo na ba kulutu banso baye bazali kosunga ye na
mosala ya nzambe awa na Kinshasa ;
 Mokonzi ya mboka na biso Congo ye wana Son Excellence Felix Antoine
TSHISEKEDI TSHILOMBO Nzambe na biso abatela ye malamu mpe
asunga ye na misala minso miye mitali tombuama ya mboka na biso
Congo.

2. Liloba lia Nzambe na biso ezali koyebisa bakambi nionso ya ba Tribu na ba oyo
yaba divisions administratives ete : Réunion ya Conseil mixte ya sacrificature
ekokota mukolo mua dimanche oyo na ngonga ya 14h00 na temple na biso ya
Ngaba. Na yango :

 Baye banso nanu bakotisi ba rapports na bango te, bakotisa yango na


lombangu nionso ;
 Kotosa ngonga esengami na banso ;
 Baye banso bakotisaki rapport na bango ya mois passé te, bakotisa yango
avant bakotisa rapport ya sanza oyo, mpe baye banso bayanolaki na
demande d’explication oyo sacrificature etindelaki bango te, bayanola
nanu à l’écrit.
3. Liloba lia Nzambe na biso ezali koyebisa eyamba ete : Dimanche oyo LOPITALO
YA MONAMA eko fongola bikukie na yango na ngonga ya 8h00 eko kanga yango
na ngonga ya 12h00. Baye banso bazali na bosenga ya ko kota bakende na tongo
ya dimanche pona kokomisa kombo ;

4. Liloba lia Nzambe na biso ezali kobeta sété pona ko rappelé baboti que mikolo
esili bongo kosila na tina ya ba faire-part oyo bazuaki, bakoka kosunga bilenge na
biso, pamba te milulu oyo babongisaki esi ebandi ezo senga nde misolo. Na yango
baboti na biso banso baye bazuaki ba faire-part bakoka kokokisa maloba na
bango ;

5. Liloba lia Nzambe na biso ezali koyebisa bilenge ete : losambo na bango ya
dimanche oyo ekozala na kati yaba stations na bango, baboti totinda bana na biso
na losambo na bango elongo na mabonza na bango na maboko ;

6. Liloba ya Nzambe na biso ezali kobenda matoyi na bilenge nionso baye balingi
kosambela mukolo ya mardi te, pona koloba ete : batikali se na 2 semaines pona
kobongisa lolenge na bango ya kosambela, pamba te liloba ya nzambe na biso
ekobengana bango na ba activités sacerdonales nionso tii na oyo ya ba jeunes;

7. Liloba lia Nzambe na biso ezali koyebisa eyamba ete : Kobondela na biso ya
mukolo ya mardi le 09/07/2024, ekozala na kati ya ba Foyers Evangéliques
na biso. Biso banso tomilengela pona kokende losambo wana ;

8. Liloba lia Nzambe na biso ezali kobenga ba Prophètes na ba Journalistes nionso


na prière na bango oyo ekosalema mukolo mua mercredi le 10/07/2024 kuna
epayi ya RSB NGALULA NDUMBI. Eko banda mercredi na ngonga ya 12h00 mpe
ekosila mukolo mua jeudi na ngonga ya 05h00. Na yango ata moko na bango
azanga te ;

9. Liloba lia Nzambe na biso ezali koyebisa eyamba mobimba ete: Losamba na biso
ya vendredi prochain le 12/07/2024 ekozala na Sacrificature na biso, na
yango makabo nionso ezua ba dispositions oyo esengeli na tina ya losambo
wana ;

10. Liloba lia Nzambe na biso ezali ko rappelé ba nganga Nzambe banso baye
basalaki souscriptions mukolo ya lundi le 01/07/2024 oyo tosalaki culte d’action
de grâce ya inauguration ya etumbeli ya bozui ya mutu nganga Nzambe. Na
yango, baye banso basalaki souscription baya ko s’acquitté to kofuta mbongo oyo
bakomisaki na comptabilité na biso. Pamba te Milimo bakosaka bango te.

La Sacrificature

You might also like